< Yosua 11 >
1 Bere a Hasorhene Yabin tee asɛm a asi no, ɔtoo ahemfo a wodidi so yi nkra denneennen: Madonhene Yobab, Simronhene ne Aksafhene;
Tango Yabini, mokonzi ya Atsori, ayokaki makambo oyo, atindaki maloba epai ya Yobabi, mokonzi ya Madoni; epai ya mokonzi ya Shimironi, epai ya mokonzi ya Akishafi,
2 ahemfo a wɔwɔ atifi fam mmepɔw so, ahemfo a wɔwɔ Yordan Bon a ɛda Galilea anafo fam; ahemfo a wɔwɔ atɔe fam nkoko so; ahemfo a wɔwɔ Nafɔt Dor atɔe fam;
epai ya bakonzi oyo bazalaki na etuka ya bangomba na nor, na etando ya Araba, na ngambo ya sude ya Kinereti, na mokili ya bangomba mikuse, na ngambo ya weste ya etando ya Dori;
3 Kanaan ahemfo a wɔwɔ apuei ne atɔe; Amorifo ahemfo ne Hetifo ahemfo ne Perisifo ahemfo ne ahemfo a wɔwɔ Yebusifo mmepɔw asase so; ne Hewifo a wɔwɔ nkurow a ɛwɔ Hermon bepɔw ase wɔ Mispa asase so.
epai ya bato ya Kanana oyo bazalaki na ngambo ya este mpe na ngambo ya weste; epai ya bato ya Amori, ya Iti, ya Perizi mpe ya Yebusi, oyo bazalaki kovanda na mokili ya bangomba; epai ya bato ya Evi, na se ya Erimoni, na mokili ya Mitsipa.
4 Saa ahemfo yi nyinaa gyee pene, boaboaa wɔn nsraadɔm ano sɛ wɔbɛka abɔ mu ako atia Israel. Wɔn nsraadɔm no nyinaa apɔnkɔ dodow ne nteaseɛnam yɛɛ asase no so ma te sɛ mpoano nwea.
Babimaki elongo na mampinga na bango nyonso, mpe bato bazalaki ebele lokola zelo ya ebale elongo na motango monene ya bampunda mpe ya bashar.
5 Wɔbɔɔ wɔn atenae wɔ asu a ɛbɛn Merom ho sɛ wɔrebɛko atia Israel.
Bakonzi yango nyonso basangisaki mampinga na bango esika moko mpe batongaki molako na bango pembeni ya mayi ya Meromi mpo na kobundisa Isalaele.
6 Awurade ka kyerɛɛ Yosua se, “Nsuro wɔn. Ɔkyena sesɛɛ bere mu na wɔn nyinaa atotɔ. Bubu wɔn apɔnkɔ no nan na hyew wɔn nteaseɛnam no.”
Yawe alobaki na Jozue: « Kobanga bango te, pamba te lobi, kaka na ngonga oyo, nakokaba bango nyonso na maboko ya Isalaele lokola bibembe. Okokata misisa ya makolo ya bampunda na bango mpe okotumba bashar na bango. »
7 Na Yosua ne nʼakofo kɔɔ Merom asu no ho kɔtow hyɛɛ wɔn so mpofirim.
Boye Jozue elongo na mampinga na ye nyonso babimelaki bango na pwasa, na mayi ya Meromi mpe babundisaki bango;
8 Na Awurade ma wodii wɔn atamfo no so nkonim. Israelfo no taa wɔn ara kosii Sidon Kɛse ne Misrefot-Maim ho ne Mispa Bon no mu wɔ apuei fam, kosii sɛ atamfo no akofo baako mpo anka.
bongo Yawe akabaki bango na maboko ya Isalaele. Balongaki bango mpe balandaki bango kino na Sidoni, engumba monene, kino na Misirefoti-Mayimi mpe kino na ngambo ya este ya lubwaku ya Mitsipe. Babomaki bango mpe batikaki ata moto moko te na bomoi.
9 Ɛnna Yosua bubuu apɔnkɔ no anan, san hyew nteaseɛnam no sɛnea Awurade hyɛɛ wɔn no.
Jozue asalaki bango ndenge Yawe atindaki: akataki misisa ya makolo ya bampunda na bango mpe atumbaki bashar na bango.
10 Yosua san nʼakyi begyee Hasor kurow no fae, kum ɛhɔ hene. (Na anka Hasor yɛ saa ahemman nkabom no nyinaa kuropɔn.)
Na tango wana, Jozue azongaki, abotolaki engumba Atsori mpe abomaki mokonzi na yango na mopanga. Atsori ezalaki mboka mokonzi ya mokili wana nyonso.
11 Israelfo no sɛee biribiara a nkwa wɔ mu wɔ kuropɔn no so. Wɔannya ɔkra fua mpo. Na Yosua too Hasor kuropɔn no mu gya.
Babomaki moto nyonso oyo azalaki kuna na mopanga. Babebisaki penza bango nyonso, babikisaki ata ekelamu moko te ya pema mpe batumbaki engumba Atsori.
12 Yosua kunkum ahemfo a wɔaka no nyinaa ne wɔn manfo sɛee wɔn pasaa sɛnea Mose, Awurade somfo, hyɛe no pɛpɛɛpɛ.
Jozue abotolaki bingumba nyonso ya bakonzi wana mpe abomaki bakonzi na yango na mopanga. Abomaki bango nyonso kolanda ndenge Moyize, mowumbu na Yawe, atindaki.
13 Mmom, Yosua anhyew kuropɔn biara a esi siw so gye Hasor.
Kasi Isalaele atikalaki te kotumba bingumba oyo ezalaki na bangomba longola kaka Atsori oyo Jozue atumbaki.
14 Na Israelfo no faa asade ne anantwi a wɔwɔ nkurow mmubui no mu nanso wokum emu nnipa no nyinaa.
Bana ya Isalaele bazwaki mpo na bango lokola bomengo ya bitumba: biloko nyonso ya engumba wana mpe bibwele na yango, kasi basilisaki koboma bato nyonso na mopanga, batikaki ata moto moko te na bomoi.
15 Sɛnea Awurade hyɛɛ ne somfo Mose no, saa ara na Mose nso hyɛɛ Yosua. Na Yosua nso yɛɛ sɛnea wɔka kyerɛɛ no no, dii nea Awurade hyɛɛ Mose no nyinaa so.
Jozue asalaki ndenge kaka Yawe atindaki ye na nzela ya mosali na ye Moyize, atikaki ata eloko moko te kati na makambo nyonso oyo Yawe atindaki Moyize.
16 Enti Yosua ko gyee ɔmantam no nyinaa a ɛyɛ mmepɔw man, Negeb, Gosen asase, atɔe fam nkoko, Yordan Bon, Israel mmepɔw ne nsase tataw fae.
Jozue abotolaki bamboka oyo nyonso: mokili ya bangomba, Negevi mobimba, mokili mobimba ya Gosheni, mokili ya se, etando ya Araba, ngomba ya Isalaele mpe bamboka na yango ya se,
17 Enti afei, Israel nsase bɛyɛɛ nea efi Halak bepɔw a ekosi Seir wɔ atifi fam toa so kɔ Baal-Gad a ɛwɔ Bepɔw Hermon ase wɔ Lebanon bon mu. Yosua kunkum nsase no so ahemfo nyinaa,
wuta na ngomba Alaki oyo ezalaki na ngambo ya Seiri kino na Bala-Gadi, na lubwaku ya Libani na ebandeli ya ngomba Erimoni. Abundisaki bakonzi na yango nyonso mpe abomaki bango.
18 wɔ mmere tenten akokoakoko mu.
Jozue abundisaki bakonzi wana nyonso tango molayi.
19 Kurow biara nni ɔmantam yi mu a ɔne Israelfo yɛɛ asomdwoe apam gye sɛ Hewifo a wɔte Gibeon no. Wodii wɔn a aka no nyinaa so nkonim.
Longola kaka bato ya Evi oyo bazalaki kovanda na Gabaoni, engumba moko te etikalaki kosala boyokani ya kimia na bana ya Isalaele, oyo babotolaki yango nyonso na bitumba.
20 Awurade pirim wɔn koma ma wɔko tiaa Israelfo wɔ bere a anka ɛsɛ sɛ wɔ ne wɔn yɛ asomdwoe nhyehyɛe. Enti wɔsɛee wɔn pasaa a ahummɔbɔ biara nni mu sɛnea Awurade hyɛɛ Mose no.
Nzokande, Yawe Ye moko azalaki koyeisa bango mitema mabanga mpo ete babundisa Isalaele, mpe mpo ete Isalaele asilisa koboma bango nyonso na mawa te, ndenge Yawe atindaki Moyize.
21 Saa bere no mu, Yosua tɔree Anak asefo a na wɔte bepɔw nkurow Hebron, Debir, Anab ne bepɔw man Yuda ne Israel nyinaa ase. Okum wɔn nyinaa na ɔsɛee wɔn nkurow no pasaa.
Na tango wana, Jozue akendeki koboma bato ya Anaki wuta na mokili ya bangomba: wuta na Ebron, na Debiri, na Anabi, na mokili nyonso ya bangomba ya Yuda mpe na mokili nyonso ya bangomba ya Isalaele. Jozue asilisaki koboma bango nyonso elongo na bingumba na bango.
22 Wɔn mu ɔbaako koraa anka wɔ Israel asase so, mmom, wɔn mu bi kaa Gasa, Gat ne Asdod.
Ata moto moko te ya Anaki atikalaki kati na mokili ya bana ya Isalaele. Batikalaki kaka na Gaza, kati na Gati, mpe na Asidodi.
23 Enti Yosua faa asase no nyinaa sɛnea Awurade hyɛɛ Mose no. Ɔde maa Israelfo sɛ wɔn agyapade sononko kyekyɛɛ mu maa mmusuakuw no. Enti awiei no asase no so dwoe.
Jozue abotolaki mokili yango nyonso ndenge Yawe atindaki na Moyize, apesaki yango na Isalaele lokola libula mpe akabolaki yango kolanda mabota ya Isalaele. Bongo mokili ekomaki na kimia mpe bitumba ezalaki lisusu te.