< Yeremia 27 >

1 Yudahene Yosia babarima Sedekia adedi mfiase no, asɛm yi fi Awurade hɔ baa Yeremia nkyɛn se,
Tala liloba oyo Yawe alobaki na Jeremi, na ebandeli ya bokonzi ya Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda:
2 Sɛɛ na Awurade ka kyerɛɛ me: “Fa mmeamdua ne nkyehama yɛ konnua sɛn wo kɔn mu.
Tala liloba oyo Ngai Yawe nalobi: « Sala ekangiseli na basinga mpe banzete mpe kanga yango na kingo na yo.
3 Fa nkra ma abɔfo a wɔaba Yudahene Sedekia nkyɛn wɔ Yerusalem na wɔmfa nkɔma ahemfo a wɔwɔ Edom, Moab, Amon, Tiro ne Sidon.
Bongo tinda maloba epai ya bakonzi ya Edomi, ya Moabi, ya Amoni, ya Tiri mpe ya Sidoni na nzela ya batindami oyo bayei na Yelusalemi mpo na kokutana na Sedesiasi, mokonzi ya Yuda.
4 Fa nkra kɔma wɔn wuranom se: Sɛɛ na Asafo Awurade, Israel Nyankopɔn se, ‘Ka eyi kyerɛ wo wuranom se:
Pesa bango sango oyo bakomemela bakonzi na bango mpe yebisa bango: ‹ Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: ‘Boyebisa bakonzi na bino maloba oyo:
5 Mede me tumi kɛse ne me basa a mateɛ mu yɛɛ asase ne so nnipa ne mmoa a wɔwɔ so, na mede ma obiara a mepɛ.
Ngai nde nasalaki mabele, nasalaki bato mpe banyama nyonso oyo bazali kati na yango, na nguya monene na Ngai mpe na loboko na Ngai oyo esembolama. Napesaka mabele yango epai ya moto nyonso oyo Ngai nalingi.
6 Afei mede mo aman nyinaa bɛhyɛ mʼakoa Babiloniahene Nebukadnessar nsa, na mede wuram mmoa mpo bɛhyɛ nʼase.
Sik’oyo, Ngai, nakabi mikili oyo nyonso na maboko ya mosali na Ngai, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni; nakabi mpe na maboko na ye ata banyama ya zamba mpo ete etosa ye.
7 Amanaman nyinaa bɛsom no ne ne babarima ne ne nenabarima kosi sɛ ne bere betwa mu; na afei aman bebree ne ahemfo akɛseakɛse bedi ne so.
Bikolo nyonso ekotosa ye, mwana na ye ya mobali mpe koko na ye, kino tango ya mokili na ye mpe ekokoka; bongo bikolo ebele mpe bakonzi ya nguya bakokonza ye.
8 “‘Nanso sɛ ɔman bi anaa ahenni bi rensom Babiloniahene Nebukadnessar anaa wɔremfa wɔn kɔn nhyɛ ne konnua ase a, mede afoa, ɔkɔm ne ɔyaredɔm bɛtwe saa ɔman no aso, kosi sɛ mede ne nsa bɛsɛe no, Awurade na ose.
Soki ekolo moko to mokili moko eboyi kosalela Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, to eboyi komema mokumba ya ekangiseli ya mokonzi ya Babiloni, nakopesa ekolo yango etumbu na nzela mopanga, ya nzala makasi mpe ya bokono oyo ebomaka, elobi Yawe, kino nakobebisa yango na nzela ya loboko na ye.
9 Ɛno nti munntie mo adiyifo, mo nkɔmhyɛfo, mo adae asekyerɛfo, mo samanfrɛfo anaa mo ntafowayifo a wɔka kyerɛ mo se, “Morensom Babiloniahene.”
Boye, boyokela te basakoli na bino, bato na bino ya soloka, bato na bino oyo balimbolaka bandoto, bato na bino oyo basololaka na bakufi, oyo bazali koloba na bino ete bosalela mokonzi ya Babiloni te.
10 Wɔhyɛ mo atoro nkɔm a ɛbɛma wɔayi mo afi mo asase so akɔ akyirikyiri nko ara; mɛpam mo ama mo ase ayera.
Bazali kosakola makambo ya lokuta, kaka mpo na komema bino mosika ya mokili na bino. Ngai nakobengana bino solo mpe bokokufa.
11 Nanso sɛ ɔman biara de ne kɔn bɛhyɛ Babiloniahene konnua no ase na wasom no a, mɛma saa ɔman no aka ɔno ara asase so na wadɔw so atena so, Awurade, na ose.’”
Kasi soki ekolo moko endimi komema mokumba ya ekangiseli ya mokonzi ya Babiloni mpe endimi kosalela ye, nakotika ekolo yango na kimia kati na mokili na bango mpo ete basala bilanga mpe bawumela kuna, elobi Yawe.’ › »
12 Mede saa nkra koro no ara kɔmaa Yudahene Sedekia se, “Momfa mo kɔn nhyɛ Babiloniahene konnua ase na monsom ɔno ne ne nkurɔfo na mubenya nkwa.
Bongo napesaki sango kaka wana epai ya Sedesiasi, mokonzi ya Yuda: « Bomema mokumba ya ekangiseli ya mokonzi ya Babiloni mpe bosalela ye elongo na bato na ye, bongo bokobika!
13 Adɛn nti na ɛsɛ sɛ wo ne wo nkurɔfo wuwu wɔ afoa, ɔkɔm ne ɔyaredɔm ano, sɛnea Awurade de ahunahuna ɔman biara a ɔmpɛ sɛ ɔsom Babiloniahene no?
Mpo na nini bino elongo na bato na bino bokufa na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka ndenge Yawe akataki mpo na ekolo nyonso oyo ekoboya kosalela mokonzi ya Babiloni?
14 Munntie adiyifo no a wɔka kyerɛ mo se, ‘Morensom Babiloniahene,’ efisɛ wɔhyɛ mo atoro nkɔm.
Boyoka te maloba ya basakoli oyo bazali koloba na bino: ‹ Bokosalela mokonzi ya Babiloni te! › Bazali kosakola makambo ya lokuta.
15 ‘Mensomaa wɔn’ Awurade na ose. ‘Wɔhyɛ atoro nkɔm wɔ me din mu. Enti mɛpam mo na moayera, mo ne adiyifo a wɔhyɛ mo nkɔm no.’”
Natindaki bango te, » elobi Yawe, « bazali kosakola makambo ya lokuta na Kombo na Ngai. Nakobengana bino mpe bokokufa, bino mpe basakoli oyo bazali kosakola epai na bino. »
16 Na meka kyerɛɛ asɔfo no ne saa nkurɔfo yi nyinaa se, “Sɛɛ na Awurade se: Munntie adiyifo no a wɔhyɛ mo nkɔm se, ‘Ɛrenkyɛ koraa wɔde Awurade fi nneɛma no befi Babilonia aba.’ Wɔhyɛ atoro nkɔm kyerɛ mo.
Bongo nalobaki na Banganga-Nzambe mpe na bato nyonso: « Tala makambo oyo Yawe alobi: Boyoka te basakoli na bino, oyo bazali koloba: ‹ Tala, bisalelo ya Tempelo ya Yawe ekozonga noki wuta na Babiloni. › Bazali koloba na bino makambo ya lokuta!
17 Munntie wɔn. Monsom Babiloniahene na mubenya nkwa. Adɛn nti na ɛsɛ sɛ saa kuropɔn yi sɛe?
Boyoka bango te! Bosalela mokonzi ya Babiloni, bongo bokobika! Mpo na nini engumba oyo ebebisama?
18 Sɛ wɔyɛ adiyifo na Awurade asɛm wɔ wɔn mu a, ma wɔn nkotow nsrɛ Asafo Awurade na nneɛma a wɔde siesie dan mu a aka wɔ Awurade fi ne Yudahene ahemfi ne Yerusalem no, wɔamfa ankɔ Babilonia.
Soki bazali solo basakoli mpe Liloba na Yawe ezali kati na bango, tika ete basambela Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpo ete bisalelo oyo etikalaki kati na Tempelo ya Yawe, kati na ndako ya mokonzi ya Yuda mpe kati na Yelusalemi ekende na Babiloni te.
19 Na sɛɛ na Asafo Awurade ka fa kɔbere mfrafrae afadum, po, nnyinaso a wotumi pia ne nneɛma a wɔde siesie dan mu no a aka wɔ kuropɔn yi mu no ho.
Pamba te, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi na tina na makonzi, nzungu ya monene ya bronze, bivandelo na yango mpe bisalelo mosusu oyo etikalaki kati na engumba wana,
20 Nea Babiloniahene Nebukadnessar amfa ankɔ bere a ɔbɛfaa Yudahene Yehoiakim babarima Yehoiakyin ne Yuda ne Yerusalem mmapɔmma fii Yerusalem kɔɔ nkoasom mu wɔ Babilonia no.
bisalelo oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, atikaki tango amemaki Yekonia, mwana mobali ya Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, na bowumbu longwa na Yelusalemi kino na Babiloni, elongo na bankumu nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi;
21 Yiw, nea Asafo Awurade, Israel Nyankopɔn, ka fa nneɛma a aka wɔ Awurade fi, Yudahene ahemfi ne Yerusalem no ho no ni:
tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na biloko oyo etikalaki kati na Tempelo ya Yawe, kati na ndako ya mokonzi ya Yuda mpe kati na Yelusalemi:
22 ‘Wɔbɛfa akɔ Babilonia, na hɔ na ɛbɛka kosi da a mɛba abɛfa,’ Awurade na ose. ‘Afei mede nneɛma no bɛsan aba bio abesisi wɔn sibea wɔ ha.’”
‹ Bakomema yango na Babiloni, mpe ekotikala kuna kino na mokolo oyo nakolandela yango, › elobi Yawe, ‹ nakolongola yango mpe nakozongisa yango na esika oyo, elobi Yawe. › »

< Yeremia 27 >