< Mezmurlar 33 >

1 Ey doğru insanlar, RAB'be sevinçle haykırın! Dürüstlere O'nu övmek yaraşır.
Bino bato ya sembo, bobeta milolo ya esengo na tina na Yawe! Kokumisa Nzambe ebongi na bato oyo bazali alima.
2 Lir çalarak RAB'be şükredin, On telli çenk eşliğinde O'nu ilahilerle övün.
Bosanzola Yawe na nzenze, bosanzola Ye na lindanda ya basinga zomi.
3 O'na yeni bir ezgi söyleyin, Sevinç çığlıklarıyla sazınızı konuşturun.
Boyembela Yawe nzembo ya sika, bobetisa bibetelo mindule elongo na koganga ya esengo.
4 Çünkü RAB'bin sözü doğrudur, Her işi sadakatle yapar.
Pamba te Liloba na Yawe ezali alima, misala na Ye nyonso ekokisamaka na boyengebene.
5 Doğruluğu, adaleti sever, RAB'bin sevgisi yeryüzünü doldurur.
Yawe alingaka bosembo mpe alima; mokili etondi na bolingo na Ye.
6 Gökler RAB'bin sözüyle, Gök cisimleri ağzından çıkan solukla yaratıldı.
Likolo ekelamaki na Liloba na Yawe; mampinga na yango nyonso, na nzela ya pema ya monoko na Ye.
7 Deniz sularını bir araya toplar, Engin suları ambarlara depolar.
Asangisaka mayi ya bibale minene esika moko, mpe atiaka yango na bisika ya mozindo.
8 Bütün yeryüzü RAB'den korksun, Dünyada yaşayan herkes O'na saygı duysun.
Tika ete mokili mobimba etosa Yawe! Tika ete bavandi nyonso ya mokili balenga liboso na Ye.
9 Çünkü O söyleyince, her şey var oldu; O buyurunca, her şey belirdi.
Pamba te alobaki, mpe likambo esalemaki; mpe apesaki mitindo, mpe emonanaki.
10 RAB ulusların planlarını bozar, Halkların tasarılarını boşa çıkarır.
Yawe akweyisaka mikano ya bikolo, abebisaka mabongisi ya bato.
11 Ama RAB'bin planları sonsuza dek sürer, Yüreğindeki tasarılar kuşaklar boyunca değişmez.
Kasi mikano ya Yawe etikalaka mpo na seko, mabongisi ya motema na Ye, mpo na bikeke nyonso.
12 Ne mutlu Tanrısı RAB olan ulusa, Kendisi için seçtiği halka!
Esengo na ekolo oyo Yawe azali Nzambe na yango. Esengo na bato oyo aponaki mpo na libula na Ye.
13 RAB göklerden bakar, Bütün insanları görür.
Yawe atalaka wuta na likolo, amonaka bana nyonso ya bato.
14 Oturduğu yerden, Yeryüzünde yaşayan herkesi gözler.
Wuta na evandelo na Ye, atalaka bavandi nyonso ya mokili.
15 Herkesin yüreğini yaratan, Yaptıkları her şeyi tartan O'dur.
Ye oyo asalaka mitema nyonso ya bato asosolaka makambo nyonso oyo basalaka.
16 Ne büyük ordularıyla zafer kazanan kral var, Ne de büyük gücüyle kurtulan yiğit.
Ezali te limpinga monene nde ebikisaka mokonzi to nguya monene nde ekangolaka elombe.
17 Zafer için at boş bir umuttur, Büyük gücüne karşın kimseyi kurtaramaz.
Mpunda ezali na nguya te ya kopesa lobiko, makasi na yango nyonso ekangolaka te.
18 Ama RAB'bin gözü kendisinden korkanların, Sevgisine umut bağlayanların üzerindedir;
Nzokande Yawe atalaka bato oyo batosaka Ye, ba-oyo batiaka elikya na bolingo kati na Ye,
19 Böylece onları ölümden kurtarır, Kıtlıkta yaşamalarını sağlar.
mpo na kokangola bango na kufa mpe kobatela bango na bomoi ata na tango ya nzala makasi.
20 Umudumuz RAB'dedir, Yardımcımız, kalkanımız O'dur.
Totielaka Yawe motema; azali lisungi mpe nguba na biso.
21 O'nda sevinç bulur yüreğimiz, Çünkü O'nun kutsal adına güveniriz.
Solo, mitema na biso esepelaka kati na Ye, pamba te totiaka elikya na biso kati na Kombo na Ye ya bule.
22 Madem umudumuz sende, Sevgin üzerimizde olsun, ya RAB!
Yawe, lokola totiaka elikya na biso kati na Yo, tika ete bolingo na Yo ezala elongo na biso.

< Mezmurlar 33 >