< Çölde Sayim 34 >
1 RAB Musa'ya şöyle dedi:
Yawe alobaki na Moyize:
2 “İsrailliler'e de ki, ‘Mülk olarak size düşecek Kenan ülkesine girince, sınırlarınız şöyle olacak:
« Pesa mitindo oyo na bana ya Isalaele: ‹ Tango bokokota na Kanana, tala mokili oyo ekopesamela bino lokola libula, mokili ya Kanana elongo na bandelo na yango oyo:
3 “‘Güney sınırınız Zin Çölü'nden Edom sınırı boyunca uzanacak. Doğuda, güney sınırınız Lut Gölü'nün ucundan başlayacak,
Na ngambo ya sude, mondelo na bino ekobanda na esobe ya Tsini mpe ekolanda mondelo ya mokili ya Edomi. Na ngambo ya este, mondelo na bino ya sude ekobanda na ebale monene ya Barozo,
4 Akrep Geçidi'nin güneyinden Zin'e geçip Kadeş-Barnea'nın güneyine dek uzanacak. Oradan Hasar-Addar'a ve Asmon'a,
ekokita na sude ya ebandeli ya ngomba Akarabimi mpe ekoleka na Tsini kino na sude ya Kadeshi-Barinea; ekokoba na Atsari-Adari mpe ekoleka na Atsimoni.
5 oradan da Mısır Vadisi'ne uzanarak Akdeniz'de son bulacak.
Longwa na Atsimoni, ekoleka na mayi ya lubwaku ya Ejipito mpo na kosuka na ebale monene.
6 “‘Batı sınırınız Akdeniz ve kıyısı olacak. Batıda sınırınız bu olacak.
Mondelo na bino ya ngambo ya weste ekozala ebale monene Mediterane.
7 “‘Kuzey sınırınız Akdeniz'den Hor Dağı'na dek uzanacak.
Na ngambo ya nor, mondelo na bino ekobanda na ebale monene Mediterane kino na ngomba Ori.
8 Hor Dağı'ndan Levo-Hamat'a, oradan Sedat'a,
Longwa na ngomba Ori, bokolekisa yango na Lebo-Amati mpo na kosuka na Tsedadi.
9 Zifron'a doğru uzanarak Hasar-Enan'da son bulacak. Kuzeyde sınırınız bu olacak.
Longwa na Tsedadi, ekoleka na Zifironi mpe ekokoma na Atsari-Enani. Yango nde ekozala mondelo na bino ya ngambo ya nor.
10 “‘Doğu sınırınız Hasar-Enan'dan Şefam'a dek uzanacak.
Na ngambo ya este, mondelo na bino ekobanda na Atsari-Enani kino na Shefami;
11 Sınırınız Şefam'dan Ayin'in doğusundaki Rivla'ya dek inecek. Oradan Kinneret Gölü'nün doğu kıyısındaki yamaçlara dek uzanacak.
longwa na Shefami, ekokita na Ribila na ngambo ya este ya Ayini mpe ekolanda ebale ya Kinereti, na ngambo na yango ya este,
12 Oradan Şeria Irmağı boyunca uzanacak ve Lut Gölü'nde son bulacak. “‘Her yandan ülkenizin sınırları bu olacaktır.’”
kino na Yordani mpo na kosuka na ebale monene ya Barozo. Ezali ndenge wana nde mokili na bino ekozala elongo na bandelo oyo ezingeli yango. › »
13 Musa İsrailliler'e, “Miras olarak kurayla paylaştıracağınız ülke budur” dedi, “RAB'bin buyruğu uyarınca ülke dokuz oymakla bir yarım oymak arasında paylaştırılacak.
Moyize apesaki mitindo oyo na bana ya Isalaele: « Tala yango wana, mokili oyo bokokabola na zeke, mokili oyo Yawe apesaki mitindo ete bapesa yango na mabota libwa na ndambo.
14 Çünkü Ruben oymağına bağlı ailelerle Gad oymağına bağlı aileler ve Manaşşe oymağının öbür yarısı mülklerini aldılar.
Pamba te ndako na ndako ya libota ya Ribeni mpe ndako na ndako ya libota ya Gadi elongo na ndambo ya libota ya Manase esilaki kozwa libula na yango.
15 Bu iki oymakla yarım oymak mülklerini Eriha'nın karşısındaki Şeria Irmağı'nın doğusunda aldılar.”
Mabota oyo mibale na ndambo ezwaki libula na yango na ngambo ya este ya Yordani, oyo etalana na Jeriko. »
16 RAB Musa'ya şöyle dedi:
Yawe alobaki lisusu na Moyize:
17 “Ülkeyi mülk olarak aranızda paylaştıracak adamlar şunlardır: Kâhin Elazar ve Nun oğlu Yeşu.
« Tala bato oyo bakokabola mokili kati na bino: Nganga-Nzambe Eleazari mpe Jozue, mwana mobali ya Nuni.
18 Ülkeyi mülk olarak paylaştırmaları için her oymaktan birer önder görevlendirin.
Bokozwa lisusu mokambi moko kati na libota moko na moko mpo na kokabola mokili.
19 Şu adamları görevlendireceksiniz: “Yahuda oymağından Yefunne oğlu Kalev,
Tala bakombo na bango: Mpo na libota ya Yuda: Kalebi, mwana mobali ya Yefune;
20 Şimon oymağından Ammihut oğlu Şemuel,
mpo na libota ya Simeoni: Samuele, mwana mobali ya Amiwudi;
21 Benyamin oymağından Kislon oğlu Elidat,
mpo na libota ya Benjame: Elidadi, mwana mobali ya Kisiloni;
22 Dan oymağından Yogli oğlu önder Bukki,
mpo na libota ya Dani: mokambi Buki, mwana mobali ya Yogili;
23 Yusufoğulları'ndan: Manaşşe oymağından Efot oğlu önder Hanniel,
mpo na bana ya Jozefi, libota ya Manase: mokambi Anieli, mwana mobali ya Efodi;
24 Efrayim oymağından Şiftan oğlu önder Kemuel,
libota ya Efrayimi: mokambi Kemweli, mwana mobali ya Shifitani;
25 Zevulun oymağından Parnak oğlu önder Elisafan,
mpo na libota ya Zabuloni: mokambi Elitsafani, mwana mobali ya Parinaki;
26 İssakar oymağından Azzan oğlu önder Paltiel,
mpo na libota ya Isakari: mokambi Palitieli, mwana mobali ya Azani;
27 Aşer oymağından Şelomi oğlu önder Ahihut,
mpo na libota ya Aseri: mokambi Ayiwudi, mwana mobali ya Shelomi;
28 Naftali oymağından Ammihut oğlu önder Pedahel.”
mpo na libota ya Nefitali: mokambi Padeyeli, mwana mobali ya Amiwudi. »
29 Kenan ülkesinde İsrailliler'e mülkü paylaştırmaları için RAB'bin görevlendirdiği adamlar bunlardı.
Bango wana nde bato oyo Yawe apesaki mokumba ya kokabola mokili ya Kanana kati na bana ya Isalaele.