< Çölde Sayim 27 >

1 Yusuf oğlu Manaşşe'nin boylarından Manaşşe oğlu Makir oğlu Gilat oğlu Hefer oğlu Selofhat'ın Mahla, Noa, Hogla, Milka, Tirsa adındaki kızları, Buluşma Çadırı'nın girişinde Musa'nın, Kâhin Elazar'ın, önderlerin ve bütün topluluğun önüne gelip şöyle dediler:
Bana basi ya Tselofikadi, mwana mobali ya Eferi, mwana mobali ya Galadi, mwana mobali ya Makiri, mwana mobali ya Manase bazalaki bakitani ya libota ya Manase, mwana mobali ya Jozefi. Bakombo na bango ezalaki: Mala, Noa, Ogila, Milika mpe Tiritsa. Bayaki
2
liboso ya Moyize, ya Nganga-Nzambe Eleazari mpe ya bakambi ya lisanga mobimba, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe balobaki:
3 “Babamız çölde öldü. RAB'be başkaldıran Korah'ın yandaşları arasında değildi. İşlemiş olduğu günahtan ötürü öldü. Oğulları olmadı.
« Tata na biso akufaki na esobe. Azalaki te na molongo na bato oyo bazalaki kolanda Kore, oyo basanganaki lisanga mpo na kotelemela Yawe, kasi akufaki mpo na masumu na ye moko mpe atikaki bana mibali te.
4 Erkek çocuğu olmadı diye babamızın adı kendi boyu arasından neden yok olsun? Babamızın kardeşleri arasında bize de mülk verin.”
Bongo mpo na nini kombo ya tata na biso elimwa kaka boye na libota na ye, mpo ete azalaki na mwana mobali te? Pesa biso mpe eteni ya mabele kati na bandeko ya tata na biso. »
5 Musa onların davasını RAB'be götürdü.
Boye, Moyize amemaki likambo na bango liboso ya Yawe.
6 RAB Musa'ya şöyle dedi:
Yawe alobaki na Moyize:
7 “Selofhat'ın kızları doğru söylüyor. Onlara amcalarıyla birlikte miras olarak mülk verecek, babalarının mirasını onlara aktaracaksın.
« Makambo oyo bana basi ya Tselofikadi bazali koloba ezali solo. Osengeli kopesa bango eteni ya mabele lokola libula kati na bandeko ya tata na bango mpe pesa bango libula ya tata na bango.
8 “İsrailliler'e de ki, ‘Bir adam erkek çocuğu olmadan ölürse, mirasını kızına vereceksiniz.
Loba na bana ya Isalaele: ‹ Soki moto moko asili kokufa mpe atiki bana mibali te, bokopesa libula na ye epai ya mwana na ye ya mwasi.
9 Kızı yoksa mirasını kardeşlerine,
Soki mpe azali na mwana mwasi te, bokopesa libula na ye epai ya bandeko na ye ya mibali.
10 kardeşleri yoksa amcalarına vereceksiniz.
Soki mpe azali na bandeko mibali te, bokopesa libula na ye epai ya bandeko mibali ya tata na ye.
11 Amcaları da yoksa, mirasını bağlı olduğu boyda kendisine en yakın akrabasına vereceksiniz. Yakını mirası mülk edinsin. Musa'ya verdiğim buyruk uyarınca, İsrailliler için kesin bir kural olacak bu.’”
Bongo, soki tata na ye azalaki mpe na bandeko mibali te, bokopesa libula na ye epai ya ndeko ya pene ya libota ya tata na ye; ye nde akokitana na yango. Oyo ekozala mpo na Isalaele, mobeko oyo bosengeli kolanda ndenge Yawe alobaki na Moyize. › »
12 Bundan sonra RAB Musa'ya, “Haavarim dağlık bölgesine çık, İsrailliler'e vereceğim ülkeye bak” dedi,
Yawe alobaki na Moyize: — Mata likolo ya bangomba ya Abarimi, mpe tala mokili oyo napesaki epai ya bana ya Isalaele.
13 “Ülkeyi gördükten sonra, ağabeyin Harun gibi sen de ölüp atalarına kavuşacaksın.
Sima na yo komona yango, yo mpe okokende kosangana na bakoko na yo na mokili ya bakufi ndenge moko na Aron, ndeko na yo ya mobali,
14 Çünkü ikiniz de Zin Çölü'nde buyruğuma karşı çıktınız. Topluluk sularda bana başkaldırdığında, onların önünde kutsallığımı önemsemediniz.” –Bunlar Zin Çölü'ndeki Kadeş'te Meriva sularıdır.–
pamba te tango lisanga ya bato batombokaki mpo na mayi, na esobe ya Tsini, bino mpe botosaki mitindo na Ngai te mpe bopesaki lokumu te na bosantu na Ngai na miso na bango. Ezalaki nde mayi ya Meriba ya Kadeshi, na esobe ya Tsini.
15 Musa, “Bütün insan ruhlarının Tanrısı RAB bu topluluğa bir önder atasın” diye karşılık verdi,
Moyize alobaki na Yawe:
— Tika ete Yawe, Nzambe oyo apesaka pema na bato nyonso, apona moto moko mpo ete akamba lingomba oyo;
17 “O kişi topluluğun önünde yürüsün ve topluluğu yönetsin. Öyle ki, RAB'bin topluluğu çobansız koyunlar gibi kalmasın.”
moto oyo akobanda kobima mpe kokota liboso na bango, oyo akobanda kobimisa mpe kokotisa bango mpo ete bato na Yawe bazala te lokola bibwele oyo ezanga mobateli.
18 Bunun üzerine RAB, “Kendisinde RAB'bin Ruhu bulunan Nun oğlu Yeşu'yu yanına al, üzerine elini koy” dedi,
Yawe azongiselaki Moyize: — Kamata Jozue, mwana mobali ya Nuni, moto oyo azali na molimo mpe tia ye maboko na yo.
19 “Onu Kâhin Elazar'la bütün topluluğun önüne çıkar ve hepsinin önünde görevlendir.
Mema ye liboso ya Nganga-Nzambe Eleazari mpe ya lingomba mobimba ya bato, bongo okopesa ye mosala na miso na bango.
20 Bütün İsrail topluluğu sözünü dinlesin diye ona yetkinden ver.
Pesa ye ndambo ya bokonzi na yo mpo ete lisanga mobimba ya bana ya Isalaele bakoka kotosa ye.
21 Kâhin Elazar'ın önüne çıkacak; kâhin, Yeşu için Urim aracılığıyla RAB'be danışacak. Bu yöntemle Elazar Yeşu'yu ve bütün halkı yönlendirecek.”
Akokende kotelema liboso ya Nganga-Nzambe Eleazari, oyo akotuna mokano na Yawe mpo na ye, na nzela na Urimi. Na mokano wana nde, ye mpe lisanga mobimba ya bana ya Isalaele bakobanda kobima mpe kokota.
22 Musa RAB'bin kendisine buyurduğu gibi yaptı. Yeşu'yu Kâhin Elazar'ın ve bütün topluluğun önüne götürdü.
Moyize asalaki ndenge Yawe atindaki ye. Akamataki Jozue mpe atelemisaki ye liboso ya Nganga-Nzambe Eleazari mpe liboso ya lisanga mobimba ya Isalaele.
23 RAB'bin buyruğu uyarınca ellerini üzerine koyarak onu görevlendirdi.
Atiaki ye maboko mpe apesaki ye mosala, ndenge Yawe atindaki na nzela ya Moyize.

< Çölde Sayim 27 >