< Yeremya 46 >

1 RAB uluslara ilişkin Peygamber Yeremya'ya şöyle seslendi:
Tala liloba oyo Yawe alobaki na mosakoli Jeremi na tina na bikolo ya bapaya:
2 Mısır'a ilişkin: Yahuda Kralı Yoşiya oğlu Yehoyakim'in dördüncü yılında, Babil Kralı Nebukadnessar'ın Fırat kıyısında, Karkamış'ta yenilgiye uğrattığı Firavun Neko'nun ordusuyla ilgili bildiri:
Na tina ya Ejipito: Tala maloba ya kosambisa mampinga ya Faraon Neko, mokonzi ya Ejipito, oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, alongaki pene ya ebale Efrate, na Karikemishi, tango Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu minei na bokonzi:
3 “Küçük büyük kalkanları dizin, Savaşmak için ilerleyin!
« Bobongisa banguba na bino: ya minene mpe ya mike, mpe bokende bitumba!
4 Atları koşun, beygirlere binin! Miğferlerinizi takın, yerinizi alın! Mızraklarınızı cilalayın, Zırhlarınızı kuşanın!
Bobongisa bampunda mpe bomata na bashar! Bomitanda na milongo mpe bolata bikoti ya bitumba! Bopelisa basonge ya makonga na bino mpe bolata bibundeli!
5 Ne görüyorum? Dehşete düştüler, geri çekiliyorlar! Yiğitleri bozguna uğramış, Arkalarına bakmadan kaçışıyorlar. Her yer dehşet içinde” diyor RAB.
Nazali komona nini? Bazali kolenga na somo mpe kozonga sima; balongi basoda na bango ya mpiko, bazali kopota mbangu makasi mpe bazali ata kotala sima te: somo ekangi bango na bangambo nyonso, » elobi Yawe.
6 “Ayağı tez olan kaçamıyor, Yiğit kaçıp kurtulamıyor. Kuzeyde, Fırat kıyısında Tökezleyip düştüler.
« Bato ya mbangu bazali kokoka lisusu kokima te, mpe basoda ya mpiko bazali kokoka lisusu kobika te! Bazali nde kobeta mabaku mpe kokweya pembeni ya ebale Efrate, kati na etuka ya nor.
7 Nil gibi yükselen, Irmak gibi suları çalkalanan kim?
Nani oyo azali koya lokola ebale Nili, lokola mayi ya bibale oyo etomboki?
8 Mısır'dır Nil gibi yükselen, Irmak gibi suları çalkalanan. ‘Yükselip yeryüzünü kaplayacağım; Kentleri de içlerinde oturanları da Yok edeceğim’ diyor Mısır.
Mokili ya Ejipito ezali koya lokola ebale Nili, lokola mayi ya bibale oyo etomboki. Ejipito ezali koloba: ‹ Nakoya mpe nakotondisa mokili, nakobebisa bingumba mpe bato na yango. ›
9 Şahlanın, ey atlar! Çılgınca saldırın, ey savaş arabaları! Ey kalkan taşıyan Kûşlu, Pûtlu yiğitler, Yay çeken Ludlular, ilerleyin!
Bino bampunda, bokende! Bino basoda oyo botambolaka likolo ya bashar, botambolisa mbangu! Bino basoda, bato ya Kushi mpe ya Puti, oyo bomemaka banguba, mpe bino bato ya Ludi oyo bobundaka na matolotolo, bokende liboso!
10 “Çünkü o gün Rab'bin, Her Şeye Egemen RAB'bin günüdür. Düşmanlarından öç alması için Öç günüdür. Kılıç doyana dek yiyecek, Kanlarını kana kana içecek. Çünkü Rab, Her Şeye Egemen RAB Kuzeyde, Fırat kıyısında kurban hazırlıyor.
Ezali mokolo ya Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga; mokolo ya kozongisa mabe na mabe, mpo na kozongisela banguna na yo mabe. Mopanga ekoboma kino ekotonda, kino ekosilisa posa na yango ya makila; pamba te ezali nde mbeka mpo na Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, pene ya ebale Efrate, kati na etuka ya nor.
11 “Ey erden kız Mısır, Gilat'a git de merhem al! Ama boşuna çok ilaç kullanıyorsun, Senin için şifa yok.
Oh moseka Ejipito, kende kozwa malasi kati na Galadi! Ozali kobakisa na pamba bakisi likolo ya bakisi, okobika na yo te!
12 Uluslar utancını duydu, Feryadınla doldu yeryüzü. Yiğit yiğide tökezleyip İkisi birlikte yere seriliyor.”
Bikolo ya bapaya ekoyoka sango ya soni na yo, makelele ya koganga na yo ekotondisa mabele. Soda moko akotutana na soda mosusu, mpe bango mibale bakokweya nzela moko. »
13 Babil Kralı Nebukadnessar'ın gelip Mısır'a saldıracağına ilişkin RAB'bin Peygamber Yeremya'ya bildirdiği söz şudur:
Tala liloba oyo Yawe alobaki na mosakoli Jeremi na tina na koya ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpo na kobundisa Ejipito:
14 “Mısır'da bildirin, Migdol'da duyurun, Nof'ta, Tahpanhes'te duyurun: ‘Yerini al, hazırlan, Çünkü çevrendekileri yiyip bitiriyor kılıç!’
« Loba makambo oyo na Ejipito mpe tatola yango na Migidoli; tatola yango lisusu na Mefisi mpe na Takipenesi: ‹ Bomitanda na milongo mpe bobongama, pamba te mopanga ezali koboma bato oyo bazali zingazinga na yo. ›
15 İlahın Apis neden kaçtı? Boğan neden ayakta kalamadı? Çünkü RAB onu yere serdi!
Mpo na nini bamemi basoda na yo ya mpiko? Bakokaki kopika te, pamba te Yawe akweyisaki bango.
16 Boyuna tökezleyip birbirlerinin üzerine düşecekler. ‘Kalkın, acımasızların kılıcı yüzünden halkımıza, Yurdumuza dönelim’ diyecekler.
Tango nyonso, bazali se kobeta mabaku, bazali kokweya moko likolo ya mosusu. Bazali koloba: ‹ Tika ete totelema mpe tozonga epai ya bato na biso moko mpe na mokili na biso, epai babota biso, mpo ete tobika na mopanga oyo ezali koboma. ›
17 ‘Firavun yaygaracının biri, Fırsatı kaçırdı’ diyecekler.
Kuna, bakokoma koganga: ‹ Faraon, mokonzi ya Ejipito, atiaka kaka makelele ya pamba, akoki na ye makambo te! ›
18 “Varlığım hakkı için” diyor Kral, Adı Her Şeye Egemen RAB, “Dağlar arasında Tavor Dağı nasılsa, Karmel Dağı deniz kıyısında nasılsa, Size saldıracak kişi de öyledir.
Lokola Ngai nazali na bomoi, » elobi Mokonzi oyo Kombo na Ye ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga; « monguna oyo azali lokola ngomba Tabori kati na bangomba, lokola ngomba Karimeli pembeni ya ebale monene, azali koya!
19 Ey sizler, Mısır'da yaşayanlar, Toplayın eşyanızı, sürgüne gideceksiniz! Nof öyle viran olup yanacak ki, Kimse oturmayacak içinde.
Yo movandi ya Ejipito, kanga bisaka na yo mpo na kokende na bowumbu, pamba te Mefisi ekokoma esobe, ekobebisama mpe ekotikala lisusu na bato te!
20 “Mısır güzel bir düve, Ama kuzeyden at sineği geliyor ona.
Mokili ya Ejipito ezali lokola mwana ngombe ya kitoko ya mwasi, kasi nzinzi ezali koya koswa yango kowuta na nor.
21 Ücretli askerleri besili danalar gibi. Onlar da geri dönüp birlikte kaçacak, Yerlerinde durmayacaklar. Çünkü üzerlerine yıkım günü, Cezalandırılacakları an gelecek.
Basoda ya bapaya bazali kati na milongo na ye, bazali lokola bana ngombe ya mibali mpe ya mafuta kati na etonga. Bango mpe bakobaluka mpe bakokima nzela moko; bakokoka kolonga te, pamba te mokolo ya pasi ezali koya kokweyela bango: ezali tango ya etumbu mpo na bango.
22 Düşman ordusu ilerleyince, Mısır yılan gibi tıslayarak kaçacak. Ağaç kesen adamlar gibi Baltalarla ona saldıracaklar.
Ejipito ezali kokima, na makelele lokola nyoka, pamba te banguna na yango bazali kopusana na nguya; bazali koya kobundisa yango na bipasola lokola bato oyo bakataka banzete.
23 Gür olsa bile kesecekler ormanını” diyor RAB, “Çünkü çekirgelerden daha çok onlar, Sayıya vurulamazlar.
Bakokata banzete nyonso ya zamba na yango, » elobi Yawe, « ata soki ezali na banzete ebele. Bazali ebele koleka mabanki, bakokoka kotanga motango na bango te.
24 Mısır utandırılacak, Kuzey halkının eline teslim edilecek.”
Elenge mwasi ya Ejipito akoyokisama soni, akokweya na maboko ya bato ya nor. »
25 İsrail'in Tanrısı, Her Şeye Egemen RAB diyor ki, “İşte No Kenti'nin ilahı Amon'u, firavunu, Mısır'la ilahlarını, krallarını ve firavuna güvenenleri cezalandırmak üzereyim.
Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: « Nakopesa etumbu epai na Amoni, na nzambe ya Tebesi, na Faraon, na Ejipito mpe na banzambe na yango, na Faraon mpe na bato oyo batiaka mitema na bango epai na ye.
26 Hepsini can düşmanları Babil Kralı Nebukadnessar'la görevlilerinin eline teslim edeceğim. Ama sonra, eskiden olduğu gibi insanlar yine Mısır'da yaşayacak” diyor RAB.
Nakokaba bango na maboko ya bato oyo bazali koluka kosala bango mabe, na maboko ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpe na maboko ya bakonzi ya basoda na ye. Mpe na sima na tango, Ejipito ekotonda lisusu na bato oyo bakovanda kuna, ndenge ezalaki na tango ya kala, » elobi Yawe.
27 “Korkma, ey kulum Yakup, Yılma, ey İsrail. Çünkü seni uzak yerlerden, Soyunu sürgün edildiği ülkeden kurtaracağım. Yakup yine huzur ve güvenlik içinde olacak, Kimse onu korkutmayacak.
« Oh Jakobi, mosali na Ngai, kobanga te! Oh Isalaele, kobanga te; nakobikisa yo solo wuta na mokili ya mosika, nabikisa bakitani na yo wuta na mokili ya bowumbu. Jakobi akozala lisusu na kimia mpe na bobatelami malamu, moto moko te akobangisa ye lisusu.
28 Korkma, ey kulum Yakup, Çünkü ben seninleyim” diyor RAB. “Seni aralarına sürdüğüm ulusların hepsini Tümüyle yok etsem de, Seni büsbütün yok etmeyeceğim. Adaletle yola getirecek, Hiç cezasız bırakmayacağım seni.”
Oh Jakobi, mosali na Ngai, kobanga te; pamba te nazali elongo na yo, » elobi Yawe, « ata soki nabebisi bikolo nyonso epai wapi napanzaki bino, nakobebisa yo nyonso te. Nakopamela yo solo, kasi nakosala yango na bosembo; nakozanga te kopesa yo etumbu. »

< Yeremya 46 >