< Yeremya 31 >
1 “O zaman” diyor RAB, “Bütün İsrail boylarının Tanrısı olacağım, onlar da benim halkım olacaklar.”
« Na tango wana, » elobi Yawe, « Ngai nakozala Nzambe ya bituka nyonso ya Isalaele, mpe bango bakozala bato na Ngai. »
2 RAB diyor ki, “Kılıçtan kaçıp kurtulan halk çölde lütuf buldu. Ben İsrail'i rahata kavuşturmaya gelirken,
Tala liloba oyo Yawe alobi: « Bato oyo bakobika na mopanga bakozwa ngolu kati na esobe; boye, nakoya kopesa Isalaele bopemi. »
3 Ona uzaktan görünüp şöyle dedim: Seni sonsuz bir sevgiyle sevdim, Bu nedenle sevecenlikle seni kendime çektim.
Yawe abimelaki biso na kala, alobaki: « Nalingaka bino na bolingo ya seko; yango wana nabendaka bino epai na Ngai na nzela ya bolingo.
4 Seni yeniden bina edeceğim, Yeniden bina edileceksin, ey erden kız İsrail! Yine teflerini alacak, Sevinçle coşup oynayanlara katılacaksın.
Nakobongisa bino lisusu; oh Isalaele, mboka kitoko, okotongama lisusu. Okolata lisusu mbunda na yo ya mike mpe okobina mabina ya esengo.
5 Samiriye dağlarında yine bağ dikeceksin; Bağ dikenler üzümünü yiyecekler.
Okolona lisusu bilanga ya vino na bangomba ya Samari; bato oyo bakolona yango bakosepela tango bakobuka mbuma na yango.
6 Efrayim'in dağlık bölgesindeki bekçilerin, ‘Haydi, Siyon'a, Tanrımız RAB'be çıkalım’ Diye bağıracakları bir gün var.”
Ekozala mokolo oyo bakengeli bakoganga na bangomba ya Efrayimi: ‹ Boya! Tika ete tokende na Siona, epai na Yawe, Nzambe na biso! › »
7 RAB diyor ki, “Yakup için sevinçle haykırın! Ulusların başı olan için bağırın! Övgülerinizi duyurun! ‘Ya RAB, halkını, İsrail'den sağ kalanları kurtar’ deyin.
Tala liloba oyo Yawe alobi: « Boyemba na esengo mpo na Jakobi, boganga na esengo mpo na ekolo ya liboso kati na bikolo nyonso! Batatola, bosanzola mpe boloba: ‹ Oh Yawe, bikisa bato na Yo, bato ya Isalaele oyo batikali. ›
8 İşte, onları kuzey ülkesinden Geri getirmek üzereyim; Onları dünyanın dört bucağından toplayacağım. Aralarında kör, topal, Gebe kadın da, doğuran kadın da olacak. Büyük bir topluluk olarak buraya dönecekler.
Tala, nakozongisa bango wuta na mokili ya nor mpe nakosangisa bango wuta na basuka ya mokili. Kati na bango, ekozala na bakufi miso mpe bakakatani, basi ya zemi mpe basi oyo bazali na pasi ya kobota; bato ebele penza bakozonga.
9 Ağlaya ağlaya gelecekler, Benden yardım dileyenleri geri getireceğim. Akarsular boyunca tökezlemeyecekleri Düz bir yolda yürüteceğim onları. Çünkü ben İsrail'in babasıyım, Efrayim de ilk oğlumdur.
Bakendeki na kolela, kasi nakozongisa bango, wana bakozala kati na kobondela; nakokamba bango na bisika oyo mayi etiolaka, na nzela esembolama mpo ete babeta mabaku te; pamba te nazali Tata ya Isalaele, mpe Efrayimi azali mwana na Ngai ya liboso.
10 “RAB'bin sözünü dinleyin, ey uluslar! Uzaktaki kıyılara duyurun: ‘İsrail'i dağıtan onu toplayacak, Sürüsünü kollayan çoban gibi kollayacak onu’ deyin.
Oh bino bikolo, boyoka Liloba na Yawe, botatola yango na bisanga ya mosika! Boloba: ‹ Ye oyo apanzaki Isalaele akosangisa bango mpe akobatela bango ndenge mobateli bibwele abatelaka etonga na ye.
11 Çünkü RAB Yakup'u kurtaracak, Onu kendisinden güçlü olanın elinden özgür kılacak.
Mpo ete Yawe akokangola Jakobi mpe akobikisa bango na maboko ya bato oyo baleki bango na makasi.
12 Siyon'un yüksek tepelerine gelip Sevinçle haykıracaklar. RAB'bin verdiği iyilikler karşısında –Tahıl, yeni şarap, zeytinyağı, Davar ve sığır yavruları karşısında– Yüzleri sevinçle parlayacak. Sulanmış bahçe gibi olacak, Bir daha solmayacaklar.
Bakozonga na koganga ya esengo na bangomba ya Siona; bakosepela na bomengo ya Yawe: ble, vino ya sika mpe mafuta, bameme mpe bangombe. Bakokoma lokola elanga ya kitoko oyo basopela mayi, mpe bakozala lisusu na mawa te.
13 O zaman erden kızlar, genç yaşlı erkekler Hep birlikte oynayıp sevinecek. Yaslarını coşkuya çevirecek, Üzüntülerini avutup onları sevindireceğim.
Bilenge basi bakobina na esengo elongo na bilenge mibali mpe mibange. Nakobongola matanga na bango na esengo, nakopesa bango kobondisama mpe esengo na esika ya mawa.
14 Kâhinleri bol yiyecekle doyuracağım, Halkım iyiliklerimle doyacak” diyor RAB.
Nakoleisa malamu Banganga-Nzambe na mafuta ya bibwele, mpe bato na Ngai bakotonda na biloko na Ngai, › » elobi Yawe.
15 RAB diyor ki, “Rama'da bir ses duyuldu, Ağlayış ve acı feryat sesleri! Çocukları için ağlayan Rahel avutulmak istemiyor. Çünkü onlar yok artık!”
Tala liloba oyo Yawe alobi: « Mongongo moko ezali koyokana na Rama, ezali mongongo ya mawa mpe ya kolela makasi: Rasheli azali kolela bana na ye ya mibali mpe aboyi kobondisama, pamba te bana na ye ya mibali bazali lisusu na bomoi te. »
16 RAB diyor ki, “Sesini ağlamaktan, Gözlerini yaş dökmekten alıkoy. Çünkü verdiğin emek ödüllendirilecek” diyor RAB. “Halkım düşman ülkesinden geri dönecek.
Tala liloba oyo Yawe alobi: « Tika kolela mpe kobimisa mpinzoli, pamba te mosala na yo ezali na litomba, » elobi Yawe, « bana na yo ya mibali bakozonga wuta na mokili ya banguna.
17 Geleceğin için umut var” diyor RAB. “Çocukların yurtlarına dönecekler.
Elikya ezali mpo na bomoi na yo ya lobi, » elobi Yawe, « bana na yo bakozonga na mokili na bango.
18 “Efrayim'in inlemelerini kuşkusuz duydum: ‘Beni eğitilmemiş dana gibi yola getirdin Ve yola geldim. Beni geri getir, döneyim. Çünkü RAB Tanrım sensin.
Nayoki kolelalela ya Efrayimi: ‹ Opesi ngai etumbu lokola mwana ngombe ya mobali oyo ezali na liboma, mpe etumbu yango ekweyelaki ngai. Zongisa ngai, mpe nakozonga, pamba te ozali Yawe, Nzambe na ngai.
19 Yanlış yola saptıktan sonra pişman oldum. Aklım başıma gelince bağrımı dövdüm. Gençliğimdeki ayıplarımdan utandım, Rezil oldum.’
Nabungaki nzela, kasi nabongoli motema; sik’oyo nasili kososola, nazali kobeta tolo na pasi na motema. Nayokisamaki soni mpe nasambwaki, pamba te namemaki bozoba ya bolenge na ngai. ›
20 “Efrayim değerli oğlum değil mi? Hoşnut olduğum çocuk değil mi? Kendisi için ne dersem diyeyim, Onu hiç unutmuyorum. Bu yüzden yüreğim sızlıyor, Çok acıyorum ona” diyor RAB.
Efrayimi azali penza mwana na Ngai ya bolingo, mwana oyo nasepelaka na ye mingi te. Nzokande napamelaka ye tango nyonso, mpe nakanisaka ye tango nyonso. Yango wana, motema na Ngai esepelaka na ye, mpe nayokelaka ye mawa, » elobi Yawe.
21 “Kendin için yol işaretleri koy, Direkler dik. Yolunu, gittiğin yolu iyi düşün. Geri dön, ey erden kız İsrail, kentlerine dön!
« Tia bilembo na nzela, pika makonzi oyo elakisaka nzela na nzela yango; sala penza keba na nzela na yo, na nzela oyo ozali kolanda. Oh Isalaele, mboka kitoko, zonga, zonga na bingumba na yo!
22 Ne zamana dek bocalayıp duracaksın, ey dönek kız? RAB dünyada yeni bir şey yarattı: Kadın erkeği koruyacak.”
Oh elenge mwasi ya mobulu, kino tango nini okotika kotambola-tambola? Yawe akosala likambo ya sika na mabele: mwana mwasi akoluka mwana mobali na bolingo. »
23 İsrail'in Tanrısı, Her Şeye Egemen RAB şöyle diyor: “Yahuda ve kentlerindeki halkı eski gönençlerine kavuşturduğum zaman yine şu sözleri söyleyecekler: ‘RAB sizi kutsasın, Ey doğruluk yurdu, ey kutsal dağ!’
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: « Tango nakobimisa bango na bowumbu, tala lisusu maloba oyo bato bakoloba kati na Yuda mpe kati na bingumba na yango: ‹ Oh ndako ya bosembo; oh ngomba ya bule, tika ete Yawe apambola yo! ›
24 Halk, ırgatlar, sürüleriyle dolaşan çobanlar Yahuda'da ve kentlerinde birlikte yaşayacak.
Bato bakokoma kovanda elongo kati na mokili ya Yuda mpe kati na bingumba na yango nyonso: basali bilanga mpe babokoli bibwele.
25 Yorgun cana kana kana içirecek, bitkin canı doyuracağım.”
Nakozongisa makasi ya bato oyo balembi na posa ya mayi, mpe nakoleisa bato oyo balembi na nzala. »
26 Bunun üzerine uyanıp baktım. Uykum bana tatlı geldi.
Boye, tango nalamukaki, natalaki pene na ngai; nasosolaki ete pongi na ngai ezalaki elengi.
27 “İsrail ve Yahuda'da insan ve hayvan tohumu ekeceğim günler yaklaşıyor” diyor RAB,
« Na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « nakolona bato mpe banyama lokola milona kati na bokonzi ya Isalaele mpe kati na bokonzi ya Yuda.
28 “Kökünden söküp yok etmek, yerle bir edip yıkmak, yıkıma uğratmak için onları nasıl gözledimse, kurup dikmek için de gözleyeceğim” diyor RAB.
Ndenge nazalaki kosenzela bango mpo na kopikola mpe kobuka, kobebisa, kopanza mpe kosala bango mabe, ndenge wana mpe nakosenzela bango mpo na kotonga mpe kolona, » elobi Yawe;
29 “O günler insanlar artık, ‘Babalar koruk yedi, Çocukların dişleri kamaştı’ demeyecekler.
« na mikolo wana, bato bakoloba lisusu te: ‹ Batata balie mbuma ya vino ya mobesu, mpe minu ya bana na bango ekomi ngayi. ›
30 Herkes kendi suçu yüzünden ölecek. Koruk yiyenin dişleri kamaşacak.
Na esika na yango, moto na moto akokufa mpo na masumu na ye moko; moto nyonso oyo alie mbuma ya vino ya mobesu, minu na ye moko nde ekokoma ngayi.
31 “İsrail halkıyla ve Yahuda halkıyla Yeni bir antlaşma yapacağım günler geliyor” diyor RAB,
Na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « nakosala boyokani ya sika elongo na bato ya Isalaele mpe ya Yuda;
32 “Atalarını Mısır'dan çıkarmak için Ellerinden tuttuğum gün Onlarla yaptığım antlaşmaya benzemeyecek. Onların kocası olmama karşın, Bozdular o antlaşmamı” diyor RAB.
ekozala ndenge moko te na boyokani oyo nasalaki elongo na batata na bango tango nasimbaki bango na loboko mpo na kobimisa bango na Ejipito; pamba te bakataki boyokani na Ngai wana, atako nazalaki Mobali ya libala mpo na bango, » elobi Yawe.
33 “Ama o günlerden sonra İsrail halkıyla Yapacağım antlaşma şudur” diyor RAB, “Yasamı içlerine yerleştirecek, Yüreklerine yazacağım. Ben onların Tanrısı olacağım, Onlar da benim halkım olacak.
« Kasi tala boyokani oyo nakosala elongo na bato ya Isalaele, sima na mikolo wana, » elobi Yawe: « Nakotia mibeko na Ngai kati na makanisi na bango, nakokoma yango kati na mitema na bango, nakozala Nzambe na bango, mpe bango bakozala bato na Ngai.
34 Bundan böyle kimse komşusunu ya da kardeşini, ‘RAB'bi tanıyın’ diye eğitmeyecek. Çünkü küçük büyük hepsi Tanıyacak beni” diyor RAB. “Çünkü suçlarını bağışlayacağım, Günahlarını artık anmayacağım.”
Moko te akoteya lisusu moninga na ye to ndeko na ye na koloba: ‹ Yeba Yawe! › Pamba te bango nyonso bakoyeba Ngai, kobanda na mwana moke kino na mokolo, » elobi Yawe, « nakolimbisa mabe na bango mpe nakokanisa lisusu masumu na bango te. »
35 Gündüz ışık olsun diye güneşi sağlayan, Gece ışık olsun diye ayı, yıldızları düzene koyan, Dalgaları kükresin diye denizi kabartan RAB –O'nun adı Her Şeye Egemen RAB'dir– diyor ki,
Tala makambo oyo Yawe alobi, Ye oyo atia moyi mpo ete engengisa mokolo, apesa mibeko ete sanza mpe minzoto engengisa butu, aningisaka ebale monene mpo ete mbonge etia makelele, mpe oyo Kombo na Ye ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga:
36 “Eğer kurulan bu düzen önümden kalkarsa, İsrail soyu sonsuza dek Önümde ulus olmaktan çıkar” diyor RAB.
« Soki kaka bakoki solo kolongola malako oyo na miso na Ngai, » elobi Yawe, « wana bana ya Isalaele mpe bakozala lisusu ekolo te na miso na ngai. »
37 RAB şöyle diyor: “Gökler ölçülebilse, Dünyanın temelleri incelenip anlaşılabilse, İsrail soyunu bütün yaptıkları yüzünden Reddederim” diyor RAB.
Tala liloba oyo Yawe alobi: « Soki kaka bakoki komeka molayi ya likolo mpe komona miboko ya mabele, wana nakobwaka bana nyonso ya Isalaele mpo na makambo nyonso oyo basali, » elobi Yawe.
38 “Yeruşalim Kenti'nin Hananel Kulesi'nden Köşe Kapısı'na dek benim için yeniden kurulacağı günler geliyor” diyor RAB,
« Na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « bakotonga lisusu engumba oyo mpo na Ngai, kobanda na ndako molayi ya Ananeyeli kino na Ekuke ya Suka ya mir;
39 “Ölçü ipi oradan Garev Tepesi'ne doğru uzayıp Goa'ya dönecek.
bakotia singa ya batongi ndako longwa na esika wana kino na ngomba moke ya Garebi, mpe ekobaluka kino na Gowa.
40 Ölülerle küllerin atıldığı bütün vadi, Kidron Vadisi'ne dek uzanan tarlalar, doğuda At Kapısı'nın köşesine dek RAB için kutsal olacak. Kent bir daha kökünden sökülmeyecek, sonsuza dek yıkılmayacak.”
Bakobulisa mpo na Yawe lubwaku nyonso epai wapi babwakaki bibembe mpe putulu, mpe bilanga nyonso oyo ezali pene ya lubwaku ya Sedron, kino na songe ya Ekuke ya Bampunda, na ngambo ya este; bakotikala kobebisa to koboma lisusu engumba oyo te. »