< Yeşaya 51 >
1 “Doğruluğun ardından giden, RAB'be yönelen sizler, beni dinleyin: Yontulduğunuz kayaya, Çıkarıldığınız taş ocağına bakın.
« Boyoka ngai, bino bato oyo bolukaka bosembo mpe bolukaka Yawe! Botala libanga epai wapi bosalemaki, mpe libulu epai wapi bobendamaki.
2 Atanız İbrahim'e, sizi doğuran Sara'ya bakın. Çağırdığımda tek kişiydi İbrahim, Ama ben onu kutsayıp çoğalttım.”
Botala Abrayami, tata na bino; mpe Sara oyo abotaki bino. Tango nabengaki ye, azalaki kaka ye moko; napambolaki ye mpe nakomisaki ye tata ya bato ebele!
3 RAB Siyon'u ve bütün yıkıntılarını avutacak. Siyon çölünü Aden'e, bozkırı RAB'bin bahçesine döndürecek. Orada coşku, sevinç, Şükran ve ezgi olacak.
Solo, Yawe akobondisa Siona mpe akotala na liso ya ngolu bisika nyonso ya Siona oyo ebeba; akokomisa esobe na yango lokola Edeni, bisika na yango ekawuka, lokola elanga ya Yawe. Esengo mpe kosepela nde ekomonana kuna, matondi mpe mongongo ya banzembo.
4 “Beni dinle, ey halkım, Bana kulak ver, ey ulusum! Yasa benden çıkacak, Halklara ışık olarak adaletimi yerleştireceğim.
Oh bato na ngai, boyoka ngai! Bino, ekolo na ngai, boyoka ngai malamu: Mpo ete Mobeko ekobimela epai na ngai, lolenge na ngai ya kokata makambo ekoyeisa pole na bikolo.
5 Zaferim yaklaştı, Kurtarışım ortaya çıktı. Halkları gücümle yöneteceğim. Kıyı halkları bana umut bağladı, Umutla gücümü bekliyorlar.
Bosembo na ngai ezali pene, lobiko na ngai ebimi na lombangu, mpe maboko na ngai ekosambisa bikolo. Bisanga ekotalela ngai, ekozala na elikya na nguya ya loboko na ngai.
6 Başınızı kaldırıp göklere bakın, Aşağıya, yeryüzüne bakın. Çünkü bu gökler duman gibi dağılacak, Giysi gibi eskiyecek yeryüzü; Üzerinde yaşayanlar sinek gibi ölecek. Ama benim kurtarışım sonsuz olacak, Ardı kesilmeyecek zaferimin.
Botombola miso na bino na likolo, botala na se, na mabele; likolo ekolimwa lokola milinga, mabele ekonuna lokola elamba, mpe bavandi na yango bakokufa lokola banzinzi. Kasi lobiko na ngai ekowumela seko na seko, bosembo na ngai ekotikala kokweya mokolo moko te.
7 “Ey sizler, doğru olanı bilenler, Yasamı yüreğinde taşıyan halk, dinleyin beni! İnsanların aşağılamalarından korkmayın, Yılmayın sövgülerinden.
Boyoka ngai, bino bato oyo boyebi bosembo, bino bato oyo bozali na Mobeko na ngai kati na mitema na bino: Bobanga te lolenge bato bakotiola bino to bozala na somo ya mangungu na bango te.
8 Güvenin yediği giysi gibi, Kurtçuğun yediği yapağı gibi yitecekler. Oysa zaferim sonsuza dek kalacak, Kurtarışım kuşaklar boyu sürecek.”
Pamba te nseka ekolia bango lokola elamba, mpe bampese ekolia bango lokola elamba basala na bapwale ya meme; kasi bosembo na ngai ekowumela seko na seko, mpe lobiko na ngai, bileko na bileko. »
9 Uyan, ey RAB'bin gücü, uyan, kudreti kuşan! Eski günlerde, önceki kuşaklar döneminde olduğu gibi uyan! Rahav'ı parçalayan, Deniz canavarının bedenini deşen sen değil miydin?
Oh loboko na Yawe, lamuka, lamuka! Lata makasi! Lamuka, lokola na mikolo ya kala, na bileko oyo eleka kala! Ezali Yo te oyo okataki-kataki Raabi, oyo obomaki dalagona?
10 Denizi, engin suların derinliklerini kurutan, Kurtulanların geçmesi için Denizin derinliklerini yola çeviren sen değil miydin?
Ezali Yo te oyo okawusaki ebale monene, mayi oyo ya mozindo makasi? Ezali Yo te oyo opasolaki nzela kati na ebale monene mpo ete basikolami na Yo bakoka kokatisa?
11 RAB'bin kurtardıkları dönecek, Sevinçle haykırarak Siyon'a varacaklar. Yüzlerinde sonsuz sevinç olacak. Onların olacak coşku ve sevinç, Üzüntü ve inilti kaçacak.
Boye, bato oyo Yawe akangoli bakozonga, bakokota kati na Siona na banzembo ya esengo; esengo ya libela na libela ekozala lokola motole na mito na bango; bakotondisama na esengo mpe na kosepela, bongo pasi mpe minyoko ekokima mosika na bango.
12 RAB diyor ki, “Sizi avutan benim, evet benim. Siz kimsiniz ki, ölümlü insandan, Ottan farksız insanoğlundan korkarsınız?
« Ezali Ngai, Ngai nde nabondisaka bino. Ozali nani mpo ete obanga moto oyo akokufa, mwana na moto oyo azali kaka lokola matiti?
13 Sizi yaratan, gökleri geren, Dünyanın temellerini atan RAB'bi Nasıl olur da unutursunuz? Sizi yok etmeye hazırlanan zalimin öfkesinden Neden gün boyu yılıp duruyorsunuz? Hani nerede zalimin gazabı?
Ozali mpe kobosana Yawe, Mokeli na Yo, oyo atandaki likolo ndenge batandaka liputa mpe atongaki miboko ya mabele, mpo ete okoma kobika mikolo nyonso na kobanga liboso ya kanda ya banyokoli oyo babongisami mpo na kobebisama? Pamba te, wapi kanda ya banyokoli?
14 Zincire vurulmuş tutsaklar Çok yakında özgürlüğe kavuşacak. Ölüm çukuruna inmeyecek, Aç kalmayacaklar.
Etikali kaka moke, bakangami bakozwa bonsomi, bakokufa lisusu te kati na boloko na bango mpe bakozanga lisusu bilei te.
15 Tanrınız RAB benim. Dalgalar gürlesin diye denizi çalkalayan benim.” O'nun adı Her Şeye Egemen RAB'dir!
Nazali Yawe, Nzambe na Yo, oyo aningisaka ebale monene mpo ete mbonge na yango etomboka. Kombo na Ye ezali ‹ Yawe, Mokonzi ya mampinga. ›
16 “Sözlerimi ağzına koydum, Seni elimin gölgesiyle örttüm; Gökleri yerleştirmen, Yeryüzünün temellerini atman Ve Siyon'a, ‘Halkım sensin’ demen için...”
Natiaki maloba na Ngai na monoko na yo, mpe nazipi yo na elili ya loboko na ngai; nazali Ye oyo atiaki likolo na esika na yango, oyo atongaki miboko ya mabele mpe oyo alobaki na Siona: ‹ Bozali bato na Ngai! › »
17 Uyan, ey Yeruşalim, uyan, kalk ayağa! Sen ki, RAB'bin gazap kâsesini O'nun elinden içtin. Tamamını içtin sersemleten kâsenin.
Lamuka, lamuka! Telema, Yelusalemi, yo oyo omelaki, wuta na loboko ya Yawe, kopo ya kanda na Ye; yo oyo omelaki mpe osilisaki kino na suka kopo oyo epesaka bato kizunguzungu.
18 Doğurduğun bunca oğuldan sana yol gösteren yok, Elinden tutan da yok büyüttüğün bunca oğuldan.
Kati na bana nyonso oyo abotaki, Ezali na mwana moko te oyo azali kolakisa ye nzela; kati na bana oyo abokolaki, moko te azali kosimba ye na loboko.
19 Başına çifte felaket geldi, kim başsağlığı dileyecek? Yıkım ve kırım, kıtlık ve kılıç. Nasıl avutayım seni?
Makama mibale oyo ekomeli yo, nani akoki kolendisa yo: Mokili na yo ekomi mipiku ya mabanga mpe ebebisami, nzala makasi mpe mopanga, nani akobondisa yo?
20 Oğulların baygın, ağa düşmüş ahular gibi Her sokak başında yatıyor. RAB'bin öfkesine de Tanrın'ın azarlayışına da doymuşlar.
Bana na yo balembi, balali-lali na babalabala nyonso lokola mboloko oyo ekangami na motambo; kanda ya Yawe mpe pamela ya Nzambe na yo nde ebuki-buki bango lolenge wana.
21 Bu nedenle, ey ezilmiş Yeruşalim, Şarapsız sarhoş olmuş halk, şunu dinle!
Yango wana, yo oyo basambwisi, yo oyo olangwe, kasi na masanga ya vino te, yoka makambo oyo:
22 Egemenin RAB, kendi halkını savunan Tanrın diyor ki, “Seni sersemleten kâseyi, gazabımın kâsesini Elinden aldım. Bir daha asla içmeyeceksin ondan.
Tala liloba oyo Nkolo Yawe, Nzambe na yo, oyo abundelaka bato na Ye, alobi: « Tala, nalongoli kopo ya kizunguzungu, kopo ya kanda na Ngai, na loboko na yo, okomela yango lisusu te.
23 Onu sana eziyet edenlerin eline vereceğim; Onlar ki sana, ‘Yere yat da Üzerinden geçelim’ dediklerinde, Sırtını toprak, yol ettin.”
Nakotia yango na loboko ya banyokoli na yo, oyo balobaki na yo: ‹ Lala na se mpo ete totambola likolo na yo! › Mpe okomisaki mokongo na yo lokola nzela, lokola balabala mpo ete batambola likolo na yo. »