< Yaratiliş 6 >
1 Yeryüzünde insanlar çoğalmaya başladı, kızlar doğdu.
Tango bato babandaki kokoma ebele na mokili mpe babotaki bana basi,
2 İlahi varlıklar insan kızlarının güzelliğini görünce beğendikleriyle evlendiler.
milimo emonaki ete bana basi ya bato bazali kitoko; boye ekomisaki ba-oyo eponaki basi na yango.
3 RAB, “Ruhum insanda sonsuza dek kalmayacak, çünkü o ölümlüdür” dedi, “İnsanın ömrü yüz yirmi yıl olacak.”
Yango wana, Yawe alobaki: « Pema na Ngai ekowumela libela te kati na moto, pamba te abengami na kokufa; mibu ya bomoi na ye ekozala kaka nkama moko na tuku mibale. »
4 İlahi varlıkların insan kızlarıyla evlenip çocuk sahibi oldukları günlerde ve daha sonra yeryüzünde Nefiller vardı. Bunlar eski çağ kahramanları, ünlü kişilerdi.
Na tango wana, ezalaki na bingambe kati na mokili; mpe lisusu, milimo esangisaki nzoto na bana basi ya bato, bongo bana basi babotelaki yango bana. Bana yango bazalaki bilombe na tango ya kala, bato oyo bakenda sango.
5 RAB baktı, yeryüzünde insanın yaptığı kötülük çok, aklı fikri hep kötülükte.
Yawe amonaki ndenge nini mabe ya moto ekomaki mingi kati na mokili, mpe tango nyonso, makanisi ya motema ya moto ezalaki kaka mabe.
6 İnsanı yarattığına pişman oldu. Yüreği sızladı.
Boye Yawe ayokaki mawa na ndenge akelaki moto kati na mokili mpe abongolaki makanisi na Ye.
7 “Yarattığım insanları, hayvanları, sürüngenleri, kuşları yeryüzünden silip atacağım” dedi, “Çünkü onları yarattığıma pişman oldum.”
Boye Yawe alobaki: « Nakosilisa koboma kati na mokili bato oyo nakelaki; solo, nakosilisa koboma bato kino na bibwele, na bandeke ya likolo mpe na bikelamu oyo etambolaka na libumu kati na mokili, pamba te nabongoli makanisi na Ngai na ndenge nakelaki bango. »
8 Ama Nuh RAB'bin gözünde lütuf buldu.
Kasi Noa azwaki ngolu na miso ya Yawe.
9 Nuh'un öyküsü şöyledir: Nuh doğru bir insandı. Çağdaşları arasında kusursuz biriydi. Tanrı yolunda yürüdü.
Tala lisolo ya libota ya Noa. Noa azalaki moto ya sembo mpe azanga pamela kati na bato ya tango na ye; azalaki kosala mokano ya Nzambe.
10 Üç oğlu vardı: Sam, Ham, Yafet.
Noa azalaki na bana mibali misato: Semi, Cham mpe Jafeti.
11 Tanrı'nın gözünde yeryüzü bozulmuş, zorbalıkla dolmuştu.
Mokili ebebaki na miso ya Nzambe mpe etondaki na makambo ya mobulu.
12 Tanrı yeryüzüne baktı ve her şeyin ne denli bozulduğunu gördü. Çünkü insanlar yoldan çıkmıştı.
Nzambe amonaki ndenge mokili ebebaki, pamba te bato nyonso ya mokili babebisaki banzela na bango.
13 Tanrı Nuh'a, “İnsanlığa son vereceğim” dedi, “Çünkü onlar yüzünden yeryüzü zorbalıkla doldu. Onlarla birlikte yeryüzünü de yok edeceğim.
Boye, Nzambe alobaki na Noa: « Nazwi mokano ya koboma bikelamu nyonso ya bomoi, pamba te mokili etondi na mabe likolo na bango. Solo, nakobebisa bango elongo na mokili.
14 Kendine gofer ağacından bir gemi yap. İçini dışını ziftle, içeriye kamaralar yap.
Sala masuwa ya mabaya ya goferi mpo na lobiko na yo; kabola yango na bashambre. Okopakola gudron na kati mpe na libanda na yango.
15 Gemiyi şöyle yapacaksın: Uzunluğu üç yüz, genişliği elli, yüksekliği otuz arşın olacak.
Tala ndenge okotonga yango: molayi na yango ekozala na bametele pene nkama moko na tuku mitano, bametele pene tuku mibale na mitano na mokuse mpe bametele pene zomi na mitano na bosanda.
16 Pencere de yap, boyu yukarıya doğru bir arşını bulsun. Kapıyı geminin yan tarafına koy. Alt, orta ve üst güverteler yap.
Okotia likolo na yango lidusu ya basantimetele pene tuku mitano, okotia ekuke na mopanzi na yango; mpe na kati, okosala etaje ya liboso, ya mibale mpe ya misato.
17 Yeryüzüne tufan göndereceğim. Göklerin altında soluk alan bütün canlıları yok edeceğim. Yeryüzündeki her canlı ölecek.
Nakotinda mpela na mokili mpo na koboma nyonso oyo ezali na bomoi na se na moyi: ekelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na mabele ekokufa.
18 Ama seninle bir antlaşma yapacağım. Oğulların, karın, gelinlerinle birlikte gemiye bin.
Kasi nasali boyokani elongo na yo, yango wana okokota na masuwa: yo, bana na yo ya mibali, mwasi na yo mpe basi ya bana na yo.
19 Sağ kalabilmeleri için her canlı türünden bir erkek, bir dişi olmak üzere birer çifti gemiye al.
Okokotisa mpe kati na masuwa, mibale-mibale, bikelamu nyonso ya bomoi, mwasi mpe mobali, mpo ete obatela yango na bomoi elongo na yo.
20 Çeşit çeşit kuşlar, hayvanlar, sürüngenler sağ kalmak için çifter çifter sana gelecekler.
Bikelamu mibale ya lolenge moko na moko ya bandeke, ya bibwele mpe ya bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu; nyonso ekoya epai na yo mpo ete obatela yango na bomoi.
21 Yanına hem kendin, hem onlar için yenebilecek ne varsa al, ilerde yemek üzere depola.”
Okozwa biloko ya kolia ya lolenge na lolenge mpe okobomba yango mpo ete ezala bilei na yo elongo na yango. »
22 Nuh Tanrı'nın bütün buyruklarını yerine getirdi.
Noa asalaki makambo nyonso ndenge kaka Nzambe atindaki ye.