< Hezekiel 28 >

1 RAB bana şöyle seslendi:
Yawe alobaki na ngai:
2 “İnsanoğlu, Sur önderine de ki, ‘Egemen RAB şöyle diyor: “‘Gurura kapılıp Ben tanrıyım, Denizlerin bağrında, Tanrı'nın tahtında oturuyorum dedin. Kendini Tanrı sandın, Oysa sen Tanrı değil, insansın.
« Mwana na moto, loba na mokambi ya Tiri: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Na lolendo ya motema na yo, olobaki: ‘Nazali nzambe, navandaka na kiti ya bokonzi ya nzambe na kati-kati ya bibale minene.’ Nzokande, ozali na yo kaka moto, ozali na yo nzambe te atako okanisi ete ozali na bwanya lokola nzambe.
3 İşte, Daniel'den daha bilgesin, Kimse senden bir giz saklayamaz.
Boni, okanisi ete ozali na bwanya koleka Daniele? Okanisi ete oyebi mabombami nyonso?
4 Bilgeliğin, anlayışın sayesinde, Kendine servet biriktirdin, Hazinelerine altın, gümüş yığdın.
Na bwanya mpe na mayele na yo, okomi na bozwi mpe otondisi wolo mpe palata kati na bibombelo na yo.
5 Ticaretteki üstün becerilerin sayesinde Servetini çoğalttın, Zenginliğin seni gurura sürükledi.
Lokola ozalaki mayele makasi na mosala ya mombongo, oyeisi bomengo na yo ebele makasi; mpe mpo na bomengo na yo, motema na yo etondi na lolendo.
6 Bu yüzden Egemen RAB şöyle diyor: Madem kendini Tanrı gibi bilge sandın,
Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Lokola ozali kokanisa ete ozali na bwanya lokola Nzambe,
7 Ben de yabancıları, en acımasız ulusları Üzerine göndereceğim. Bilgeliğinin güzelliğine kılıç çekecek, Görkemini kirletecekler.
nakotindela yo bato ya bikolo ya bapaya, bikolo oyo baleki kanza kati na bikolo, mpo ete babundisa yo: bakobimisela yo mipanga na bango mpo na kosambwisa mayele mpe bwanya na yo, bongo bakosambwisa lokumu na yo.
8 Seni ölüm çukuruna indirecekler, Denizlerin bağrında korkunç bir ölümle öleceksin.
Bakokitisa yo kino na libulu, mpe okokufa kufa ya somo kati na bibale minene.
9 O zaman seni öldürenlerin önünde Ben Tanrı'yım diyecek misin? Seni öldürenlerin elinde Sen Tanrı değil, insansın.
Okokoka lisusu koloba liboso ya bato oyo bazali koboma yo: ‘Ngai nazali nzambe?’ Ozali na yo kaka moto; ozali nzambe te, kati na maboko ya bato oyo bazali koboma yo.
10 Yabancıların elinde, Sünnetsizin ölümüyle öleceksin. Egemen RAB böyle diyor.’”
Okokufa kufa ya bato oyo bakatama ngenga te, na maboko ya bato ya bikolo ya bapaya. Ngai nde nalobi, elobi Nkolo Yawe. › »
11 RAB bana şöyle seslendi:
Yawe alobaki na ngai:
12 “İnsanoğlu, Sur Kralı için bir ağıt yak. Ona diyeceksin ki, ‘Egemen RAB şöyle diyor: “‘Kusursuzlukta örnek biriydin, Bilgeliğin ve güzelliğin eksiksizdi.
« Mwana na moto, tinda nzembo ya mawa na tina na mokonzi ya Tiri! Loba na ye: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Ozalaki ndakisa mpo na komona nyonso oyo ezali ya kokoka, otondaki na bwanya, mpe ozalaki kitoko koleka.
13 Sen Tanrı'nın bahçesi Aden'deydin. Yakut, topaz, aytaşı, Sarı yakut, oniks, yeşim, Laciverttaşı, firuze, zümrütle, çeşit çeşit değerli taşla bezenmiştin. Kakma ve oyma işlerin hep altındandı. Bunlar yaratıldığın gün hazırlanmışlardı.
Ozalaki kati na Edeni, elanga ya Nzambe; mabanga ya talo ya lolenge nyonso ezalaki kokomisa yo kitoko: ribi, topaze, diama, emerode, krizolite, onikisi, jasipe, safiri; bambunda na yo ya mike mpe baflite na yo ezalaki ya wolo, babongisaki yango mpo na mokolo oyo bakela yo.
14 Meshedilmiş, koruyucu bir Keruv olarak Seni oraya yerleştirdim. Tanrı'nın kutsal dağındaydın, Yanan taşlar arasında dolaştın.
Napakolaki yo mafuta mpo ete ozala Sheribe oyo abatelaka, oyo mapapu na ye efungwama; pamba te Ngai nde natiaki yo na ngomba ya bule ya Nzambe; ozalaki wana, ozalaki kotambola na kati-kati ya mabanga oyo ezalaki kongenga lokola moto.
15 Yaratıldığın günden Sende kötülük bulunana dek Yollarında kusursuzdun.
Etamboli na yo ezalaki ata na pamela moko te wuta mokolo oyo okelama kino tango mabe emonanaki kati na yo.
16 Ticaretinin bolluğundan Zorbalıkla doldun Ve günah işledin. Bu yüzden kirli bir şey gibi Seni Tanrı'nın dağından attım, Yanan taşların arasından kovdum, Ey koruyucu Keruv.
Lokola omonaki ete mombongo na yo emati makasi, okomaki konyokola bato mpe kosala masumu; mpo na yango, nalongolaki yo na ngomba ya Nzambe mpe nabenganaki yo, sheribe oyo abatelaka, na molongo ya mabanga oyo ezalaki kongenga lokola moto.
17 Güzelliğinden ötürü Gurura kapıldın, Görkeminden ötürü Bilgeliğini bozdun. Böylece seni yere attım, Kralların önünde seni yüzkarası yaptım.
Motema na yo etondaki na lolendo mpo na kitoko na yo; obebisaki bwanya na yo mpo na lokumu na yo. Yango wana, nabwaki yo na mabele mpe nakomisi yo eloko ya liseki na miso ya bakonzi.
18 İşlediğin pek çok günah Ve ticaretteki hileciliğin yüzünden Kutsal yerlerini kirlettin. Seni yakıp yok edecek Bir ateş çıkardım içinden, Bütün seyredenlerin gözü önünde Seni yeryüzünde küle çevirdim.
Mpo na ebele ya masumu na yo mpe mombongo na yo, oyo osalaka na bosembo te, obebisi bosantu ya bisika na yo ya bule; mpe Ngai, nabimisi kati na yo moto mpo ete etumba yo; nakomisi yo putulu ya mabele na miso ya bato nyonso oyo bazali kotala yo.
19 Seni tanıyan bütün uluslar sana şaştı, Sonun korkunç oldu. Bir daha var olmayacaksın.’”
Bato ya bikolo nyonso oyo bayebaki yo bakomi na mawa na tina na yo mpo ete okomi eloko ya koyoka somo: suka na yo ezali mabe, ozali lisusu te, okotikala lisusu kozala te! › »
20 RAB bana şöyle seslendi:
Yawe alobaki na ngai:
21 “İnsanoğlu, yüzünü Sayda'ya çevir, ona karşı peygamberlik et.
« Mwana na moto, talisa elongi na yo na ngambo ya Sidoni mpe sakola na tina na yango!
22 Diyeceksin ki, ‘Egemen RAB şöyle diyor: “‘İşte sana karşıyım, ey Sayda, Senin içinde yüceleceğim. Onları cezalandırınca, Kutsallığımı onlara gösterince, Benim RAB olduğumu anlayacaklar.
Loba: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Oh Sidoni, natombokeli yo! Nakomonisa nkembo na Ngai kati na yo; boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, tango nakopesa yango etumbu mpe nakomonisa bosantu na Ngai kati na yango.
23 Üzerine salgın hastalık gönderecek, Sokaklarında kan akıtacağım. Kentin içinde, her yanında Kılıçla yaralananlar düşüp ölecekler. O zaman benim RAB olduğumu anlayacaklar.’”
Nakotindela yango bokono oyo ebomaka, nakotangisa makila na babalabala na yango; mopanga ekolongwa na bangambo nyonso mpo na koboma bato na yango, mpe bato ebele bakokufa. Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe.
24 “‘İsrail halkını küçümseyen Çevre uluslardan hiçbiri Bir daha İsrail için batan bir çalı, Acıtan bir diken olmayacak. O zaman benim RAB olduğumu anlayacaklar.
Bato ya bikolo ya mayele mabe, oyo bazali lokola basende mpe banzube, bakozingela lisusu bana ya Isalaele te; boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Nkolo Yawe.
25 “‘Egemen RAB şöyle diyor: İsrail halkını aralarına dağılmış oldukları uluslardan topladığım, ulusların gözü önünde kutsallığımı gösterdiğim zaman kulum Yakup'a verdiğim kendi ülkelerine yerleşecekler.
Nkolo Yawe alobi: Tango nakosangisa bana ya Isalaele wuta na bikolo epai wapi napanzaki bango, nakomonisa bosantu na Ngai kati na bango na miso ya bikolo wana; boye, bakovanda na mokili na bango moko, mokili oyo napesaki epai ya Jakobi, mosali na Ngai.
26 Orada güvenlik içinde yaşayacak, evler yapacak, bağlar dikecekler. Onları küçümseyen bütün çevre ulusları cezalandırdığımda güvenlik içinde yaşayacaklar. O zaman benim Tanrıları RAB olduğumu anlayacaklar.’”
Bakovanda kuna na kimia, bakotonga bandako mpe bakosala bilanga ya vino; bakovanda kuna na kimia tango nakopesa etumbu na bikolo nyonso ya bapaya oyo bazingelaki bango mpe bazalaki kotiola bango. Bongo bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, Nzambe na bango. › »

< Hezekiel 28 >