< Hezekiel 10 >

1 Baktım, Keruvlar'ın başı üzerindeki kubbenin üzerinde laciverttaşından tahta benzer bir nesne gördüm.
Tango natalaki, namonaki na mapata, na likolo ya mito ya basheribe, eloko moko lokola libanga ya talo oyo babengaka safiri; mpe na likolo ya libanga yango, eloko moko ezalaki komonana lokola kiti ya bokonzi.
2 RAB keten giysili adama, “Keruvlar'ın altındaki tekerleklerin arasına gir. Avuçlarını Keruvlar'ın arasındaki ateş közleriyle doldurup kentin üzerine közleri saç” dedi. Adamın oraya girdiğini gördüm.
Yawe alobaki na moto oyo alataki bilamba ya lino: « Leka kati na bapine oyo ezali na se ya basheribe, tondisa maboko na yo na makala ya moto oyo okozwa kati na basheribe mpe panza yango na engumba. » Mpe asalaki bongo na miso na ngai.
3 Adam oraya girdiğinde, Keruvlar tapınağın güney tarafında duruyordu. Bulut tapınağın iç avlusunu doldurdu.
Nzokande, basheribe bazalaki na ngambo ya loboko ya mobali ya Tempelo tango moto wana akotaki, mpe lipata moko etondisaki lopango na yango ya kati.
4 RAB'bin görkemi Keruvlar'ın üzerinden ayrılıp tapınağın eşiğine gitti. Tapınak bulutla doldu. Avlu RAB'bin görkeminin parıltısıyla doluydu.
Nkembo ya Yawe elongwaki na likolo ya basheribe mpe ekendeki na ekotelo ya Tempelo. Tempelo etondaki na lipata, mpe lopango na yango ya kati etondaki na kongenga ya Nkembo ya Yawe.
5 Keruvlar'ın kanatlarının sesi dış avludan bile duyuluyordu; tıpkı Her Şeye Gücü Yeten Tanrı'nın sesi gibiydi.
Makelele ya mapapu ya basheribe ezalaki koyokana na mosika kino na lopango ya libanda ya Tempelo lokola mongongo ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, tango alobaka.
6 RAB keten giysili adama, “Keruvlar'dan ve tekerleklerin arasından ateş al” diye buyurunca, adam oraya girip bir tekerleğin yanında durdu.
Tango Yawe apesaki mitindo na moto oyo alataki bilamba ya lino: « Kamata moto kati na bapine mpe kati na basheribe, » moto yango akotaki mpe atelemaki pembeni ya pine moko.
7 Sonra Keruvlar'dan biri aralarındaki ateşe elini uzattı, biraz ateş alıp keten giysili adamın avuçlarına koydu. Adam ateşi alıp oradan ayrıldı.
Bongo moko kati na basheribe asembolaki loboko na ye kino na moto oyo ezalaki na kati-kati na bango; akamataki ndambo ya makala ya moto kati na moto mpe atiaki yango kati na maboko ya moto oyo alataki bilamba ya lino. Moto yango azwaki yango mpe abimaki na libanda.
8 Keruvlar'ın kanatları altında insan eline benzer bir şekil göründü.
Na se ya mapapu ya basheribe, elilingi moko emonanaki lokola maboko ya moto.
9 Baktım, her Keruv'un yanında birer tane olmak üzere dört tekerlek gördüm. Tekerlekler sarı yakut gibi parıldıyordu.
Tango natalaki, namonaki bapine minei pene ya basheribe: pine moko pembeni ya sheribe moko; bongo bapine yango ezalaki kongenga lokola libanga ya Krizolite.
10 Dördü de birbirine benziyor, iç içe girmiş bir tekerleği andırıyordu.
Bapine yango minei ezalaki ndenge moko, ezalaki komonana lokola moko kati na mosusu.
11 Hareket edince Keruvlar'ın baktıkları dört yönden birine doğru, sağa sola dönmeden ilerliyordu. Ön tekerlek nereye yönelirse, öbür tekerlekler de onun ardınca gidiyordu.
Soki ezali kotambola, ekendaka na bangambo nyonso minei oyo elongi ya basheribe ekotala; mpe bapine yango ezalaki kotengama te soki basheribe bazali kotambola. Basheribe bazalaki kokende na bangambo nyonso oyo bilongi na bango ezalaki kotala, mpe bazalaki kobaluka na bangambo mosusu te.
12 Keruvlar'ın bedenleri –sırtları, elleri, kanatları– ve dördünün de tekerlekleri çepeçevre gözlerle doluydu.
Nzoto mobimba ya moko na moko kati na bango, ezala mokongo to maboko to mpe mapapu na bango, ezalaki etonda na miso, ndenge bapine na bango minei ezalaki.
13 Tekerleklere “Dönen tekerlekler” dendiğini duydum.
Nayokaki ete bazali kobenga bapine yango « bapine ya mopepe ya kayina. »
14 Her Keruv'un dört yüzü vardı: Birinci yüz öküz yüzüne, ikincisi insan yüzüne, üçüncüsü aslan yüzüne, dördüncüsü kartal yüzüne benziyordu.
Sheribe moko na moko azalaki na bilongi minei: elongi ya liboso ezalaki lokola elongi ya sheribe, ya mibale lokola elongi ya moto, ya misato lokola elongi ya nkosi mpe ya minei lokola elongi ya mpongo.
15 Keruvlar yukarıya doğru yükseldi. Bunlar daha önce Kevar Irmağı kıyısında gördüğüm canlı yaratıklardı.
Bongo basheribe bapumbwaki na likolo makasi. Ezalaki bikelamu ya bomoi oyo namonaki pembeni ya ebale Kebari.
16 Keruvlar hareket edince, yanlarındaki tekerlekler de hareket ediyor, Keruvlar yerden yükselmek için kanatlarını açınca, tekerlekler de yanlarından ayrılmıyordu.
Soki basheribe bazali kotambola, bapine oyo ezalaki na mipanzi na bango ezalaki mpe kotambola. Soki bafungoli mapapu na bango mpo na kopumbwa longwa na se, bapine yango mpe ezalaki kokabwana na bango te, kasi nde ezalaki ya kokangana na mipanzi na bango.
17 Keruvlar durduğunda onlar da duruyor, Keruvlar yerden yükseldiğinde onlar da yükseliyordu. Çünkü yaratıkların ruhu tekerleklerdeydi.
Soki basheribe batelemi, yango mpe ezalaki kotelema; soki bapumbwe, yango mpe ezalaki kopumbwa elongo na bango, pamba te molimo ya bikelamu ya bomoi ezalaki kati na yango.
18 RAB'bin görkemi tapınağın eşiğinden ayrılıp Keruvlar'ın üzerinde durdu.
Nkembo ya Yawe elongwaki na ekotelo ya Tempelo mpe ekendeki kotelema na likolo ya basheribe.
19 Ben bakarken Keruvlar kanatlarını açıp yerden yükseldi, tekerlekler de onlarla yükseldi. RAB'bin Tapınağı'nın Doğu Kapısı'nın girişinde durdular. İsrail Tanrısı'nın görkemi onların üzerindeydi.
Wana nazalaki kotala, basheribe bafungolaki mapapu na bango mpe bapumbwaki longwa na se; mpe tango bazalaki kokende, bapine yango mpe ezalaki kokende elongo na bango. Batelemaki na ekotelo ya Ekuke ya ngambo ya este ya Tempelo ya Yawe, bongo nkembo ya Nzambe ya Isalaele ezalaki likolo na bango.
20 Kevar Irmağı kıyısında, İsrail Tanrısı'nın altında gördüğüm ve Keruvlar olduğunu anladığım canlı yaratıklar bunlardı.
Ezalaki nde bikelamu ya bomoi oyo namonaki na se ya Nzambe ya Isalaele pembeni ya Kebari; mpe nasosolaki ete ezali basheribe.
21 Her birinin dört yüzü, dört kanadı vardı. Kanatlarının altında insan elini andıran bir şey vardı.
Moko na moko kati na bango azalaki na bilongi minei mpe mapapu minei; bongo na se ya mapapu na bango, ezalaki na elilingi moko lokola maboko ya moto.
22 Yüzleri Kevar Irmağı kıyısında gördüğüm yüzlere benziyordu. Her biri dosdoğru ilerliyordu.
Bilongi na bango ezalaki ndenge moko na oyo namonaki pene ya Kebari. Moko na moko azalaki kotambola kaka liboso.

< Hezekiel 10 >