< Misir'Dan Çikiş 37 >

1 Besalel Antlaşma Sandığı'nı akasya ağacından yaptı. Boyu iki buçuk, eni ve yüksekliği birer buçuk arşındı.
Betisaleyeli asalaki Sanduku na nzete ya akasia. Molayi na yango ezalaki na basantimetele pene nkama moko na tuku mibale na mitano; mokuse na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano; mpe bosanda na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano.
2 İçini de dışını da saf altınla kapladı. Çevresine altın pervaz yaptı.
Abambaki yango wolo ya peto, na kati mpe na libanda. Alatisaki mpe songe na yango wolo.
3 İkisi bir yanda, ikisi öbür yanda olmak üzere sandığın dört köşesindeki ayaklara takmak için birer altın halka döktü.
Asalelaki yango bapete minei ya wolo mpe atiaki yango basonge minei: mibale na ngambo moko, mpe mibale na ngambo mosusu.
4 Akasya ağacından sırıklar yapıp altınla kapladı.
Asalaki mabaya mibale na nzete ya akasia mpe abambaki yango wolo.
5 Sandığın taşınması için sırıkları yanlardaki halkalara geçirdi.
Akotisaki mabaya yango na bapete oyo ezali na songe ya Sanduku, mpo na komemela yango.
6 Bağışlanma Kapağı'nı saf altından yaptı. Boyu iki buçuk, eni bir buçuk arşındı.
Asalaki mofinuku na wolo ya peto. Molayi na yango ezalaki na basantimetele pene nkama moko na tuku mibale na mitano; mpe mokuse na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano.
7 Kapağın iki kenarına dövme altından birer Keruv yaptı.
Asalaki bikeko mibale ya basheribe oyo atiaki na suka mibale ya mofinuku; asalaki yango na wolo oyo batuti na nzela ya marto.
8 Keruvlar'dan birini bir kenara, öbürünü öteki kenara koyarak kapağı tek parça halinde yaptı.
Atiaki ekeko moko ya sheribe na suka moko, mpe ekeko mosusu, na suka mosusu. Akangisaki bikeko ya basheribe na mofinuku, na suka nyonso mibale.
9 Keruvlar yukarı doğru açık kanatlarıyla kapağı örtüyor, yüzleri birbirine dönük kapağa bakıyorlardı.
Mapapu ya basheribe ezalaki ya kofungwama na likolo mpo na kobatela mofinuku; bazalaki ngambo na ngambo, mpe miso na bango etalaki mofinuku.
10 Besalel akasya ağacından bir masa yaptı. Boyu iki, eni bir, yüksekliği bir buçuk arşındı.
Asalaki mesa moko na mabaya ya akasia. Molayi na yango ezalaki na basantimetele pene nkama moko; mokuse na yango, basantimetele pene tuku mitano; mpe bosanda na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano.
11 Masayı saf altınla kapladı. Çevresine altın pervaz yaptı.
Abambaki yango wolo ya peto mpe atiaki lisusu wolo na pembeni na yango.
12 Pervazın çevresine dört parmak eninde bir kenarlık yaparak altın pervazla çevirdi.
Azingelaki mesa yango na libaya oyo ezalaki na basantimetele pene mwambe na monene mpe atiaki wolo na pembeni ya libaya yango.
13 Masa için dört altın halka dökerek dört ayak üzerindeki dört köşeye yerleştirdi.
Asalaki bapete minei ya wolo mpe atiaki yango na songe minei ya mesa epai wapi makolo na yango ezalaki.
14 Masanın taşınması için sırıkların içinden geçeceği halkalar kenarlığa yakındı.
Bapete ezalaki pene ya libaya oyo ezingelaki mesa, mpe bakotisaki kati na bapete yango mabaya ya komemela Sanduku.
15 Sırıkları akasya ağacından yaptı, altınla kapladı.
Asalaki na nzete ya akasia mabaya ya komemela mesa, mpe abambaki yango wolo.
16 Masa için saf altından tabaklar, sahanlar, dökmelik sunu testileri, tasları yaptı.
Asalaki na wolo ya peto basani, bakopo, bambilika mpe bambeki, mpo na makabo ya masanga.
17 Saf altından bir kandillik yaptı. Ayağı, gövdesi dövme altındı. Çanak, tomurcuk ve çiçek motifleri kendindendi.
Asalaki na wolo ya peto etelemiselo ya minda; asalaki yango na wolo oyo batuti na nzela ya marto. Evandelo na yango, likonzi na yango, bakeni na yango, bambuma mpe bafololo na yango, nyonso ezalaki ekangana lokola eloko moko.
18 Üç kolu bir yanda, üç kolu öteki yanda olmak üzere altı kolluydu.
Mipanzi ya likonzi ya etelemiselo ya minda ezalaki na bitape motoba: misato na ngambo moko, mpe misato na ngambo mosusu.
19 Her kolda badem çiçeğini andıran üç çanak, tomurcuk ve çiçek motifi vardı. Altı kol da aynıydı.
Na likolo ya etape moko na moko ya etelemiselo ya minda, atiaki bakeni misato oyo ezali na lolenge ya fololo ya madame, elongo na bambuma mpe bafololo.
20 Kandilliğin gövdesinde badem çiçeğini andıran dört çanak, tomurcuk ve çiçek motifi bulunuyordu.
Na moto ya likonzi ya etelemiselo ya minda, ezalaki na bakeni minei oyo ezali na lolenge ya bafololo ya madame, elongo na bambuma mpe bafololo.
21 Kandillikten yükselen ilk iki kolun, ikinci iki kolun, üçüncü iki kolun altında kendinden birer tomurcuk vardı. Toplam altı koldu.
Na se ya bitape mibale-mibale ya etelemiselo ya minda, ezalaki na mbuma moko; mpe ezalaki bongo mpo na bitape nyonso motoba ya etelemiselo ya minda.
22 Tomurcukları, kolları tek parça olan kandillik saf dövme altındı.
Bambuma mpe bitape ezalaki ekangana na etelemiselo ya minda; mpe nyonso esalemaki na wolo ya peto, wolo oyo batuti na nzela ya marto.
23 Kandillik için saf altından yedi kandil, fitil maşaları, tablalar yaptı.
Asalaki minda sambo; mpe asalaki na wolo ya peto bisimbelo elongo na basani ya putulu.
24 Bütün takımları dahil kandilliğe bir talant saf altın harcandı.
Asalelaki bakilo tuku misato na minei ya wolo ya peto mpo na kosala etelemiselo ya minda mpe bisalelo na yango nyonso.
25 Akasya ağacından bir buhur sunağı yaptı. Kare biçiminde, boyu ve eni birer arşın, yüksekliği iki arşındı. Boynuzları kendindendi.
Betisaleyeli asalaki etumbelo ya malasi na nzete ya akasia. Molayi mpe mokuse na yango ezalaki ndenge moko, basantimetele pene tuku mitano; mpe bosanda na yango ezalaki na metele moko. Maseke na yango ekangamaki na etumbelo mpe esalaki kaka eloko moko.
26 Üstünü, yanlarını, boynuzlarını saf altınla kapladı. Çevresine altın pervaz yaptı.
Abambaki wolo ya peto na likolo ya etumbelo, na mipanzi na yango mpe na maseke na yango; mpe azingelaki pembeni na yango na libende ya wolo.
27 İki yandaki pervazın altına iki altın halka yaptı. Bunlar sunağın taşınması için sırıkların geçmesine yarıyordu.
Asalaki mpo na etumbelo bapete ya wolo na se ya ebende ya wolo oyo ezingeli yango: mibale na ngambo moko, mpe mibale na ngambo mosusu; mpo na kokotisa mabaya ya komemela etumbelo.
28 Sırıkları akasya ağacından yaparak altınla kapladı.
Asalaki mabaya yango na nzete ya akasia mpe abambaki yango wolo.
29 Itriyatçı ustalığıyla kutsal mesh yağı ve güzel kokulu saf buhur yaptı.
Asalaki mafuta ya epakolami ya bule, malasi ya solo kitoko mpe ya peto, oyo esalemi na mosali malasi.

< Misir'Dan Çikiş 37 >