< Misir'Dan Çikiş 34 >
1 RAB Musa'ya, “Öncekiler gibi iki taş levha kes” dedi, “Kırdığın levhaların üzerindeki sözleri onlara yazacağım.
Yawe alobaki na Moyize: — Bongisa bitando mibale ya mabanga lokola oyo ya liboso; nakokoma na bitando yango maloba oyo ezalaki na likolo ya bitando ya liboso oyo obukaki.
2 Sabaha kadar hazırlan, sabah olunca Sina Dağı'na çık; dağın tepesinde, huzurumda dur.
Omilengela mpo na lobi na tongo. Na tongo-tongo, okomata na ngomba Sinai mpe okotelema liboso na Ngai, kuna na songe ya ngomba.
3 Senden başka kimse dağa çıkmasın, dağın hiçbir yerinde kimse görülmesin. Dağın eteğinde davar ya da sığır da otlamasın.”
Moto moko te asengeli komata elongo na yo; na ngomba mobimba, moto moko te amonana; bameme, bantaba to bangombe esengeli mpe te kolia na ebandeli ya ngomba.
4 Musa öncekiler gibi iki taş levha kesti. RAB'bin buyurduğu gibi sabah erkenden kalktı, taş levhaları yanına alarak Sina Dağı'na çıktı.
Moyize abongisaki bitando mibale ya mabanga lokola oyo ya liboso. Bongo na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, amataki ngomba Sinai ndenge kaka Yawe atindaki ye; amemaki bitando mibale ya mabanga, na maboko na ye.
5 RAB bulutun içinde oraya inip onunla birlikte durdu ve adını RAB olarak duyurdu.
Yawe akitaki kati na lipata, atelemaki wana pene na ye, mpe Moyize abelelaki Kombo ya Yawe.
6 Musa'nın önünden geçerek, “Ben RAB'bim” dedi, “RAB, acıyan, lütfeden, tez öfkelenmeyen, sevgisi engin ve sadık Tanrı.
Yawe alekaki liboso ya Moyize, mpe Moyize atatolaki: — Yawe, Yawe, Nzambe na mawa mpe na ngolu, Nzambe oyo asilikaka noki te, atondi na bolingo mpe na boboto,
7 Binlercesine sevgi gösterir, suçlarını, isyanlarını, günahlarını bağışlarım. Hiçbir suçu cezasız bırakmam. Babaların işlediği suçun hesabını oğullarından, torunlarından, üçüncü, dördüncü kuşaklardan sorarım.”
atalisaka bolingo na Ye kino na milongo nkoto, alimbisaka mabe, botomboki mpe masumu, kasi azangaka te kopesa etumbu na moto oyo asali mabe, Nzambe oyo apesaka bakitani etumbu mpo na mabe ya batata na bango kino na molongo ya misato mpe ya minei!
8 Musa hemen yere kapanıp tapındı.
Mbala moko, Moyize afukamaki mpe agumbamelaki Yawe;
9 “Ya Rab, eğer benden hoşnutsan, lütfen bizimle gel” dedi, “Bunlar inatçı insanlardır. Sen suçlarımızı, günahlarımızı bağışla. Bizi kendi mirasın olarak benimse.”
alobaki: — Eh Nkolo, soki penza nazwi ngolu na miso na Yo, nabondeli Yo: tambola kati na biso. Atako bato oyo bazali batomboki, kasi limbisa mabe mpe masumu na biso, mpe zwa biso lokola bato na Yo!
10 RAB, “Senin halkınla bir antlaşma yapıyorum” dedi, “Onların önünde dünyada ve öteki uluslar arasında görülmemiş harikalar yapacağım. Arasında yaşadığın halk neler yapabileceğimi görecek. Senin için korkunç şeyler yapacağım.
Yawe azongisaki: — Nalingi kosala boyokani elongo na bino. Liboso ya bato na yo nyonso, nakosala makambo ya kokamwa oyo etikala nanu kosalema te na mokili mobimba to na ekolo moko. Boye bato nyonso oyo bazali zingazinga na yo bakomona misala ya somo oyo Ngai Yawe nakosala na nzela na yo.
11 Bugün sana verdiğim buyruğu tut. Amor, Kenan, Hitit, Periz, Hiv ve Yevus halklarını senin önünden kovacağım.
Botosa makambo oyo nazali kotinda bino lelo. Nakobengana liboso na bino: bato ya Amori, ya Kanana, ya Iti, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi.
12 Gideceğin ülkedeki insanlarla antlaşma yapmaktan kaçın. Çünkü bu senin için bir tuzak olur.
Bokeba! Bosala boyokani te elongo na bavandi ya mokili oyo bozali kokende, noki te bakokoma motambo kati na bino!
13 Onların sunaklarını yıkacak, dikili taşlarını parçalayacak, Aşera putlarını keseceksiniz.
Bokweyisa bitumbelo na bango, bopanza bikeko na bango mpe bobuka makonzi oyo bapika mpo na nzambe mwasi Ashera.
14 Başka ilahlara tapmayacaksınız. Çünkü ben adı Kıskanç bir RAB'bim, kıskanç bir Tanrı'yım.
Bogumbamela nzambe mosusu te, pamba te Yawe andimaka bombanda te; Kombo na Ye ezali Nzambe ya zuwa.
15 Ülke halkıyla herhangi bir antlaşma yapmayın. Yoksa onlar başka ilahlara gönül verir, kurban keserken sizi de çağırırlar; siz de gider yersiniz.
Bokeba! Bosala boyokani te elongo na bavandi ya mokili yango; noki te tango bakosambela banzambe na bango mpe bakobonzela yango mbeka, babenga bino mpo ete bolia mbeka na bango elongo;
16 Kızlarını oğullarınıza alırsınız. Kızlar başka ilahlara gönül verirken oğullarınızı da artlarından sürükler.
mpe soki bozwi na libala bana na bango ya basi mpo na bana na bino ya mibali, wana bana na bango ya basi bakokoba kosambela banzambe na bango ya bikeko, bakotindika bana na bino ya mibali na kosambela banzambe na bango.
17 “Dökme putlar yapmayacaksınız.
Bokosala nzambe ya ekeko te.
18 “Size buyurduğum gibi, Aviv ayının belirli günlerinde yedi gün mayasız ekmek yiyerek Mayasız Ekmek Bayramı'nı kutlayacaksınız. Çünkü Mısır'dan Aviv ayında çıktınız.
Bokosala feti ya Mapa ezanga levire. Mikolo sambo, bokolia mapa ezanga levire ndenge natindaki yo. Bokosala yango na tango ekatama, na sanza ya Abibi, pamba te ezali na sanza yango nde bobimaki na Ejipito.
19 “Bütün ilk doğanlar benimdir; ister sığır, ister davar olsun, ilk doğan erkek hayvanlarınızın tümü bana aittir.
Mwana mobali nyonso ya liboso azali ya Ngai; ekozala mpe bongo mpo na mwana mobali nyonso ya liboso kati na bibwele na bino: ezala mwana ngombe, mwana ntaba to mwana meme.
20 İlk doğan sıpanın bedelini bir kuzuyla ödeyin. Bedelini ödemeyecekseniz, sıpanın boynunu kıracaksınız. Bütün ilk doğan oğullarınızın bedelini ödemelisiniz. “Kimse huzuruma eli boş çıkmasın.
Nzokande, mpo na mwana liboso ya ane, bokosikola yango na mwana meme. Soki bosikoli yango te, bokobuka yango kingo. Bokosikola bana na bino nyonso ya liboso ya mibali. Moto moko te akoya kotelema liboso na Ngai maboko pamba.
21 “Altı gün çalışacak, yedinci gün dinleneceksiniz. Ekim, biçim vakti bile olsa dinleneceksiniz.
Bokosala mosala mikolo motoba, kasi na mokolo ya sambo, bosengeli kopema: ezala na tango ya kolona to na tango ya kobuka.
22 “İlk buğday biçiminde Haftalar Bayramı, yıl sonunda da Ürün Devşirme Bayramı yapacaksınız.
Bokosala feti ya Baposo mpo na kosepela na tina na bambuma ya liboso ya ble oyo ekomeli, mpe feti ya kobuka bambuma na suka ya mobu.
23 Bütün erkekleriniz yılda üç kez İsrail'in Tanrısı ben Egemen RAB'bin huzuruna çıkacaklar.
Mbala misato na mobu, mibali nyonso basengeli koya liboso ya Nkolo Yawe, Nzambe ya Isalaele.
24 Öteki ulusları önünüzden kovacak, sınırlarınızı genişleteceğim. Yılda üç kez Tanrınız RAB'bin önüne çıktığınız zaman, kimse ülkenize göz dikemeyecek.
Mpo na bolamu na yo, nakobengana bikolo liboso na yo mpe nakoyeisa mokili na yo monene. Moto moko te akoluka kobotola mokili na yo tango okobanda komata mbala misato na mobu, mpo na kokutana na Yawe, Nzambe na yo.
25 “Evinizde maya bulunduğu sürece bana kurban kesmeyeceksiniz. Fısıh kurbanı sabaha bırakılmayacak.
Okobonzela Ngai te makila ya nyama elongo na mapa batia levire; okobomba te kino lobi na tongo mbeka oyo babonzi mpo na Pasika.
26 “Toprağınızın seçme ilk ürünlerini Tanrınız RAB'bin Tapınağı'na getireceksiniz. “Oğlağı anasının sütünde haşlamayacaksınız.”
Okomema na Ndako ya Yawe, Nzambe na yo, bambuma ya liboso ya mabele na yo. Okolamba te mwana ntaba oyo ezali nanu komela mabele ya mama na yango.
27 RAB Musa'ya, “Bunları yaz” dedi, “Çünkü seninle ve İsrailliler'le bu sözlere dayanarak antlaşma yaptım.”
Yawe alobaki lisusu na Moyize: — Koma maloba oyo, pamba te ezali na nzela na yango nde nasalaki boyokani elongo na yo mpe Isalaele.
28 Musa orada kırk gün kırk gece RAB'le birlikte kaldı. Ağzına ne ekmek koydu, ne de su. Antlaşma sözlerini, on buyruğu taş levhaların üzerine yazdı.
Moyize asalaki kuna elongo na Yawe mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei; aliaki ata eloko moko te mpe amelaki mayi te. Bongo Moyize akomaki na bitando ya mabanga maloba ya Boyokani oyo babengi mibeko zomi.
29 Musa elinde iki antlaşma levhasıyla Sina Dağı'ndan indi. RAB'le konuştuğu için yüzü ışıldıyordu, ama kendisi bunun farkında değildi.
Nzokande, tango Moyize akitaki wuta na ngomba Sinai, na bitando ya mabanga mibale ya mibeko na maboko na ye, ayebaki te ete elongi na ye ezalaki kongenga, mpo ete asololaki na Yawe.
30 Harun'la İsrailliler Musa'nın ışıldayan yüzünü görünce, ona yaklaşmaya korktular.
Tango Aron mpe bana nyonso ya Isalaele bamonaki ete elongi ya Moyize ezali kongenga, babangaki kopusana pembeni na ye.
31 Musa onları yanına çağırdı. Harun'la İsrail topluluğunun bütün önderleri çevresine toplandılar. Musa onlarla konuştu.
Moyize abengaki bango; bongo Aron mpe bakambi nyonso ya lisanga ya Isalaele bapusanaki pembeni ya Moyize, mpe ye Moyize asololaki na bango.
32 Sonra herkes ona yaklaştı. Musa RAB'bin Sina Dağı'nda kendisine bildirdiği bütün buyrukları onlara verdi.
Sima na yango, bana nyonso ya Isalaele bapusanaki pembeni ya Moyize mpe ayebisaki bango mibeko nyonso oyo Yawe apesaki ye na ngomba Sinai.
33 Konuşmasını bitirdikten sonra, yüzüne bir peçe taktı.
Tango Moyize asilisaki kosolola na bango, azipaki elongi na ye na vwale.
34 Ama ne zaman konuşmak için RAB'bin huzuruna çıksa, ayrılıncaya kadar peçeyi kaldırırdı. Dönünce de kendisine verilen buyrukları İsrailliler'e bildirir,
Kasi tango nyonso Moyize azalaki kokota liboso ya Yawe mpo na kosolola na Ye, azalaki kolongola vwale kino tango akobima. Mpe soki abimi, azalaki koyebisa na bana ya Isalaele mibeko nyonso oyo azalaki kozwa epai na Yawe.
35 İsrailliler de onun ışıldayan yüzünü görürlerdi. Sonra Musa içeri girip RAB'le görüşünceye kadar yine peçeyi takardı.
Mpe bana ya Isalaele bazalaki komona elongi ya Moyize kongenga. Bongo azalaki kozongisa vwale na elongi na ye kino tango azalaki kozonga mpo na kosolola na Yawe.