< Daniel 6 >
1 Darius bütün ülkeyi yönetecek yüz yirmi satrap atamayı uygun gördü.
Dariusi amonaki ete ezali malamu kotia bayangeli nkama moko na tuku mibale mpo na kokamba mokili mobimba ya bokonzi.
2 Bunların başına da biri Daniel olmak üzere üç bakan atadı. Krala zarar gelmemesi için bakanlar satraplardan hesap soracaklardı.
Atiaki lisusu bakalaka misato ya lokumu lokola bakonzi na bango; Daniele azalaki moko kati na bakalaka yango ya lokumu. Bazalaki kokamba misala ya bayangeli ya bituka mpo ete mokonzi anyokwama te.
3 Kendisinde bulunan olağanüstü ruh sayesinde Daniel öbür bakanlarla satraplardan üstün olduğundan, kral onu bütün ülkenin başına atamayı tasarlıyordu.
Nzokande, Daniele amonisaki bokeseni kati na ye, bakalaka ya lokumu mpe bayangeli oyo mokonzi atiaki kati na bituka, mpo na mayele na ye oyo eleka ndelo. Boye, mokonzi akanisaki kotombola ye mpo ete akamba mokili na ye mobimba ya bokonzi.
4 Bunun üzerine öbür bakanlarla satraplar Daniel'i ülke yönetimi konusunda suçlamak için fırsat kollamaya başladılar. Ancak ne suçlanacak bir yanını, ne de bir yanlışını buldular. Çünkü Daniel güvenilir biriydi. Kendisinde hiçbir eksiklik ya da yanlışlık bulamadılar.
Bakalaka ya lokumu mpe bayangeli oyo mokonzi atiaki na bituka bazalaki koluka likambo ya kofundela Daniele na ndenge na ye ya kotambolisa makambo ya bokonzi. Kasi balongaki te kozwa ata likambo moko to mbeba ya kofundela Daniele, mpo ete azalaki sembo mpe mpo ete, kati na ye, bazalaki komona ata libunga te to mbeba moko te ya kofundela ye.
5 Sonunda, “Daniel'i Tanrısı'nın Yasası'yla ilgili bir konuda suçlayamazsak, bir suçlama nedeni bulamayacağız” dediler.
Boye, bato yango balobaki: — Tokotikala komona likambo ata moko te ya kofundela moto oyo, Daniele; loba nde toluka yango kati na mobeko ya Nzambe na ye.
6 Bunun üzerine bakanlarla satraplar hep birlikte krala gidip, “Ey Kral Darius, çok yaşa!” dediler,
Bakalaka ya lokumu mpe bayangeli oyo mokonzi atiaki na bituka bakendeki lisanga epai ya mokonzi mpe balobaki: — Tika ete mokonzi Dariusi awumela na bomoi seko na seko!
7 “Ülkenin bütün bakanları, kaymakamları, satrapları, danışmanları, valileri olarak kralın zorlu bir yasa çıkarması üzerinde anlaştık. Ey kral, kim otuz gün içinde senden başka bir insana ya da ilaha dua ederse, aslan çukuruna atılsın.
Bakalaka ya lokumu, bakalaka oyo babatelaka biloko ya mokonzi, bayangeli oyo mokonzi atiaki na bituka, bapesi toli mpe bayangeli, bango nyonso bandimaki ete mokonzi azwa mokano moko mpe abetela yango sete: « Na mikolo tuku misato oyo ezali koya, moto nyonso asengeli kosambela kaka mokonzi; moto oyo akomeka kosambela nzambe to moto mosusu, basengeli kobwaka ye kati na libulu ya bankosi. »
8 Şimdi, ey kral, yasağı koy; Medler'le Persler'in değişmez yasası uyarınca yazıyı imzala ki değiştirilemesin.”
Sik’oyo, oh mokonzi, zwa mokano yango, koma yango na mokanda mpe tia mokoloto mpo ete babongola yango te, kolanda mibeko ya bato ya Medi mpe ya Persi oyo bakoki kobongola te.
9 Böylece Kral Darius yasağı içeren yasayı imzaladı.
Boye, mokonzi Dariusi akomaki mokano oyo azwaki mpo ete babongola yango te mpe atiaki mokoloto na mokano yango.
10 Daniel yasanın imzalandığını öğrenince evine gitti. Yukarı odasının Yeruşalim yönüne bakan pencereleri açıktı. Daha önce yaptığı gibi her gün üç kez diz çöküp dua etti, Tanrısı'na övgüler sundu.
Tango Daniele asosolaki ete sango ya mokano yango esili kopanzana, akotaki na ndako na ye, amataki na etaje mpe akotaki na shambre oyo maninisa na yango etala na ngambo ya Yelusalemi; mbala misato na mokolo, azalaki kofukama mpo na kosambela mpe kopesa matondi epai ya Nzambe na ye, ndenge kaka azalaki kosala liboso.
11 Ona tuzak kuran adamlar hep birlikte oraya gittiklerinde, onu Tanrısı'na dua edip yalvarırken gördüler.
Bongo, bato yango bakendeki lisanga mpe bakutaki Daniele azali kobondela mpe kosenga lisungi epai ya Nzambe na ye.
12 Bunun üzerine krala gidip çıkardığı yasayla ilgili şunları söylediler: “Ey kral, kim otuz gün içinde senden başka bir insana ya da ilaha dua ederse, aslan çukuruna atılsın diye yasa imzalamadın mı?” Kral, “Medler'le Persler'in değişmez yasası uyarınca çıkardığım yasa geçerlidir” diye karşılık verdi.
Mbala moko, bakendeki epai ya mokonzi mpo na kosolola na ye na tina na mokano oyo azwaki: — Mokonzi, opanzaki sango te ya mokano oyo ozwaki, ete na mikolo tuku misato oyo ekolanda, moto nyonso asengeli kosambela kaka yo, mokonzi; bongo moto oyo akosambela nzambe to moto mosusu, basengeli kobwaka ye kati na libulu ya bankosi? Mokonzi azongisaki: — Ezali penza bongo! Mokano ezali ndenge kaka ekatamaki, kolanda mibeko ya bato ya Medi mpe ya Persi, oyo bakoki kobongola te.
13 Bunun üzerine, “Ey kral, Yahuda sürgünlerinden olan Daniel seni de imzaladığın yasayı da saymıyor; günde üç kez dua ediyor” dediler.
Balobaki lisusu na mokonzi: — Daniele, moko kati na bawumbu oyo bawutaki na Yuda, azali kotosa yo te, ezala mokano oyo okomaki na mokanda mpe otiaki mokoloto; azali kokoba kaka kosambela mbala misato na mokolo.
14 Bunu duyan kral çok üzüldü, Daniel'i kurtarmayı kafasına koydu. Onu kurtarmak için güneş batıncaya dek uğraştı.
Tango mokonzi ayokaki bongo, esalaki ye pasi makasi na motema; boye azwaki mokano ya kokangola Daniele; mpe kino na pokwa, azalaki kaka koluka ndenge nini kobikisa ye.
15 O zaman adamlar toplu halde krala gidip, “Ey kral, Medler'le Persler'in yasası uyarınca, kralın koyduğu yasanın ya da yasağın değiştirilemeyeceğini bilmelisin” dediler.
Kasi bato yango bakendeki lisusu lisanga epai ya mokonzi Dariusi mpe balobaki na ye: — Mokonzi, kobosana te ete mobeko ya bato ya Medi mpe ya Persi elobi ete mokano moko te to mobeko moko te ya mokonzi ekoki kobongolama.
16 Bunun üzerine kral Daniel'i getirip aslan çukuruna atmalarını buyurdu. Daniel'e de, “Kendisine sürekli kulluk ettiğin Tanrın seni kurtarsın!” dedi.
Boye, mokonzi apesaki mitindo ete bamema Daniele mpe babwaka ye kati na libulu ya bankosi. Mokonzi alobaki na Daniele: — Nzambe na yo, oyo osalelaka na molende, akobikisa yo!
17 Bir taş getirip çukurun ağzına koydular. Daniel'le ilgili hiçbir şey değiştirilmesin diye kral hem kendi mühür yüzüğüyle, hem soyluların mühür yüzükleriyle taşı mühürledi.
Bamemaki libanga moko ya monene mpe batiaki yango na monoko ya libulu ya bankosi. Mokonzi abetaki yango kashe na nzela ya lopete na ye mpe na nzela ya lopete ya bato na ye ya lokumu, mpo ete babongola eloko moko te na etumbu oyo bakateli Daniele.
18 Sonra sarayına döndü; geceyi yemek yemeden, eğlenmeden geçirdi; uykusu kaçtı.
Sima na yango, mokonzi azongaki na ndako na ye; mpe, butu mobimba, aliaki te, avandaki elongo na bamakangu te mpe atikalaki kozwa pongi te.
19 Şafak sökerken kalkıp acele aslan çukuruna gitti.
Na tongo-tongo, mokonzi atelemaki mpe akendeki na lombangu na libulu ya bankosi.
20 Çukura yaklaşınca üzgün bir sesle, “Ey yaşayan Tanrı'nın kulu Daniel, kendisine sürekli kulluk ettiğin Tanrın seni aslanlardan kurtarabildi mi?” diye haykırdı.
Tango akomaki pene ya libulu yango, abengaki Daniele na mongongo ya mawa: — Daniele, mosali na Nzambe na bomoi! Boni, Nzambe na yo, oyo osalelaka na molende, alongi kokangola yo na minoko ya bankosi?
21 Daniel, “Ey kral, sen çok yaşa!” diye yanıtladı,
Daniele azongiselaki ye: — Oh mokonzi, tika ete owumela na bomoi seko na seko!
22 “Tanrım meleğini gönderip aslanların ağzını kapadı. Beni incitmediler. Çünkü Tanrı'nın önünde suçsuz bulundum. Sana karşı da, ey kral, hiçbir yanlışlık yapmadım.”
Nzambe na ngai atindaki anjelu na Ye mpo ete akanga bankosi minoko; boye, esalaki ngai mabe ata moko te, mpo ete natambolaki mabe te na miso na Ye, mpe nasalaki mabe ata moko te liboso na yo, mokonzi.
23 Kral buna çok sevindi, Daniel'i çukurdan çıkarmalarını buyurdu. Daniel çukurdan çıkarıldı. Bedeninde hiçbir yara izi bulunmadı. Çünkü Tanrısı'na güvenmişti.
Mokonzi asepelaki makasi mpe apesaki mitindo ete babimisa Daniele wuta na libulu. Boye, babimisaki Daniele wuta na libulu mpe bamonaki ata pota moko te na nzoto na ye, pamba te azalaki na elikya na Nzambe na ye.
24 Kralın buyruğu uyarınca, Daniel'i haksız yere suçlayan adamları, karılarıyla, çocuklarıyla birlikte getirip aslan çukuruna attılar. Daha çukurun dibine varmadan aslanlar onları kapıp kemiklerini kırdılar.
Mokonzi apesaki mitindo ete bamema bato oyo bafundaki Daniele mpe babwaka bango elongo na basi mpe bana na bango kati na libulu ya bankosi. Liboso ete bamikomela na se ya libulu, bankosi epumbwelaki bango mpe ebukaki bango mikuwa nyonso.
25 Kral Darius dünyada yaşayan bütün halklara, uluslara ve her dilden insanlara şöyle yazdı: “Esenliğiniz bol olsun!
Bongo, mokonzi Dariusi akomelaki bato ya bikolo nyonso mpe ya nkota nyonso oyo bazalaki kovanda na mokili mobimba: Natombeli bino kimia monene!
26 Krallığımda yaşayan herkesin Daniel'in Tanrısı'ndan korkup titremesini buyuruyorum. O yaşayan Tanrı'dır, Sonsuza dek var olacak. Krallığı yıkılmayacak, Egemenliği son bulmayacak.
Napesi mitindo ete, na bituka nyonso ya mokili na ngai, bato nyonso batosa mpe bapesa Nzambe ya Daniele lokumu.
27 O kurtarır, O yaşatır, Gökte de yerde de Belirtiler, şaşılası işler yapar. Daniel'i aslanların pençesinden kurtaran O'dur.”
Akangolaka mpe abikisaka,
28 Böylece Darius'un ve Persli Koreş'in krallığı döneminde Daniel'in işleri iyi gitti.
Daniele akomaki moto ya lokumu na tango Dariusi azalaki mokonzi mpe na tango ya Sirisi, mokonzi ya bato ya Persi.