< 2 Samuel 16 >

1 Davut tepenin doruğunu biraz geçince, Mefiboşet'in hizmetkârı Siva palan vurulmuş ve üzerlerine iki yüz ekmek, yüz salkım kuru üzüm, yüz tane taze meyve ve bir tulum şarap yüklü iki eşekle onu karşıladı.
Tango Davidi alekaki mwa moke songe ya ngomba, Tsiba, mobombi bozwi ya Mefibosheti, azalaki kozela mpo na kokutana na ye; azalaki na ba-ane mibale oyo babongisi mpo na mobembo mpe ememaki mapa nkama mibale, maboke nkama moko ya bambuma ya vino ekawuka, maboke nkama moko ya bambuma ya figi mpe mbeki moko ya masanga ya vino.
2 Kral, Siva'ya, “Bunları niçin getirdin?” diye sordu. Siva, “Eşekler kral ailesinin binmesi, ekmekle taze meyve hizmetkârların yemesi, şarapsa kırda yorgun düşenlerin içmesi için” diye yanıtladı.
Mokonzi atunaki Tsiba: — Mpo na nini omemi biloko oyo? Tsiba azongisaki: — Ba-ane ezali mpo na libota ya mokonzi mpo ete batambola na yango, mapa mpe bambuma ezali mpo na bato mpo ete balia, mpe masanga ya vino ezali mpo na kopesa makasi epai ya bato oyo bakolemba na esobe.
3 Kral, “Efendin Saul'un torunu nerede?” diye sordu. Siva, “Yeruşalim'de kalıyor” diye yanıtladı, “Çünkü ‘İsrail halkı bugün atamın krallığını bana geri verecek’ diye düşünüyor.”
Bongo mokonzi atunaki lisusu: — Wapi Mefibosheti, koko ya nkolo na yo? Tsiba azongisaki: — Atikalaki na Yelusalemi, pamba te amilobelaki: « Lelo, libota ya Isalaele ekozongisa bokonzi ya koko na ngai na maboko na ngai. »
4 Kral, “Mefiboşet'in her şeyi senindir” dedi. Siva, “Önünde eğilirim, efendim kral! Dilerim her zaman benden hoşnut kalırsın” dedi.
Mokonzi alobaki na Tsiba: — Nyonso oyo ezali ya Mefibosheti ekomi sik’oyo ya yo. Tsiba alobaki: — Nagumbami liboso na yo mokonzi, nkolo na ngai! Tika ete nazwa ngolu na miso na yo!
5 Kral Davut Bahurim'e vardığında, Saul ailesinin geldiği boydan Gera oğlu Şimi adında biri lanetler okuyarak ortaya çıktı.
Wana mokonzi akomaki pembeni ya Bawurimi, ezalaki na moto moko oyo azalaki kobima wuta na mboka; kombo na ye ezalaki « Shimei, » mpe azalaki mwana mobali ya Gera. Azalaki moto ya etuka mpe libota moko na Saulo. Bongo wana azalaki kobima, azalaki mpe kolakela Davidi mabe.
6 Bütün askerler ve koruyucular Kral Davut'un sağında, solunda olmasına karşın, Şimi Davut'la askerlerini taşlıyordu.
Azalaki kobamba Davidi mpe basali na ye mabanga atako bato nyonso mpe basoda oyo bakengelaka mokonzi bazalaki na ngambo ya loboko ya mwasi mpe na ngambo ya loboko ya mobali ya Davidi.
7 Şimi lanetler okuyarak, “Çekil git, ey eli kanlı, alçak adam!” diyordu,
Shimei azalaki koloba boye wana azalaki kolakela Davidi mabe: « Bima, bima, mobomi bato, moto pamba.
8 “RAB, yerine kral olduğun Saul ailesinin dökülen kanlarının karşılığını sana verdi. RAB krallığı oğlun Avşalom'a verdi. Sen eli kanlı bir adam olduğun için bu yıkıma uğradın!”
Yawe atangi na moto na yo, makila nyonso ya ndako ya Saulo, oyo osopaki mpo ete okoma mokonzi na esika na ye. Yawe akabi bokonzi na maboko ya Abisalomi, mwana na yo ya mobali. Osili kokweya na pasi mpo ete ozali mosopi makila. »
9 Seruya oğlu Avişay krala, “Bu ölü köpek neden efendim krala lanet okusun?” dedi, “İzin ver de gidip başını uçurayım.”
Abishayi, mwana mobali ya Tseruya, alobaki na mokonzi: — Mpo na nini mbwa oyo ekufa ezali kolakela nkolo na ngai mabe. Pesa ngai nzela mpo ete nakende kokata ye moto.
10 Ama kral, “Bu sizin işiniz değil, ey Seruya oğulları!” dedi, “RAB ona, ‘Davut'a lanet oku’ dediği için lanet okuyorsa, kim, ‘Bunu neden yapıyorsun’ diye sorabilir?”
Kasi mokonzi alobaki: — Bino bana mibali ya Tseruya, yo Abishayi mpe ndeko na yo, Joabi, likambo nini kati na ngai mpe bino? Soki azali kolakela ngai mabe, ezali nde na ndingisa ya Yawe mpo ete alobi na ye: « Lakela Davidi mabe. » Nani sik’oyo akoki kotuna: « Mpo na nini ozali kosala bongo? »
11 Sonra Davut Avişay'la askerlerine, “Öz oğlum beni öldürmeye çalışırken, şu Benyaminli'nin yaptığına şaşmamalı” dedi, “Bırakın onu, lanet okusun, çünkü ona böyle yapmasını RAB buyurmuştur.
Bongo Davidi alobaki na Abishayi mpe na basali na ye nyonso: « Soki kutu mwana na ngai moko ya mobali oyo abimi na nzoto na ngai azali koluka koboma ngai, bongo ndenge nini moto oyo ya Benjame asala bongo te! Tika ye alakela ngai mabe, pamba te ezali Yawe nde alobi na ye bongo.
12 Belki RAB sıkıntımı görür de, bugün okunan lanetlerin karşılığını iyilikle verir.”
Tango mosusu Yawe akomona pasi na ngai, bongo akobongola na bolamu bilakeli mabe oyo ezali kokweyela ngai lelo. »
13 Davut'la adamları yollarına devam ettiler. Davut'un karşısında, dağın yamacında yürüyen Şimi, giderken ona lanet okuyor, taş, toprak atıyordu.
Boye, wana Davidi mpe bato na ye bakobaki nzela na bango, Shimei azalaki kotambola na mopanzi mosusu ya ngomba pembeni ya Davidi, azalaki kokoba kolakela Davidi mabe tango azalaki kotambola, kobamba ye mabanga mpe kobwakela ye putulu.
14 Gidecekleri yere yorgun argın varan kralla yanındaki halk orada dinlendiler.
Mokonzi elongo na bato na ye nyonso balembaki tango bakomaki na esika oyo bazalaki kokende mpe bapemaki kuna.
15 Avşalom'la İsrail halkı Yeruşalim'e girmişlerdi. Ahitofel de Avşalom'la birlikteydi.
Kaka na tango yango, Abisalomi mpe bato nyonso ya Isalaele bakomaki na Yelusalemi, mpe Ayitofeli azalaki elongo na ye.
16 Davut'un dostu Arklı Huşay, Avşalom'un yanına varınca, “Yaşasın kral! Yaşasın kral!” diye bağırdı.
Ushayi, moto ya Ariki, moninga ya Davidi, akendeki epai ya Abisalomi mpe alobaki na ye: — Tika ete mokonzi owumela na bomoi! Tika ete mokonzi owumela na bomoi!
17 Avşalom Huşay'a, “Dostuna bağlılığın bu mu? Neden dostunla gitmedin?” diye sordu.
Abisalomi atunaki Ushayi: — Oyo nde bolingo nyonso oyo ozali kolakisa epai ya moninga na yo? Mpo na nini okendeki te elongo na moninga na yo?
18 Huşay, “Hayır” diye yanıtladı, “Ben RAB'bin, bu halkın ve bütün İsrailliler'in seçtiği kişiden yana olacağım, onun yanında kalacağım.
Ushayi alobaki na Abisalomi: — Te, ngai nakozala elongo na moto oyo Yawe, bato oyo mpe Isalaele nyonso baponi.
19 Üstelik Davut oğlu Avşalom'dan başka kime hizmet edeceğim? Babana nasıl hizmet ettiysem, sana da öyle hizmet edeceğim.”
Mpe ngai nakosalela nani? Ezali te mwana na ye ya mobali? Ndenge nasalelaki tata na yo, ndenge wana mpe nakosalela yo.
20 Avşalom Ahitofel'e, “Ne yapmalıyız, bize öğüt ver” dedi.
Abisalomi alobaki na Ayitofeli: — Pesa biso toli na yo: tosengeli kosala nini?
21 Ahitofel, “Babanın saraya bakmak için bıraktığı cariyelerle yat” diye karşılık verdi, “Böylece bütün İsrail babanın nefretini kazandığını duyacak ve seni destekleyenlerin tümü kendilerini daha da güçlenmiş bulacaklar.”
Ayitofeli azongiselaki Abisalomi: — Kende kosangisa nzoto na bamakangu ya tata na yo, oyo batikalaki mpo na kobatela ndako, bongo Isalaele mobimba ekoyoka ete omikomisi nkele na miso ya tata na yo. Na bongo, maboko ya bato oyo bazali sima na yo ekolendisama.
22 Sarayın damında Avşalom için bir çadır kurdular. Avşalom bütün İsrailliler'in gözü önünde babasının cariyelerinin yanına girdi.
Boye basalelaki Abisalomi ndako ya kapo na likolo ya ndako, mpe asangisaki nzoto na bamakangu ya tata na ye na miso ya Isalaele mobimba.
23 O günlerde Ahitofel'in verdiği öğüt, Tanrı sözünü ileten bir adamınki gibiydi. Davut da, Avşalom da onun öğüdünü öyle kabul ederlerdi.
Nzokande, na tango wana, toli oyo Ayitofeli abandaki kopesa ezalaki lokola maloba ya moto oyo azali kotuna mayele epai ya Ye moko Nzambe. Ezalaki ndenge wana nde Davidi mpe Abisalomi bazalaki komona batoli ya Ayitofeli.

< 2 Samuel 16 >