< 2 Samuel 12 >

1 RAB Natan'ı Davut'a gönderdi. Natan Davut'un yanına gelince ona, “Bir kentte biri zengin, öbürü yoksul iki adam vardı” dedi,
Yawe atindaki Natan epai ya Davidi. Tango akomaki epai ya Davidi, alobaki na ye: « Ezalaki na bato mibale kati na engumba moko: moko kati na bango azalaki mozwi; mpe mosusu, mobola.
2 “Zengin adamın birçok koyunu, sığırı vardı.
Mozwi azalaki na bameme mpe bangombe ebele,
3 Ama yoksul adamın satın alıp beslediği küçük bir dişi kuzudan başka bir hayvanı yoktu. Kuzu adamın yanında, çocuklarıyla birlikte büyüdü. Adamın yemeğinden yer, tasından içer, koynunda uyurdu. Yoksulun kızı gibiydi.
kasi mobola azalaki na eloko te longola kaka mwa mwana meme moko ya mwasi oyo asombaki. Abokolaki yango mpe ekolaki epai na ye elongo na bana na ye. Mpate yango ezalaki kolia bilei na sani moko, komela mayi na kopo moko na nkolo na yango mpe kolala na maboko na ye. Ezalaki lokola mwana na ye ya mwasi.
4 Derken, zengin adama bir yolcu uğradı. Adam gelen konuğa yemek hazırlamak için kendi koyunlarından, sığırlarından birini almaya kıyamadığından yoksulun kuzusunu alıp yolcuya yemek hazırladı.”
Mokolo moko, mopaya moko ayaki epai ya mozwi, kasi mozwi aboyaki kozwa meme moko kati na bameme na ye to ngombe moko kati na bangombe na ye mpo na kolamba yango mpo na mopaya oyo ayaki epai na ye; azwaki kaka mwa mwana meme ya mwasi ya mobola mpe alambaki yango mpo na mopaya oyo ayaki epai na ye. »
5 Zengin adama çok öfkelenen Davut Natan'a, “Yaşayan RAB'bin adıyla derim ki, bunu yapan ölümü hak etmiştir!” dedi,
Davidi asilikelaki mozwi makasi mpe alobaki na Natan: — Na Kombo na Yawe, moto oyo asali boye asengeli na kufa!
6 “Bunu yaptığı ve acımadığı için kuzuya karşılık dört katını ödemeli.”
Asengeli kofuta mwa mwana meme yango mbala minei, pamba te azalaki na mawa te ya kosala likambo ya boye.
7 Bunun üzerine Natan Davut'a, “O adam sensin!” dedi, “İsrail'in Tanrısı RAB diyor ki, ‘Ben seni İsrail'e kral olarak meshettim ve Saul'un elinden kurtardım.
Natan alobaki na Davidi: — Moto yango ezali nde yo! Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi: « Napakolaki yo mafuta mpo ete okoma mokonzi ya Isalaele mpe nakangolaki yo na maboko ya Saulo;
8 Sana efendinin evini verdim, karılarını da koynuna verdim. İsrail ve Yahuda halkını da sana verdim. Bu az gelseydi, sana daha neler neler verirdim!
nakabaki na maboko na yo ndako ya nkolo na yo, Saulo, mpe basi na ye; napesaki yo libota ya Isalaele mpe libota ya Yuda. Bongo soki nyonso wana ezalaki moke koleka, nalingaki kobakisela yo lisusu ebele koleka.
9 Öyleyse neden RAB'bin gözünde kötü olanı yaparak, O'nun sözünü küçümsedin? Hititli Uriya'yı kılıçla öldürdün, Ammonlular'ın kılıcıyla canına kıydın. Karısını da kendine eş olarak aldın.
Mpo na nini otioli Liloba na Yawe na kosala makambo oyo ezali mabe na miso na Ye? Obomisi Iri, moto ya Iti, na mopanga mpe ozwi mwasi na ye mpo ete akoma mwasi na yo. Obomisi ye na mopanga ya bato ya Amoni.
10 Bundan böyle, kılıç senin soyundan sonsuza dek eksik olmayacak. Çünkü beni küçümsedin ve Hititli Uriya'nın karısını kendine eş olarak aldın.’
Mpo na yango, mopanga ekolongwa lisusu te na ndako na yo, pamba te otioli ngai mpe ozwi mwasi ya Iri, moto ya Iti, mpo ete akoma mwasi na yo.
11 “RAB şöyle diyor: ‘Sana kendi soyundan kötülük getireceğim. Senin gözünün önünde karılarını alıp bir yakınına vereceğim; güpegündüz karılarının koynuna girecek.
Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Nakoyeisa pasi epai na yo wuta na ndako na yo moko; na miso na yo, nakokamata basi na yo mpe nakopesa bango na moko kati na baninga na yo, oyo akosangisa na bango nzoto na moyi makasi.
12 Evet, sen o işi gizlice yaptın, ama ben bunu bütün İsrail halkının gözü önünde güpegündüz yapacağım!’”
Osalaki yango na nkuku, kasi ngai nakosala likambo oyo na moyi mpe na miso ya Isalaele mobimba. › »
13 Davut, “RAB'be karşı günah işledim” dedi. Natan, “RAB günahını bağışladı, ölmeyeceksin” diye karşılık verdi,
Davidi alobaki na Natan: — Solo, nasalaki masumu epai na Yawe. Natan azongisaki: — Yawe alongoli masumu na yo; okokufa te.
14 “Ama sen bunu yapmakla, RAB'bin düşmanlarının O'nu küçümsemesine neden oldun. Bu yüzden doğan çocuğun kesinlikle ölecek.”
Kasi lokola na likambo oyo yo osali, opesi na banguna ya Yawe nzela ya kofinga Ye, mwana oyo bakobotela yo akokufa.
15 Bundan sonra Natan evine döndü. RAB Uriya'nın karısının Davut'tan doğan çocuğunun hastalanmasına neden oldu.
Sima na yango, Natan azongaki na ndako na ye. Yawe abetaki mwana oyo mwasi ya Iri abotelaki Davidi, mpe mwana yango akomaki kobela.
16 Davut çocuk için Tanrı'ya yalvarıp oruç tuttu; evine gidip gecelerini yerde yatarak geçirdi.
Davidi abondelaki Nzambe mpo na mwana, akilaki bilei, akotaki na ndako na ye mpe akomaki kolala na mabele babutu nyonso.
17 Sarayın ileri gelenleri onu yerden kaldırmaya geldiler. Ama Davut kalkmak istemedi, onlarla yemek de yemedi.
Bakambi ya ndako na ye bayaki kotelema pembeni na ye mpo na kotelemisa ye wuta na mabele, kasi aboyaki mpe andimaki te kolia bilei elongo na bango.
18 Yedinci gün çocuk öldü. Davut'un görevlileri çocuğun öldüğünü Davut'a bildirmekten çekindiler. Çünkü, “Çocuk daha yaşarken onunla konuştuk ama bizi dinlemedi” diyorlardı, “Şimdi çocuğun öldüğünü ona nasıl söyleriz? Kendisine zarar verebilir!”
Na mokolo ya sambo, mwana akufaki. Basali ya Davidi babangaki koyebisa ye ete mwana akufi, pamba te bazalaki komilobela: « Wana mwana azalaki nanu na bomoi, tango tolobaki na Davidi, ayokaki biso te. Awa sik’oyo mwana akufi, tokoloba na ye ndenge nini? Soki toyebisi ye sik’oyo ete mwana akufi, akoki kosala likambo moko ya mabe! »
19 Davut görevlilerinin fısıldaştığını görünce, çocuğun öldüğünü anladı. Onlara, “Çocuk öldü mü?” diye sordu. “Evet, öldü” dediler.
Davidi amonaki basali na ye koloba na se se kati na bango, mpe asosolaki ete mwana akufi. Atunaki: — Boni, mwana akufi? Bazongisaki: — Iyo, akufi.
20 Bunun üzerine Davut yerden kalktı. Yıkandı, güzel kokular sürünüp giysilerini değiştirdi. RAB'bin Tapınağı'na gidip tapındı. Sonra evine döndü ve yemek istedi. Önüne konan yemeği yedi.
Bongo Davidi atelemaki wuta na mabele, amisukolaki nzoto, amipakolaki malasi, alataki bilamba mosusu, akotaki na Tempelo ya Yawe mpe agumbamaki mpo na kosambela. Sima, azongaki na ndako na ye, asengaki bilei mpe aliaki.
21 Hizmetkârları, “Neden böyle davranıyorsun?” diye sordular, “Çocuk yaşarken oruç tuttun, ağladın; ama ölünce kalkıp yemek yemeye başladın.”
Basali na ye batunaki: — Mpo na nini ozali kosala boye? Wana mwana azalaki na bomoi, ozalaki komilalisa nzala mpe ozalaki kolela; awa sik’oyo mwana akufi, otelemi mpe okomi kolia!
22 Davut şöyle yanıtladı: “Çocuk yaşarken oruç tutup ağladım. Çünkü, ‘Kim bilir, RAB bana lütfeder de çocuk yaşar’ diye düşünüyordum.
Azongisaki: — Solo, wana mwana azalaki nanu na bomoi, nazalaki kokila bilei mpe kolela, pamba te nazalaki komilobela: « Nani ayebi? Tango mosusu Yawe akosalela ngai ngolu mpe akotika mwana na bomoi! »
23 Ama çocuk öldü. Artık neden oruç tutayım? Onu geri getirebilir miyim ki? Ben onun yanına gideceğim, ama o bana geri dönmeyecek.”
Kasi lokola sik’oyo akufi, mpo na nini nakila bilei? Boni, nakoki kozongisa ye lisusu na bomoi? Ngai nde nakokende epai na ye, kasi ye akozonga epai na ngai te.
24 Davut karısı Bat-Şeva'yı avuttu. Yanına girip onunla yattı. Bat-Şeva bir oğul doğurdu. Çocuğun adını Süleyman koydu. Çocuğu seven RAB Peygamber Natan aracılığıyla haber gönderdi ve hatırı için çocuğun adını Yedidyah koydu.
Bongo Davidi abondisaki mwasi na ye, Batisheba; akendeki epai na ye mpe asangisaki na ye nzoto. Batisheba abotelaki ye lisusu mwana mobali mpe apesaki ye kombo « Salomo. » Yawe alingaki ye
mpe atindaki maloba na nzela ya mosakoli Natan ete bapesa ye kombo « Yedidia, » pamba te Yawe alingaki ye.
26 Bu sırada Ammonlular'ın Rabba Kenti'ne karşı savaşı sürdüren Yoav, saray semtini ele geçirdi.
Joabi abundisaki engumba Raba ya bato ya Amoni mpe abotolaki mboka mokonzi.
27 Sonra Davut'a ulaklar göndererek, “Rabba Kenti'ne karşı savaşıp su kaynaklarını ele geçirdim” dedi,
Joabi atindaki bantoma koloba na Davidi: « Nabundisi Raba mpe nabotoli eteni ya mabele epai wapi mayi ezali.
28 “Şimdi sen ordunun geri kalanlarını topla, kenti kuşatıp ele geçir; öyle ki, kenti ben ele geçirmeyeyim ve kent adımla anılmasın.”
Sik’oyo, sangisa basoda oyo batikali, bozingela engumba Raba mpe bokamata yango; soki te nakokamata yango ngai moko, mpe kombo na ngai ekosakolama kuna. »
29 Davut bütün askerlerini toplayıp Rabba Kenti'ne gitti, kente karşı savaşıp ele geçirdi.
Davidi asangisaki mampinga nyonso mpe akendeki na Raba, abundisaki mpe akamataki yango.
30 Ammon Kralı'nın başındaki tacı aldı. Değerli taşlarla süslü, ağırlığı bir talant altını bulan tacı Davut'un başına koydular. Davut kentten çok miktarda mal yağmalayıp götürdü.
Alongolaki motole oyo ezalaki na moto ya mokonzi na yango. Motole yango esalemaki na bakilo ya wolo koleka tuku misato mpe ezalaki na libanga ya talo na likolo na yango. Wuta na tango wana, ekomaki na moto ya Davidi. Akamataki bomengo ebele ya bitumba kati na engumba yango.
31 Orada yaşayan halkı dışarı çıkarıp testereyle, demir kazma ve baltayla yapılan işlerde, tuğla yapımında çalıştırdı. Davut bunu bütün Ammon kentlerinde uyguladı. Sonra bütün ordusuyla birlikte Yeruşalim'e döndü.
Amemaki na bowumbu bato oyo bazalaki kuna, atiaki bango na misala oyo basalaka na si, na piki mpe na epasola; atiaki bango mpe na mosala ya kosala babiliki. Davidi asalaki ndenge wana na bavandi ya bingumba nyonso ya bato ya Amoni. Bongo azongaki na Yelusalemi elongo na mampinga na ye nyonso.

< 2 Samuel 12 >