< 1 Samuel 11 >

1 Ammon Kralı Nahaş Yaveş-Gilat üzerine yürüyüp kenti kuşattı. Bütün Yaveşliler, Nahaş'a, “Bizimle bir antlaşma yap, sana kulluk ederiz” dediler.
Naashi, moto ya Amoni, ayaki kotonga molako na ye liboso ya Yabeshi ya Galadi. Mpe bato nyonso ya engumba Yabeshi balobaki na Naashi: — Sala boyokani elongo na biso, mpe tokokoma bawumbu na yo.
2 Ama Ammonlu Nahaş, “Ancak bir koşulla sizinle antlaşma yaparım” diye karşılık verdi, “Bütün İsrail halkını küçük düşürmek için her birinizin sağ gözünü oyup çıkaracağım.”
Kasi Naashi, moto ya Amoni, azongisaki: — Nakoki kosala boyokani elongo na bino soki kaka bondimi ete natobola bino nyonso liso ya ngambo ya mobali. Na bongo, nakoyokisa Isalaele mobimba soni.
3 Yaveş Kenti'nin ileri gelenleri ona, “İsrail'in her bölgesine ulaklar göndermemiz için bize yedi günlük bir süre tanı” dediler, “Eğer bizi kurtaracak kimse çıkmazsa o zaman sana teslim oluruz.”
Bampaka ya Yabeshi balobaki na ye: — Pesa biso mikolo sambo mpo ete totinda bantoma kati na mokili mobimba ya Isalaele; soki moto moko te ayei kobikisa biso, wana tokomikaba na maboko na yo.
4 Ulaklar Saul'un yaşadığı Giva Kenti'ne gelip olanları halka bildirince, herkes hıçkıra hıçkıra ağlamaya başladı.
Tango bantoma bakomaki na Gibea, engumba ya Saulo, mpe balobaki na bato makambo nyonso oyo ezalaki koleka, bato nyonso balelaki makasi.
5 Tam o sırada Saul, öküzlerinin ardında, tarladan dönüyordu. “Halka ne oldu? Neden böyle ağlıyorlar?” diye sordu. Yaveşliler'in söylediklerini ona anlattılar.
Kaka na tango yango, Saulo awutaki na bilanga, sima na bangombe na ye. Atunaki: « Likambo nini ya mabe ekweyeli bato mpo ete balela boye? » Bayebisaki ye makambo nyonso oyo bato ya Yabeshi balobaki.
6 Saul bu sözleri duyunca, Tanrı'nın Ruhu güçlü bir biçimde onun üzerine indi. Saul çok öfkelendi.
Tango Saulo ayokaki maloba na bango, Molimo na Nzambe akitelaki ye na nguya mpe asilikaki makasi.
7 Bir çift öküz alıp parçaladı. Ulaklar aracılığıyla İsrail'in her bölgesine bu parçaları gönderip şöyle dedi: “Saul ile Samuel'in ardınca gelmeyen herkesin öküzlerine de aynı şey yapılacaktır.” Halk RAB korkusuyla sarsıldı ve tek beden halinde yola çıktı.
Akamataki bangombe mibale, akataki yango na biteni mpe atindaki biteni yango na Isalaele mobimba na nzela ya bantoma. Bamemaki sango oyo: « Ezali boye nde bakosala bangombe ya moto nyonso oyo akolanda te Saulo mpe Samuele na bitumba. » Lokola somo makasi ya Yawe ekangaki bato ya Isalaele, batambolaki lokola moto moko.
8 Saul onları Bezek'te topladı. İsrail halkı üç yüz bin, Yahudalılar ise otuz bin kişiydi.
Saulo atangaki bango, na Bezeki; motango ezalaki: mibali ya Isalaele nkoto nkama misato, mpe mibali ya Yuda nkoto tuku misato.
9 Oraya gelen Yaveşli ulaklara şöyle dediler: “Yaveş-Gilat halkına, ‘Yarın öğleye doğru kurtarılacaksınız’ deyin.” Ulaklar gidip bu haberi iletince Yaveşliler sevindi.
Balobaki na bantoma oyo bawutaki na Yabeshi: « Bokende koloba na mibali ya Yabeshi ya Galadi: ‹ Bokokangolama lobi, na tango moyi ekongala makasi. › » Tango bantoma bakendeki mpe bapesaki sango yango epai ya bato ya Yabeshi, bato yango basepelaki makasi.
10 Ammonlular'a, “Yarın size teslim olacağız” dediler, “Bize ne dilerseniz yapın.”
Boye bato ya Yabeshi balobaki na bato ya Amoni: « Tokomikaba lobi na maboko na bino, mpe bokosala biso nyonso oyo bokomona ete ezali malamu. »
11 Ertesi gün Saul adamlarını üç bölüğe ayırdı. Adamlar sabah nöbetinde Ammonlular'ın ordugahına girdi. Kırım günün en sıcak zamanına dek sürdü. Sağ kalanlar dağıldı; iki kişi bile bir arada kalmadı.
Mokolo oyo elandaki, Saulo akabolaki mibali na ye na masanga misato. Mpe liboso ete tongo etana, bakotaki na molako ya bato ya Amoni mpe babomaki bango kino na tango oyo moyi engalaki makasi. Bapanzaki bato oyo babikaki na lolenge oyo esalaki ete etikalaki ata na mibali mibale te kati na bango oyo bakobaki kozala esika moko.
12 Bundan sonra halk Samuel'e, “‘Saul mu bize krallık yapacak?’ diyenler kimdi? Getirin onları, öldürelim” dedi.
Bato balobaki na Samuele: — Wapi bato oyo bazalaki koloba: « Boni, Saulo akoyangela biso? » Bomemela biso bato yango mpo ete toboma bango.
13 Ama Saul, “Bugün hiç kimse öldürülmeyecek” diye yanıtladı, “Çünkü RAB bugün İsrail halkına kurtuluş verdi.”
Kasi Saulo alobaki: — Moto moko te akokufa na mokolo ya lelo, pamba te Yawe akangoli Isalaele na mokolo ya lelo.
14 Samuel halka, “Haydi, Gilgal'a gidip orada krallığı yeniden onaylayalım” dedi.
Samuele alobaki na bato: — Boya! Tokende na Giligali mpo na kovandisa kuna bokonzi ya Saulo.
15 Böylece bütün halk Gilgal'a gidip RAB'bin önünde Saul'un kral olduğunu onayladı. Orada, RAB'bin önünde esenlik kurbanları kestiler; Saul da bütün İsrailliler de büyük bir sevinç yaşadılar.
Bato nyonso bakendeki na Giligali mpe batiaki kuna Saulo lokola mokonzi, na miso ya Yawe. Babonzaki kuna bambeka ya boyokani na miso ya Yawe, mpe Saulo elongo na mibali nyonso ya Isalaele basepelaki makasi.

< 1 Samuel 11 >