< Psaltaren 150 >
1 Halleluja! Loven Gud i hans helgedom, loven honom i hans makts fäste.
Bokumisa Yawe! Bokumisa Nzambe kati na Esika na Ye ya bule, bokumisa Ye kati na likolo na Ye ya monene epai wapi avandi na nguya makasi!
2 Loven honom för hans väldiga gärningar, loven honom efter hans stora härlighet
Bokumisa Ye mpo na misala minene na Ye! Bokumisa Ye mpo na monene na Ye ya somo!
3 Loven honom med basunklang, loven honom med psaltare och harpa.
Bokumisa Ye na lokito ya kelelo; bokumisa Ye na lokito ya nzenze mpe ya lindanda!
4 Loven honom med puka och dans, loven honom med strängaspel och pipa.
Bokumisa Ye na lokito ya bambunda mpe na mabina! Bokumisa Ye na mandanda mpe na baflite!
5 Loven honom med ljudande cymbaler, loven honom med klingande cymbaler.
Bokumisa Ye na lokito ya manzanza! Bokumisa Ye na lokito ya bangongi minene!
6 Allt vad anda har love HERREN. Halleluja!
Tika ete nyonso oyo ezali na pema ekumisa Yawe! Bokumisa Yawe!