< Markus 12 >

1 Och han begynte tala till dem i liknelser: »En man planterade en vingård och satte stängsel däromkring och högg ut ett presskar och byggde ett vakttorn; därefter lejde han ut den åt vingårdsmän och for utrikes.
Bongo Yesu akomaki koloba na bango na masese: — Moto moko alonaki elanga ya vino, atongaki lopango zingazinga na yango, atimolaki ekamolelo bambuma ya vino mpe atongaki ndako molayi ya bakengeli. Sima, apesaki elanga yango na maboko ya basali mpo ete bakoma kofutela yango, mpe akendeki na mobembo.
2 När sedan rätta tiden var inne, sände han en tjänare till vingårdsmännen, för att denne av vingårdsmännen skulle uppbära någon del av vingårdens frukt.
Tango eleko ya kobuka bambuma ekokaki, atindaki mosali moko epai ya bafuteli elanga, mpo ete akende kokongola epai na bango ndambo ya bambuma kowuta na elanga ya vino.
3 Men de togo fatt på honom och misshandlade honom och läto honom gå tomhänt tillbaka.
Kasi bafuteli elanga bakangaki ye, babetaki ye mpe bazongisaki ye maboko pamba.
4 Åter sände han till dem en annan tjänare. Honom slogo de i huvudet och skymfade.
Atindelaki bango mosali mosusu; babetaki-betaki ye na moto mpe basambwisaki ye.
5 Sedan sände han åstad ännu en annan, men denne dräpte de. Likaså gjorde de med många andra: somliga misshandlade de, och andra dräpte de.
Atindaki lisusu mosali mosusu; oyo wana, babomaki ye. Bongo, na sima, atindaki lisusu bato ebele; kasi babetaki bamoko, mpe babomaki bamosusu.
6 Nu hade han ock en enda son, vilken han älskade. Honom sände han slutligen åstad till dem, ty han tänkte: 'De skola väl hava försyn för min son.'
Nkolo elanga atikalaki kaka na moto moko ya kotinda: mwana na ye ya bolingo. Atindaki ye na suka na bango nyonso mpe amilobelaki: « Solo, bakotosa mwana na ngai. »
7 Men vingårdsmännen sade till varandra: 'Denne är arvingen; kom, låt oss dräpa honom, så bliver arvet vårt.'
Kasi bafuteli elanga balobanaki bango na bango: « Tala mokitani ya libula ya elanga! Boya, toboma ye mpo ete libula ya elanga ekoma ya biso! »
8 Och de togo fatt på honom och dräpte honom och kastade honom ut ur vingården. --
Bakangaki ye, babomaki ye mpe babwakaki ye na libanda ya elanga ya vino.
9 Vad skall nu vingårdens herre göra? Jo, han skall komma och förgöra vingårdsmännen och lämna vingården åt andra.
Boye, nkolo elanga ya vino akosala nini? Akoya ye moko, akoboma bafuteli elanga wana mpe akopesa elanga yango ya vino na maboko ya bafuteli mosusu.
10 Haven I icke läst detta skriftens ord: 'Den sten som byggningsmännen förkastade, den har blivit en hörnsten;
Nanu botanga Makomi oyo te: « Libanga oyo batongi ndako babwakaki ekomi libanga ya songe ya ndako, mpe esimbi ndako mobimba?
11 av Herren har den blivit detta, och underbar är den i våra ögon'?»
Ezali Nkolo nde alingaki bongo, mpe ezali penza likambo ya kokamwa na miso na biso! »
12 De hade nu gärna velat gripa honom, men de fruktade för folket; ty de förstodo att det var om dem som han hade talat i denna liknelse. Så läto de honom vara och gingo sin väg.
Bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya bato bazalaki koluka nzela ya kokanga Yesu, pamba te basosolaki ete alobaki lisese wana mpo na bango. Kasi lokola babangaki bato, batikaki Ye; mpe moto na moto akendeki.
13 Därefter sände de till honom några fariséer och herodianer, för att dessa skulle fånga honom genom något hans ord.
Sima, batindelaki Yesu ndambo ya Bafarizeo mpe ndambo ya bato ya lisanga ya Erode mpo na koluka kokanga Ye na motambo ya maloba na Ye moko.
14 Dessa kommo nu och sade till honom: »Mästare, vi veta att du är sannfärdig och icke frågar efter någon, ty du ser icke till personen, utan lär om Guds väg vad sant är. Är det lovligt att giva kejsaren skatt, eller är det icke lovligt? Skola vi giva skatt, eller icke giva?»
Tango bakomaki epai na Ye, balobaki: — Moteyi, toyebi ete ozali moto ya sembo mpe obangaka bato te, pamba te oponaka bilongi te, kasi oteyaka na bosolo nzela ya Nzambe. Boni, Mobeko na biso epesi solo nzela ya kofuta mpako ya Sezare to te? Tosengeli penza kofuta yango?
15 Men han förstod deras skrymteri och sade till dem: »Varför söken I att snärja mig? Tagen hit en penning, så att jag får se den.»
Kasi lokola Yesu ayebaki ete bazali bato ya bilongi mibale, alobaki na bango: — Mpo na nini bozali kotiela Ngai motambo? Bomemela Ngai mbongo moko ya ebende, mpo ete namona yango.
16 Då lämnade de fram en sådan. Därefter frågade han dem: »Vems bild och överskrift är detta?» De svarade honom: »Kejsarens.»
Bamemelaki Ye yango, mpe atunaki bango: — Elilingi ya nani mpe makomi ya nani bozali komona awa? Bazongisaki: — Ya Sezare.
17 Då sade Jesus till dem: »Så given kejsaren vad kejsaren tillhör, och Gud vad Gud tillhör.» Och de förundrade sig högeligen över honom.
Yesu alobaki na bango: — Bopesa na Sezare, oyo ezali ya Sezare; mpe bopesa na Nzambe, oyo ezali ya Nzambe! Bakamwaki mingi eyano ya Yesu.
18 Sedan kommo till honom några av sadducéerna, vilka mena att det icke gives någon uppståndelse. Dessa frågade honom och sade:
Bongo Basaduseo, ba-oyo balobaka ete lisekwa ezali te, bayaki epai na Yesu mpe batunaki Ye:
19 »Mästare, Moses har givit oss den föreskriften, att om någon har en broder som dör, och som efterlämnar hustru, men icke lämnar barn efter sig, så skall han taga sin broders hustru till äkta och skaffa avkomma åt sin broder.
— Moteyi, Moyize akomaki mpo na biso ete soki ndeko mobali ya moto moko akufi mpe atiki mwasi, kasi aboti na ye bana te, moto wana asengeli kobala mwasi oyo ndeko na ye atiki mpo ete abotela ndeko yango bana.
20 Nu voro här sju bröder. Den förste tog sig en hustru, men dog utan att lämna någon avkomma efter sig.
Nzokande, ezalaki na bandeko mibali sambo. Ndeko mobali ya liboso abalaki mwasi mpe akufaki, kasi abotaki bana te.
21 Då tog den andre i ordningen henne, men också han dog utan att lämna någon avkomma efter sig; sammalunda den tredje.
Ndeko ya mibale abalaki mwasi yango kaka; kasi ye mpe akufaki, atikalaki kobota bana te. Esalemaki kaka bongo na ndeko ya misato kino na oyo ya sambo:
22 Så skedde med alla sju: ingen av dem lämnade någon avkomma efter sig. Sist av alla dog ock hustrun.
bandeko nyonso sambo batikalaki kobota bana te. Sima na bango nyonso, mwasi yango mpe akufaki.
23 Vilken av dem skall nu vid uppståndelsen, när de uppstå, få henne till hustru? De hade ju alla sju tagit henne till hustru.»
Na mokolo oyo bato bakosekwa kati na bakufi, mwasi yango akozala mwasi ya nani kati na bandeko nyonso sambo, pamba te bango nyonso sambo babalaki ye?
24 Jesus svarade dem: »Visar icke eder fråga att I faren vilse och varken förstån skrifterna, ej heller Guds kraft?
Yesu azongiselaki bango: — Bozali kati na libunga, pamba te boyebi Makomi te, mpe boyebi nguya ya Nzambe te.
25 Efter uppståndelsen från de döda taga män sig icke hustrur, ej heller givas hustrur åt män, utan de äro då såsom änglarna i himmelen.
Na mokolo oyo bato bakosekwa kati na bakufi, bakobala lisusu te; kasi bakozala lokola ba-anjelu kati na Likolo.
26 Men vad nu det angår, att de döda uppstå, haven I icke läst i Moses' bok, på det ställe där det talas om törnbusken, huru Gud sade till honom så: 'Jag är Abrahams Gud och Isaks Gud och Jakobs Gud'?
Mpo na oyo etali lisekwa ya bakufi, botikala nanu kotanga te kati na buku ya Moyize, makambo oyo Nzambe alobaki na ye na tina na nzete oyo ezalaki kopela moto kasi ezalaki kozika te: « Nazali Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi? »
27 Han är en Gud icke för döda, utan för levande. I faren mycket vilse.»
Nzambe azali Nzambe ya bakufi te, kasi azali Nzambe ya bato ya bomoi. Bozali penza kati na libunga monene.
28 Då trädde en av de skriftlärde fram, en som hade hört deras ordskifte och förstått att han hade svarat dem väl. Denne frågade honom: »Vilket är det förnämsta av alla buden?»
Moko kati na balakisi ya Mobeko, oyo ayokaki bango kotiana tembe mpe amonaki ete Yesu azongiselaki bango biyano ya malamu, apusanaki pene na Yesu mpe atunaki: — Mobeko nini eleki monene kati ya mibeko nyonso?
29 Jesus svarade: »Det förnämsta är detta: 'Hör, Israel! Herren, vår Gud, Herren är en.
Yesu azongisaki: — Tala Mobeko oyo eleki monene: « Isalaele, yoka malamu! Yawe azali Nzambe na biso, Yawe azali kaka moko.
30 Och du skall älska Herren, din Gud, av allt ditt hjärta och av all din själ och av allt ditt förstånd och av all din kraft.'
Okolinga Yawe, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba, na makanisi na yo nyonso mpe na makasi na yo nyonso. »
31 Därnäst kommer detta: 'Du skall älska din nästa såsom dig själv.' Intet annat bud är större än dessa.»
Tala mobeko oyo elandi: « Okolinga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. » Mobeko ya motuya koleka mibeko wana mibale ezali te.
32 Då svarade den skriftlärde honom: »Mästare, du har i sanning rätt i vad du säger, att han är en, och att ingen annan är än han.
Bongo molakisi ya Mobeko alobaki na ye: — Moteyi, olobi malamu; olobi solo ete Nzambe azali kaka moko, mosusu azali te.
33 Och att älska honom av allt sitt hjärta och av allt sitt förstånd och av all sin kraft och att älska sin nästa såsom sig själv, det är 'förmer än alla brännoffer och slaktoffer'.»
Kolinga Ye na motema na yo mobimba, na mayele na yo nyonso mpe na makasi na yo nyonso, mpe kolinga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka, yango nde ezali na tina mingi koleka bambeka ya kotumba mpe makabo nyonso.
34 Då nu Jesus märkte att han hade svarat förståndigt, sade han till honom: »Du är icke långt ifrån Guds rike.» Sedan dristade sig ingen att vidare ställa någon fråga på honom.
Tango Yesu amonaki ete molakisi ya Mobeko azongisi eyano na ndenge ya mayele, alobaki na ye: — Ozali mosika te ya Bokonzi ya Nzambe. Mpe moto ata moko te amekaki lisusu kotuna Ye mituna.
35 Medan Jesus undervisade i helgedomen, framställde han denna fråga: »Huru kunna de skriftlärde säga att Messias är Davids son?
Wana Yesu azalaki koteya kati na lopango ya Tempelo, atunaki: — Ndenge nini balakisi ya Mobeko balobaka ete Klisto azali Mwana ya Davidi?
36 David själv har ju sagt genom den helige Andes ingivelse: 'Herren sade till min herre: Sätt dig på min högra sida, till dess jag har lagt dina fiender dig till en fotapall.'
Pamba te Davidi, ye moko, alobaki boye na nzela ya Molimo Mosantu: « Yawe alobaki na Nkolo na ngai: ‹ Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali kino natia banguna na Yo na se ya matambe na Yo. › »
37 Så kallar nu David själv honom 'herre'; huru kan han då vara hans son?» Och folkskarorna hörde honom gärna.
Soki ye moko Davidi azali kobenga Ye « Nkolo, » bongo ndenge nini akoki lisusu kozala mwana na ye? Ebele ya bato bazalaki koyoka Ye na esengo.
38 Och han undervisade dem och sade till dem: »Tagen eder till vara för de skriftlärde, som gärna gå omkring i fotsida kläder och gärna vilja bliva hälsade på torgen
Wana azalaki koteya, Yesu alobaki: — Bosala keba na balakisi ya Mobeko! Balingaka kotambola na banzambala ya milayi; balingaka ete bato bapesa bango mbote, na bisika oyo bato ebele bakutanaka;
39 och gärna sitta främst i synagogorna och på de främsta platserna vid gästabuden --
balingaka kovanda na bakiti ya liboso, kati na bandako ya mayangani; mpe na bisika ya lokumu, kati na bafeti;
40 detta under det att de utsuga änkors hus, medan de för syns skull hålla långa böner. De skola få en dess hårdare dom.»
bayibaka biloko ya basi oyo bakufisa mibali, mpe basalaka mabondeli ya milayi-milayi mpo na kokosa bato. Bakozwa etumbu oyo eleki makasi.
41 Och han satte sig mitt emot offerkistorna och såg huru folket lade ned penningar i offerkistorna. Och många rika lade dit mycket.
Yesu avandaki liboso ya kitunga ya makabo mpe azalaki kotala ndenge bato bazalaki kotia mbongo kati na kitunga ya makabo. Bazwi ebele bazalaki kotia mbongo ebele.
42 Men en fattig änka kom och lade ned två skärvar, det är ett öre.
Mwasi mobola moko akufisa mobali ayaki mpe atiaki mbongo mibale ya bibende, oyo ezalaki na motuya moke penza.
43 Då kallade han sina lärjungar till sig och sade till dem: »Sannerligen säger jag eder: Denna fattiga änka lade dit mer än alla de andra som lade något i offerkistorna.
Yesu abengaki bayekoli na Ye mpe alobaki na bango: — Nazali koloba na bino penza ya solo: mwasi mobola oyo akufisa mobali apesi koleka bato nyonso oyo bawuti kotia mbongo kati na kitunga ya makabo.
44 Ty dessa lade alla dit av sitt överflöd, men hon lade dit av sitt armod allt vad hon hade, så mycket som fanns i hennes ägo.» Se Penning i Ordförklaringarna. Se Skärv i Ordförklaringarna.
Pamba te bato nyonso bazwi kati na mbongo oyo bazali na yango na tina te, mpo na kotia kati na kitunga ya makabo; kasi ye, kati na kokelela na ye, atie bozwi na ye nyonso, nyonso oyo azalaki na yango mpo na kobika na yango.

< Markus 12 >