< Números 1 >

1 Y él Señor dijo a Moisés en el desierto del Sinaí, en la Tienda de la reunión, el primer día del segundo mes, en el segundo año después de que salieron de la tierra de Egipto.
Kati na esobe ya Sinai, Yawe asololaki na Moyize kati na Ndako ya kapo ya Bokutani; ezalaki na mokolo ya liboso ya sanza ya mibale, na mobu ya mibale, sima na bango kobima na mokili ya Ejipito. Alobaki na ye:
2 Toma el número completo de los hijos de Israel, por sus familias y por las casas de sus padres, cada varón por nombre;
« Tanga motango ya lisanga mobimba ya bana ya Isalaele kolanda mabota na bango mpe bituka na bango; mpe koma bakombo ya mibali nyonso, moto moko na moko.
3 Todos los que tengan veinte años o más y puedan ir a la guerra en Israel deben ser contados por ti y Aarón por sus ejércitos.
Yo mpe Aron, bokotanga motango ya mibali oyo bazali na mibu tuku mibale mpe koleka, ba-oyo nyonso bazali na makoki ya kosala mosala ya soda kati na Isalaele; bokotanga bango kolanda milongo na bango ya mampinga.
4 Y para ayudarte, toma a un hombre de cada tribu, el jefe de la casa de su padre.
Kati na libota moko na moko, ekozala na mobali moko mpo na kosunga bino: asengeli kozala mokambi ya etuka na ye.
5 Estos son los nombres de aquellos que serán tus ayudantes: de Rubén, Elisur, el hijo de Sedeur;
Tala bakombo ya mibali oyo bakosunga bino: mpo na libota ya Ribeni: Elitsuri, mwana mobali ya Shedewuri;
6 De Simeón, Selumiel, el hijo de Zurisadai;
mpo na libota ya Simeoni: Shelumieli, mwana mobali ya Tsurishadayi;
7 De Judá, Najón, hijo de Aminadab;
mpo na libota ya Yuda: Nashoni, mwana mobali ya Aminadabi;
8 De Isacar, Natanael, el hijo de Zuar;
mpo na libota ya Isakari: Netaneeli, mwana mobali ya Tsuwari;
9 De Zabulón, Eliab, hijo de Helón;
mpo na libota ya Zabuloni: Eliabi, mwana mobali ya Eloni;
10 De los hijos de José: de Efraín, Elisama, hijo de Amiud; de Manasés, Gamaliel, el hijo de Pedasur,
mpo na bana mibali ya Jozefi: mpo na libota ya Efrayimi: Elishama, mwana mobali ya Amiwudi; mpo na libota ya Manase: Gamilieli, mwana mobali ya Pedakitsuri;
11 De Benjamín, Abidán, hijo de Gedeoni;
mpo na libota ya Benjame: Abidani, mwana mobali ya Gideoni;
12 De parte de Dan, Ahiezer, el hijo de Amisadai;
mpo na libota ya Dani: Akiezeri, mwana mobali ya Amishadayi;
13 De Aser, Pagiel, el hijo de Ocrán;
mpo na libota ya Aseri: Pagieli, mwana mobali ya Okirani;
14 De Gad, Eliasaf, hijo de Deuel;
mpo na libota ya Gadi: Eliazafi, mwana mobali ya Deweli;
15 De Neftalí, Ahira, el hijo de Enán.
mpo na libota ya Nefitali: Akira, mwana mobali ya Enani. »
16 Estos son los hombres nombrados de entre todas las personas, jefes de las casas de sus padres, jefes de las tribus de Israel.
Ezali bango nde baponamaki kati na lisanga: bazalaki bakambi ya mabota na bango, bakambi ya mampinga ya Isalaele.
17 Y tomaron Moisés y Aarón a estos hombres, escogidos por su nombre;
Moyize mpe Aron bakamataki bato oyo baponamaki na bakombo mpo ete basala na bango elongo.
18 Y se reunieron todas las personas el primer día del segundo mes; y todos dejaron en claro a su familia y la casa de su padre, por el número de los nombres, de veinte años en adelante.
Basangisaki lisanga mobimba na mokolo ya liboso, na sanza ya mibale; boye bana ya Isalaele batalisaki bokoko na bango kolanda mabota na bango mpe bituka na bango. Bakomaki bakombo ya mibali nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, mobali moko na moko na kombo na ye,
19 Como el Señor le había dado órdenes a Moisés, fueron contados por él en el desierto del Sinaí.
ndenge Yawe atindaki Moyize oyo atangaki motango na bango na esobe ya Sinai.
20 Las generaciones de los hijos de Rubén, el hijo mayor de Israel, fueron contados por sus familias y las casas de sus padres, todos los varones de veinte años y más, que pudieron ir a la guerra;
Mpo na bakitani ya Ribeni, mwana mobali ya liboso ya Isalaele: bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye.
21 Cuarenta y seis mil quinientos de la tribu de Rubén fueron contados.
Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Ribeni ezalaki nkoto tuku minei na motoba na nkama mitano.
22 Las generaciones de los hijos de Simeón fueron contadas por sus familias y las casas de sus padres, todos los varones de veinte años o más que pudieron ir a la guerra;
Mpo na bakitani ya Simeoni: bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye.
23 Cincuenta y nueve mil, trescientos de la tribu de Simeón estaban contados.
Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Simeoni ezalaki nkoto tuku mitano na libwa na nkama misato.
24 Las generaciones de los hijos de Gad fueron contadas por sus familias y las casas de sus padres, todos los varones de veinte años o más que pudieron ir a la guerra;
Mpo na bakitani ya Gadi: bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye.
25 Cuarenta y cinco mil seiscientos cincuenta de la tribu de Gad fueron contados.
Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Gadi ezalaki nkoto tuku minei na mitano na nkama motoba.
26 Las generaciones de los hijos de Judá fueron contadas por sus familias y las casas de sus padres, todos los varones de veinte años o más que pudieron ir a la guerra;
Mpo na bakitani ya Yuda: bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu ya mbotama kobanda tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye.
27 Setenta y cuatro mil seiscientos de la tribu de Judá fueron contados.
Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Yuda ezalaki nkoto tuku sambo na minei na nkama motoba.
28 Las generaciones de los hijos de Isacar fueron contadas por sus familias y las casas de sus padres, todos los varones de veinte años o más que pudieron ir a la guerra;
Mpo na bakitani ya Isakari: bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye.
29 Cuarenta y cuatro mil cuatrocientos de la tribu de Isacar fueron contados.
Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Isakari ezalaki nkoto tuku mitano na minei na nkama minei.
30 Las generaciones de los hijos de Zabulón fueron contadas por sus familias y las casas de sus padres, todos los varones de veinte años o más que pudieron ir a la guerra;
Mpo na bakitani ya Zabuloni: bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye.
31 Cincuenta y siete mil cuatrocientos de la tribu de Zabulón estaban contados.
Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Zabuloni ezalaki nkoto tuku mitano na sambo na nkama minei.
32 Las generaciones de los hijos de José fueron contadas por sus familias y las casas de sus padres, todos los varones de veinte años o más que pudieron ir a la guerra;
Mpo na bana mibali ya Jozefi: Mpo na bakitani ya Efrayimi: bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye.
33 Cuarenta mil quinientos de la tribu de Efraín fueron contados.
Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Efrayimi ezalaki nkoto tuku minei na nkama mitano.
34 Las generaciones de los hijos de Manasés fueron contadas por sus familias y las casas de sus padres, todos los varones de veinte años o más que pudieron ir a la guerra;
Mpo na bakitani ya Manase: bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye.
35 Treinta y dos mil, doscientos de la tribu de Manasés fueron contados.
Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Manase ezalaki nkoto tuku misato na mibale na nkama mibale.
36 Las generaciones de los hijos de Benjamín fueron contadas por sus familias y las casas de sus padres, todos los varones de veinte años o más que pudieron ir a la guerra;
Mpo na bakitani ya Benjame: bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye.
37 Treinta y cinco mil cuatrocientos de la tribu de Benjamín estaban contados.
Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Benjame ezalaki nkoto tuku misato na mitano na nkama minei.
38 Las generaciones de los hijos de Dan fueron contadas por sus familias y las casas de sus padres, todos los varones de veinte años o más que pudieron ir a la guerra;
Mpo na bakitani ya Dani: bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye.
39 Se contaron sesenta y dos mil setecientos de la tribu de Dan.
Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Dani ezalaki nkoto tuku motoba na mibale na nkama sambo.
40 Las generaciones de los hijos de Aser fueron contadas por sus familias y las casas de sus padres, todos los varones de veinte años o más que pudieron ir a la guerra;
Mpo na bakitani ya Aseri: bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye.
41 Cuarenta y un mil quinientos de la tribu de Aser fueron contados.
Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Aseri ezalaki nkoto tuku minei na moko na nkama mitano.
42 Las generaciones de los hijos de Neftalí fueron contadas por sus familias y las casas de sus padres, todos los varones de veinte años o más que pudieron ir a la guerra;
Mpo na bakitani ya Nefitali: bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye.
43 Cincuenta y tres mil cuatrocientos de la tribu de Neftalí fueron contados.
Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Nefitali ezalaki nkoto tuku mitano na misato na nkama minei.
44 Estos son los que fueron contados por Moisés y Aarón y por los doce jefes de Israel, uno de cada tribu.
Bango nde bato oyo Moyize mpe Aron elongo na bakambi zomi na mibale ya Isalaele, oyo moko na moko azalaki kotalisa libota na ye, batangaki.
45 Así que todos los que fueron contados de los hijos de Israel, por sus familias, todos los de veinte años o más que pudieron ir a la guerra,
Bongo bato nyonso ya Isalaele oyo batangamaki kolanda mabota na bango mpo ete bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, mpe bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda,
46 Fueron seiscientos tres mil quinientos cincuenta.
bazalaki bango nyonso nkoto nkama motoba na misato na nkama mitano na tuku mitano.
47 Pero los levitas, de la tribu de sus padres, no fueron contados entre ellos.
Nzokande batangaki te nzela moko na mabota mosusu motango ya bato ya libota ya Levi.
48 Porque él Señor dijo a Moisés:
Yawe alobaki na Moyize:
49 Sólo la tribu de Leví no será contada entre los hijos de Israel.
« Kotanga te motango ya bato ya libota ya Levi, kokotisa bango te na molongo ya bato mosusu ya Isalaele.
50 Los levitas, deben estar en el tabernáculo del testimonio, con sus recipientes y todo lo que contiene: deben transportar la Tienda, y ser responsables de todo lo que tenga que ver con ella, y colocar sus tiendas alrededor del tabernáculo.
Okopesa na bato ya libota ya Levi mokumba ya Mongombo ya Litatoli mpe ya bisalelo na yango nyonso elongo na biloko nyonso oyo ezalaka kati na Mongombo. Bango bakozwa mokumba ya komemaka yango elongo na bisalelo na yango mpe bakovanda zingazinga na yango.
51 Y cuando la tienda de reunión avanza, los levitas deben derribarla; y cuando se debe colocar, deben hacerlo: cualquier persona extraña que se acerque a ella debe ser condenada a muerte.
Tango nyonso Mongombo ekolongwa na esika moko mpo na kokende na esika mosusu, Balevi nde bakolongola yango; mpe tango ekotelema, bango mpe kaka nde bakotelemisa yango. Moto mosusu oyo akopusana pembeni na yango asengeli kokufa.
52 Los hijos de Israel pondrán sus tiendas, cada uno en su campamento alrededor de su bandera.
Bana ya Isalaele bakotelemisa bandako na bango ya kapo kolanda milongo na bango ya mampinga, mpe moto na moto akozala kati na molako na ye, na se ya bendele na ye.
53 Pero las tiendas de los levitas deben estar alrededor de la tienda de la reunión, para que la ira no caiga sobre los hijos de Israel: la tienda de la reunión debe estar al cuidado de los levitas.
Kasi bato ya libota ya Levi bakotelemisa bandako na bango ya kapo zingazinga ya Mongombo ya Litatoli mpo ete kanda makasi ya Yawe ekoka kokweya likolo ya lisanga ya bana ya Isalaele te. Bato ya libota ya Levi nde bakosala mosala ya kobatela Mongombo ya Litatoli. »
54 Entonces los hijos de Israel hicieron lo que el Señor le había ordenado a Moisés.
Bana ya Isalaele basalaki makambo oyo nyonso, ndenge kaka Yawe atindaki na nzela ya Moyize.

< Números 1 >