< 2 Crónicas 26 >

1 Entonces toda la gente de Judá tomó a Uzías, que tenía dieciséis años, y lo hizo rey en lugar de su padre Amasías.
Bato nyonso ya Yuda baponaki Oziasi oyo azalaki na mibu zomi na motoba ya mbotama mpe bakomisaki ye mokonzi na esika ya Amatsia, tata na ye.
2 Fue él que reconstruyó Elat, que regresó para Judá después de la muerte del rey.
Sima na kufa ya tata na ye, Amatsia, Oziasi atongaki lisusu engumba Eyiloti mpe azongisaki yango na se ya bokonzi ya Yuda.
3 Uzías tenía dieciséis años cuando comenzó a reinar, y reinó en Jerusalén durante cincuenta y dos años; el nombre de su madre era Jecolias de Jerusalén.
Oziasi azalaki na mibu zomi na motoba ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mitano na mibale na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Yekolia. » Yekolia azalaki moto ya Yelusalemi.
4 Hizo lo correcto ante los ojos del Señor, como lo había hecho su padre Amasías.
Asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe ndenge kaka Amatsia, tata na ye, asalaki.
5 Se dedicó a buscar a Dios en los días de Zacarías, que hizo sabios a los hombres en el temor de Dios; y mientras fue fiel al Señor, Dios lo prosperó.
Oziasi akangamaki na Nzambe mikolo nyonso ya bomoi ya Zakari, pamba te azalaki kolakisa ye kotosa Nzambe. Na tango nyonso oyo Oziasi awumelaki kokangama na Yawe, Nzambe azalaki kolongisa ye.
6 Salió e hizo la guerra contra los filisteos, derribando los muros de Gat y Jabnia y Asdod, y construyendo ciudades en el campo alrededor de Asdod entre los filisteos.
Akendeki kobundisa bato ya Filisitia mpe atobolaki madusu kati na bamir ya Gati, ya Yabine mpe ya Asidodi. Atongaki lisusu bingumba ebele kati na etuka ya Asidodi mpe kati na bituka mosusu ya bato ya Filisitia.
7 Y Dios le dio ayuda contra los filisteos, y contra los árabes que viven en Gur-baal, y contra los de meunim.
Nzambe asungaki ye tango abundisaki bato ya Filisitia, ya Arabi oyo bazalaki kovanda na Guri-Bala, mpe tango abundisaki bato ya Maoni.
8 Los amonitas hicieron ofrendas a Uzías; y noticias de él llegaron hasta el límite de Egipto; porque se hizo muy grande en poder.
Bato ya Amoni bafutaki mpako ya mokonzi epai ya Oziasi, mpe kombo na ye ekendeki sango kino na bandelo ya Ejipito, pamba te akomaki na nguya makasi koleka.
9 Uzías hizo torres en Jerusalén, en la puerta de la esquina, en la puerta en el valle y en el giro de la esquina, los fortificó.
Oziasi atongaki bandako milayi kati na Yelusalemi, na ekuke ya suka, na ekuke ya lubwaku mpe na suka ya mir; mpe alendisaki yango makasi.
10 Y él levantó torres en el desierto e hizo pozos para almacenar agua, porque tenía mucho ganado, en las llanuras y en las mesetas; y tenía granjeros y viticultores en las montañas y en la tierra fértil, porque era un amante de la agricultura.
Atongaki lisusu bandako milayi kati na esobe mpe atimolaki mabulu ebele ya mayi mpo ete azalaki na bibwele ebele na se ya bangomba mpe na etando. Azalaki mpe na basali ebele oyo bazalaki kotimola mabele mpe kosala kati na bilanga na ye ya vino kati na bituka ya bangomba mpe na mabele oyo ebotaka malamu, pamba te azalaki kolinga mingi misala ya bilanga.
11 Además, Uzías tenía un ejército de guerreros que salían a la guerra en bandas, como habían sido listados por Jeiel el escriba y Maasias, el gobernante, bajo la autoridad de Hananías, uno de los capitanes del rey.
Oziasi azalaki na basoda oyo baselingwa mpo na bitumba; mpe babongisamaki na masanga kolanda motango na bango ndenge Yeyeli, mokomi mikanda, mpe kalaka Maaseya, na bokambami ya Anania, moko kati na bakonzi ya bakalaka ya mokonzi, bazwaki bango na mosala.
12 Los jefes de familia, los hombres de guerra fuertes, eran dos mil seiscientos.
Motango nyonso ya bakambi ya mabota, oyo bazalaki kokamba basoda ya mpiko, ezalaki nkoto mibale na nkama motoba.
13 Y bajo sus órdenes había un ejército entrenado de trescientos siete mil quinientos, guerreros valientes ayudando al rey contra cualquiera que viniera contra él.
Bakonzi ya mabota bazalaki kokamba basoda nkoto nkama misato na sambo na nkama mitano oyo baselingwa mpo na bitumba mpe bazalaki basoda ya mpiko, mpo na kobundela mokonzi liboso ya banguna na ye.
14 Y Uzías tenía todas estas fuerzas armaduras y lanzas y cabezas protectoras y escudos, arcos y piedras para enviar desde bandas de cuero.
Na tango nyonso ya bitumba, Oziasi azalaki kopesa banguba, makonga, bikoti ya bibende, bilamba ya bibende oyo ebatelaka tolo, matolotolo mpe bibambelo mabanga.
15 Y en Jerusalén hizo máquinas, la invención de hombres expertos, para colocarlas en las torres y los ángulos de las paredes para enviar flechas y piedras grandes. Y su nombre fue honrado por todas partes; porque fue ayudado grandemente hasta que fue fuerte.
Asalisaki kati na Yelusalemi, epai ya bato ya mayele, bamashini mpo na kotia yango likolo ya bandako milayi mpe na suka ya bamir mpo na kobwaka makonga mpe mabanga minene. Kombo na ye ekendeki sango, pamba te asungamaki makasi kino kokoma moto na nguya.
16 Pero cuando se hizo fuerte, su corazón se enorgulleció, causando su destrucción; e hizo lo malo contra el SEÑOR su Dios; porque entró al Templo del Señor con el propósito de quemar incienso en el altar del incienso.
Kasi tango Oziasi akomaki na nguya, atondaki na lolendo oyo ememaki ye na kokweya. Atambolaki lisusu na bosembo te liboso ya Yawe, Nzambe na ye, kino kokota na Tempelo ya Yawe mpo na kotumba mbeka ya malasi na likolo ya etumbelo ya malasi.
17 Luego entró el sacerdote Azarías con él, con ochenta sacerdotes del Señor, que eran hombres valientes;
Nganga-Nzambe Azaria alandaki Oziasi na sima, elongo na Banganga-Nzambe mosusu ya Yawe, tuku mwambe, bango nyonso batonda na mpiko.
18 E hicieron protestas al rey Uzías, y le dijeron: Él ofrecer incienso, Rey Uzías, no es asunto tuyo, sino de los sacerdotes, los hijos de Aarón, que han sido consagrados para este trabajo: Sal del lugar santo, porque has hecho mal, y no será para tu honor delante de Dios.
Batelemelaki mokonzi Oziasi mpe balobaki na ye: « Oziasi, kotumba mbeka ya malasi mpo na Yawe ezali mosala na yo te! Ezali nde mosala ya Banganga-Nzambe, bakitani ya Aron, oyo babulisama mpo na mosala yango. Bima wuta na Esika ya bule, pamba te ozali kosala likambo ya nkele, mpe Yawe Nzambe akosepela na yo te! »
19 Entonces Uzías se enojó; y tenía en su mano un recipiente para quemar incienso; y mientras su ira era amarga contra los sacerdotes, la marca de la enfermedad del leproso apareció en su frente, ante los ojos de los sacerdotes en la casa del Señor por el altar de los inciensos.
Bongo Oziasi, oyo asimbaki mbabola na loboko na ye, atombokelaki Banganga-Nzambe. Kaka na tango yango, wana azalaki kati na Tempelo ya Yawe liboso ya etumbelo ya ansa, bokono ya maba ebimaki na elongi na ye na miso ya Banganga-Nzambe.
20 Y Azarías, el principal sacerdote, y todos los sacerdotes, mirándolo, vieron la marca del leproso en su frente, lo enviaron rápidamente y él mismo salió de inmediato, porque el castigo del Señor había venido sobre él.
Tango Azaria, mokonzi ya Banganga-Nzambe, mpe Banganga-Nzambe mosusu batalaki ye mpe bamonaki ete akomi na bokono ya maba na elongi, babenganaki ye na lombangu wana ye moko mpe azalaki kobima na lombangu, pamba te Yawe asambwisaki ye.
21 Así que el rey Uzías fue un leproso hasta el día de su muerte, viviendo separado en su casa particular; porque fue cortado de la casa de Dios; y Jotam su hijo estaba gobernando su casa, juzgando a la gente de la tierra.
Mokonzi Oziasi abelaki bokono ya maba kino na mokolo na ye ya kufa. Lokola azalaki kobela bokono ya maba, akomaki kovanda na ndako moko batonga mosika, pamba te babenganaki ye mosika ya Tempelo ya Yawe. Yotami, mwana na ye ya mobali, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi, ayangelaki bato ya mokili.
22 Ahora, el resto de los hechos de Uzías, desde él principio a fin, fueron registrados por el profeta Isaías, el hijo de Amoz.
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Oziasi mpe misala na ye, kobanda na ebandeli kino na suka, ezali mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, nde akomaki yango.
23 Y Uzías murió; y lo enterraron en el campo del cementerio real usado para los reyes, porque dijeron: Es un leproso, y Jotam su hijo se convirtió en rey en su lugar.
Oziasi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bango kati na lilita ya bakonzi, pamba te bato bazalaki koloba: « Abelaki bokono ya maba. » Yotami, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.

< 2 Crónicas 26 >