< Salmos 28 >
1 Salmo de David. A TI clamaré, oh Jehová, fortaleza mía: no te desentiendas de mí; porque no sea yo, dejándome tú, semejante á los que descienden al sepulcro.
Nzembo ya Davidi. Yawe, nazali kobelela Yo! Ozali Libanga na ngai, koboya te koyoka ngai. Soki te, nakozala lokola bato oyo bazali kokita na kunda.
2 Oye la voz de mis ruegos cuando clamo á ti, cuando alzo mis manos hacia el templo de tu santidad.
Yoka ngai tango nabondelaka Yo mpo na kosenga lisungi, tango natombolaka maboko na ngai, na kotala na ngambo ya Esika-Oyo-Eleki-Bule.
3 No me arrebates á una con los malos, y con los que hacen iniquidad: los cuales hablan paz con sus prójimos, y la maldad está en su corazón.
Kokumba ngai te elongo na bato mabe, elongo na bato oyo basalaka mabe, oyo balobaka makambo ya kimia epai ya baninga na bango, kasi babombaka mabe kati na mitema na bango.
4 Dales conforme á su obra, y conforme á la malicia de sus hechos: dales conforme á la obra de sus manos, dales su paga.
Zongisela bango kolanda misala na bango, kolanda misala mabe na bango; zongisela bango kolanda misala ya maboko na bango, mpe kweyisela bango oyo ekoki na misala na bango.
5 Porque no atendieron á las obras de Jehová, ni al hecho de sus manos, derribarálos, y no los edificará.
Pamba te bamemiaka te misala ya Yawe mpe makambo oyo akokisaka, akobamba bango na mabele mpe akotikala kotelemisa bango lisusu te.
6 Bendito Jehová, que oyó la voz de mis ruegos.
Tika ete Yawe akumisama, pamba te ayanoli mabondeli na ngai.
7 Jehová es mi fortaleza y mi escudo: en él esperó mi corazón, y fuí ayudado; por lo que se gozó mi corazón, y con mi canción le alabaré.
Yawe azali makasi mpe nguba na ngai; natielaka Ye motema na ngai, mpe asungaka ngai. Motema na ngai etondi na esengo, mpe nazali kokumisa Ye na banzembo na ngai.
8 Jehová es su fuerza, y la fortaleza de las saludes de su ungido.
Yawe azali makasi ya bato na Ye, ndako batonga makasi epai wapi mopakolami na Ye azwaka lobiko.
9 Salva á tu pueblo, y bendice á tu heredad; y pastoréalos y ensálzalos para siempre.
Yawe, bikisa bato na Yo mpe pambola libula na Yo; zala mobateli na bango mpe sunga bango mpo na libela.