< Isaías 12 >
1 Y DIRÁS en aquel día: Cantaré á ti, oh Jehová: pues [aunque] te enojaste contra mí, tu furor se apartó, y me has consolado.
Na mokolo wana, okoloba: « Oh Yawe, nazali kosanzola Yo, pamba te ata osilikelaki ngai, kanda na Yo elongwaki likolo na ngai mpe obondisaki ngai!
2 He aquí Dios es salud mía; aseguraréme, y no temeré; porque mi fortaleza y mi canción es JAH Jehová, el cual ha sido salud para mí.
Solo, Nzambe azali lobiko na ngai; nakotia elikya na ngai epai na Ye mpe nakobanga lisusu te. Nkolo Yawe azali makasi mpe nguya na ngai; azali lobiko na ngai. »
3 Sacaréis aguas con gozo de las fuentes de la salud.
Yango wana, botoka mayi na esengo na etima ya lobiko.
4 Y diréis en aquel día: Cantad á Jehová, aclamad su nombre, haced célebres en los pueblos sus obras, recordad que su nombre es engrandecido.
Na mokolo wana bokoloba: « Bosanzola Yawe, bobelela Kombo na Ye, bosakola misala na Ye kati na bikolo mpe botatola ete Kombo na Ye ezali likolo na nyonso.
5 Cantad salmos á Jehová; porque ha hecho cosas magníficas: sea sabido esto por toda la tierra.
Boyemba loyembo mpo na Yawe, pamba te asali makambo ya kokamwa. Tika ete mokili mobimba eyeba yango!
6 Regocíjate y canta, oh moradora de Sión: porque grande es en medio de ti el Santo de Israel.
Bino bato ya Siona, bobeta milolo mpe boyemba loyembo na esengo, pamba te Mosantu ya Isalaele azali monene kati na bino! »