< Salmos 75 >
1 Alabarte hemos, o! Dios, alabar te hemos; que cercano está tu nombre: cuenten todos tus maravillas.
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya koyemba lokola « Koboma te! » Nzembo ya Azafi. Nzambe, tozali kosanzola Yo, tozali kosanzola Kombo na Yo; mpo ete Kombo na Yo ezali pene, bato bazali kotatola bikamwa na Yo.
2 Cuando yo tuviere tiempo, yo juzgaré rectamente.
Olobaki: « Na tango oyo ngai moko nakobongisa, nakokata makambo na bosembo.
3 La tierra se arruinaba, y sus moradores: yo compuse sus columnas. (Selah)
Mokili ekoki kolenga elongo na bavandi na yango nyonso, kasi ezali ngai nde nalendisaka makonzi na yango. »
4 Dije a los malvados: No os enloquezcáis: y a los impíos: No alcéis el cuerno.
Nazali koloba na moto ya lofundu: « Kotombola lisusu mapeka te; » mpe na bato mabe: « Bosala lisusu lolendo te.
5 No levantéis en alto vuestro cuerno; no habléis con cerviz gruesa.
Bomeka lisusu te kosala lofundu mpe koloba na lolendo. »
6 Porque ni de oriente, ni de occidente, ni del desierto viene el ensalzamiento.
Botombwami ewutaka na Este te, na Weste te, ewutaka mpe na esobe te.
7 Porque Dios, que es el juez; a este abate, y a aquel ensalza.
Pamba te ezali Nzambe nde akataka makambo: akitisaka moto songolo mpe atombolaka moto pakala.
8 Que el cáliz está en la mano de Jehová, y lleno de vino bermejo de mistura, y él derrama de aquí: ciertamente sus heces chuparán, y beberán todos los impíos de la tierra.
Loboko na Yawe esimbi kopo oyo etondi na vino ya makasi mpe ya bololo. Azali kosopa yango, mpe bato mabe nyonso ya mokili bazali komeka mpe komela yango kino na mbindo oyo etikalaka na se ya kopo.
9 Y yo anunciaré siempre: cantaré alabanzas al Dios de Jacob.
Mpo na ngai, nakotatola makambo oyo tango nyonso, nakoyemba mpo na lokumu ya Nzambe ya Jakobi,
10 Y quebraré todos los cuernos de los pecadores: y los cuernos del justo serán ensalzados.
oyo azali koloba: « Nakosilisa makasi nyonso ya bato mabe; kasi nguya ya bato ya sembo ekomata lisusu makasi. »