< Salmos 54 >
1 O! Dios, sálvame en tu nombre, y con tu valentía me defiende.
Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na lindanda tango bato ya Zifi bayaki koyebisa Saulo: « Davidi abombami kati na biso. » Oh Nzambe, bikisa ngai na nzela ya Kombo na Yo, longisa ngai na nzela ya nguya na Yo.
2 O! Dios, oye mi oración, escucha las razones de mi boca.
Oh Nzambe, yoka libondeli na ngai, yoka maloba ya monoko na ngai.
3 Porque extraños se han levantado contra mí, y fuertes han buscado a mi alma: no han puesto a Dios delante de si. (Selah)
Bapaya batelemi mpo na kobundisa ngai; mpe bato na kanza bazali koluka koboma ngai, batalelaka Nzambe te.
4 He aquí, Dios es el que me ayuda; el Señor es con los que sustentan mi vida.
Tala, Nzambe azali lisungi na ngai, Nkolo azali eyekamelo na ngai.
5 El volverá el mal a mis enemigos; córtalos por tu verdad.
Tika ete akweyisela bayini na ngai mabe! Kati na boyengebene na Yo, bebisa bango.
6 Voluntariamente sacrificaré a ti; alabaré tu nombre, o! Jehová, porque es bueno.
Nakobonzela Yo mbeka na motema malamu, nakokumisa Kombo na Yo, Oh Yawe, pamba te ozali malamu.
7 Porque me ha escapado de toda angustia, y en mis enemigos vieron mis ojos la venganza.
Okangoli ngai na pasi nyonso; mpe miso na ngai etali lokola molongi ya banguna na ngai.