< 2 Corintios 12 >

1 Cierto que no me es conveniente gloriarme; mas vendré a las visiones y a las revelaciones del Señor.
Boni, nasengeli komikumisa? Te, ezali na tina te! Kasi tika nayebisa bino makambo oyo namonaki lokola na ndoto, mpe bimoniseli oyo Nkolo alakisaki ngai.
2 Conozco a un hombre en Cristo, que hace catorce años (si en el cuerpo, no lo sé; si fuera del cuerpo, no lo sé: Dios lo sabe) fue arrebatado hasta el tercer cielo.
Nayebi moto moko kati na Klisto, oyo, wuta mibu zomi na minei, amemamaki kino na likolo ya misato: nayebi te soki ezalaki kati na nzoto na ye to mpe kati na nzoto na ye te, kasi Nzambe ayebi.
3 Y conozco al tal hombre, (si en el cuerpo, o fuera del cuerpo, no lo sé: Dios lo sabe.)
Nzokande, ezala soki ezalaki kati na nzoto na ye to mpe kati na nzoto na ye te, Nzambe ayebi yango; kasi ngai nayebi kaka ete moto yango
4 Que fue arrebatado al paraíso, donde oyó palabras inefables que al hombre no le es lícito decir.
amemamaki na paradizo mpe ayokaki maloba oyo moto akoki kolimbola te, makambo oyo moto azali na ndingisa te ya koloba.
5 De este tal me gloriaré; mas de mí mismo no me gloriaré, sino en mis flaquezas.
Nakomikumisa solo na tina na moto ya ndenge wana, kasi na tina na ngai moko te, longola kaka na tina na bolembu na ngai.
6 Por lo cual si quisiere gloriarme, no seré insensato, porque diré verdad: empero ahora lo dejo, porque nadie piense de mí más de lo que en mí ve, u oye de mí.
Nzokande, soki nalingaki komikumisa, nalingaki kozala zoba te, pamba te nalingaki koloba kaka bosolo; kasi naboyi kosala yango, noki te bakopesa ngai lokumu koleka oyo bato bamonaka kati na ngai to koleka sango oyo bayokaka na tina na ngai.
7 Y porque no me ensalzase desmedidamente a causa de la grandeza de las revelaciones, me fue dada una espina en mi carne, el mensajero de Satanás, que me apescozonase.
Kutu, mpo ete namitondisa na lofundu te na tina na bimoniseli ya kokamwa oyo nazwaki, batiaki ngai nzube moko kati na nzoto, anjelu ya Satana mpo na konyokola ngai.
8 Por lo cual tres veces rogué al Señor que se quitase de mí.
Mpo na yango, nabondelaki Nkolo mbala misato mpo ete nzube yango elongwa na nzoto na ngai.
9 Y él me dijo: Bástate mi gracia; porque mi poder en la flaqueza se perfecciona. Por tanto de buena gana me gloriaré de mis flaquezas, porque habite en mí el poder de Cristo.
Kasi azongiselaki ngai: « Ngolu na Ngai ekoki mpo na yo, pamba te nguya na Ngai ekokisamaka kati na bolembu. » Mpo na yango, nakomikumisa na esengo nyonso mpo na bolembu na ngai, mpo ete nguya ya Klisto ezala kati na ngai.
10 Por lo cual tomo contentamiento en las flaquezas, en las afrentas, en las necesidades, en las persecuciones, en las angustias por amor de Cristo; porque cuando soy flaco, entonces soy fuerte.
Yango wana, na likambo oyo etali Klisto, ezala kati na bolembu, na kofingama, na kozanga, na minyoko to mpe na pasi oyo nakutanaka na yango, nasepelaka na ngai kaka; pamba te ezali na tango oyo nazalaka na bolembu nde natondaka na makasi.
11 Me he hecho insensato en gloriarme; vosotros me constreñisteis; que yo había de ser alabado de vosotros; porque en nada soy menos que los más eminentes apóstoles, aunque soy nada.
Tala, nazali koloba lokola moto ya liboma, pamba te bino nde botindiki ngai kosala bongo. Pamba te ata soki nazali moto pamba, kasi bantoma oyo bamimonaka minene baleki ngai ata na eloko moko te.
12 Verdaderamente las señales de mi apostolado han sido hechas en medio de vosotros, en toda paciencia, en señales, en prodigios, y en maravillas.
Bilembo oyo elakisaka ete nazali ntoma emonisamaki kati na bino: molende, bilembo ya kokamwa mpe bikamwa.
13 Porque ¿qué hay en que hayáis sido menos que las otras iglesias, sino en que yo mismo no os he sido carga? perdonádme este agravio.
Eloko nini penza bino bozwaki te koleka Mangomba mosusu, longola kaka kozanga komemisa bino mokumba na ngai? Boye, bolimbisa ngai mpo na mabe yango!
14 He aquí, estoy preparado para ir a vosotros la tercera vez, y no os seré gravoso, porque no busco a lo vuestro, sino a vosotros; porque no han de atesorar los hijos para los padres, sino los padres para los hijos.
Sik’oyo, nasali mabongisi ya koya kotala bino mpo na mbala ya misato; mpe nakomemisa bino mokumba na ngai te, pamba te nazali koluka biloko na bino te, kasi nazali nde koluka bino moko. Kobomba biloko mpo na baboti ezali likambo ya bana na bango te, kasi ezali baboti nde basengeli kobomba biloko mpo na bana na bango.
15 Yo empero de bonísima gana gastaré y seré gastado por vuestras almas; aunque amándoos más, sea amado menos.
Mpo na ngai, nakopesa biloko na ngai nyonso na esengo, mpe nakomipesa mobimba mpo na bino. Soki nalingi bino mingi; boni, bino bokoki kolinga ngai mingi te?
16 Mas sea así, yo no os he agravado; sino que, como soy astuto, os he tomado con engaño.
Atako nazalaki mokumba te epai na bino, kasi bato mosusu bazalaki koloba ete nazali moto ya mayele mabe, natielaki bino motambo.
17 ¿Os he defraudado quizá por alguno de los que he enviado a vosotros?
Boni, kati na bato oyo natindaki epai na bino, ezali na moko oyo natindaki mpo na kozwa bino biloko na mayele mabe?
18 Rogué a Tito, y envié con él al otro hermano. ¿Os defraudó Tito? ¿no andamos en un mismo Espíritu? ¿no andamos en las mismas pisadas?
Nasengaki na Tito ete aya epai na bino, mpe natindaki elongo na ye ndeko na biso. Boni, Tito azwaki biloko na bino na mayele mabe? Tozalaki na ye likanisi moko te? Tazalaki kosala na ye ndenge moko te?
19 ¿O pensáis aun que nos escusamos con vosotros? Delante de Dios, en Cristo hablamos; mas lo hacemos todo, o amadísimos, por vuestra edificación.
Bokanisi ete, wuta kala, biso tolukaka komilongisa liboso na bino? Te, balingami na ngai! Ezali liboso ya Nzambe, kati na Klisto, nde tolobaka mpe tosalaka makambo nyonso mpo na kokolisa kondima na bino.
20 Porque tengo miedo que cuando viniere, no os halle en alguna manera como no querría; y que vosotros me halléis cual no querríais; porque no haya entre vosotros contiendas, envidias, iras, disensiones, detracciones, murmuraciones, engreimientos, sediciones;
Pamba te nazali kobanga ete nakuta bino te na lolenge oyo ngai nazali kolinga ete bozala, tango nakoya epai na bino, mpe ete bino bomona ngai te na lolenge oyo bozali kolinga ete nazala. Nazali kobanga kokuta kati na bino koswana, zuwa, kanda, kowelana, kofingana, kotongana, lofundu mpe mobulu.
21 A fin de que cuando volviere, no me humille Dios en medio de vosotros, y haya yo de llorar por muchos de los que han pecado ya, y no se han arrepentido de la inmundicia, y fornicación, y deshonestidad que han cometido.
Solo, nazali kobanga lisusu ete, tango nakoya lisusu epai na bino, Nzambe ayokisa ngai soni liboso na bino, mpe ete nalela mpo na bato ebele oyo basalaki masumu liboso kasi babongwani te na misala na bango ya mbindo, na kindumba mpe na ekobo oyo basalaka.

< 2 Corintios 12 >