< Salmos 56 >

1 Oh ʼElohim, ten compasión de mí, Porque el hombre me pisotea, me devora, Me oprime y me combate todo el día.
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na « Ebenga ya terebente ya mosika. » Nzembo ya Davidi, tango bato ya Filisitia bakangaki ye kati na mboka Gati. Nzambe, yokela ngai mawa, pamba te bato bazali kotungisa ngai. Babundisaka mpe banyokolaka ngai mikolo nyonso.
2 Los que me asaltan me pisotean todo el día, Porque son muchos los que con soberbia pelean contra mí.
Bayini na ngai batungisaka ngai mikolo nyonso; bato oyo babundisaka ngai na lolendo bazali ebele.
3 El día cuando temo, confío en Ti.
Mokolo oyo nazalaka na bobangi, natiaka elikya na ngai kati na Yo.
4 En ʼElohim, la Palabra de Quien alabo, En ʼElohim confío, no temeré. ¿Qué puede hacerme el hombre?
Epai ya Nzambe, nakumisaka Liloba na Ye; Epai ya Nzambe, natiaka motema mpe nabangaka te. Moto oyo akokufa akoki kosala ngai nini?
5 Todo el día pervierten mis palabras. Contra mí son todos sus pensamientos para mal.
Babongolaka maloba na ngai mikolo nyonso; mabongisi na bango nyonso ezalaka mpo na kosala ngai mabe.
6 Conspiran, acechan, observan atentamente mis pasos en acecho de mi vida.
Basalaka makita, babombamaka, balandaka ngai mpo na kosala ngai mabe.
7 Pésalos a causa de su perversidad. Con furia derriba los pueblos, oh ʼElohim.
Mpo na makambo oyo ya mabe, boni, bazanga etumbu? Oh Nzambe, kweyisela bikolo kanda na Yo!
8 Tomaste en cuenta mis huidas. Coloca mis lágrimas en tu botella. ¿No están ellas en tu rollo?
Solo, oyebi motango ya matambe ya bomoi na ngai ya mitelengano. Sopa mpinzoli na ngai kati na mbeki na Yo, oyo ezali buku na Yo ya ekaniseli.
9 El día cuando yo te invoque retrocederán mis enemigos. Esto sé porque ʼElohim está a mi favor.
Bongo, na mokolo oyo nakobelela mpo na kosenga lisungi, banguna na ngai bakozonga sima. Na nzela ya likambo yango, nakoyeba ete Nzambe azali mpo na ngai.
10 Oh ʼElohim, tu Palabra alabo, Oh Yavé, tu Palabra alabo.
Pembeni ya Nzambe oyo nakumisaka Liloba na Ye, pembeni ya Yawe oyo nakumisaka Liloba na Ye,
11 En ʼElohim confié, no temeré. ¿Qué puede hacerme el hombre?
pembeni ya Nzambe oyo natielaka motema mpe nazalaka na bobangi te, moto akoki kosala ngai nini?
12 Oh ʼElohim, sobre mí están los votos. Te pagaré ofrendas de acción de gracias,
Epai na Yo Nzambe, nakokokisa bandayi na ngai mpe nakobonza bambeka ya matondi.
13 Porque libraste mi vida de la muerte Y mis pies de tropezar, Para que ande delante de ʼElohim En la luz de los que viven.
Pamba te okangoli ngai na kufa mpe obateli makolo na ngai ete ebeta mabaku te, mpo ete natambola liboso na Yo Nzambe kati na pole ya bomoi.

< Salmos 56 >