< Proverbios 3 >

1 Hijo mío, no olvides mis enseñanzas, Y tu corazón guarde mis mandamientos.
Mwana na Ngai, kobosana mateya na ngai te, kasi batela mibeko na ngai kati na motema na yo;
2 Porque largura de días, años de vida Y paz te aumentarán.
pamba te ekoyeisa mikolo ya bomoi na yo milayi, ekobakisa mibu ebele na bomoi na yo mpe ekomemela yo kimia.
3 Nunca se aparten de ti la misericordia y la verdad. Átalas a tu cuello. Escríbelas en la tabla de tu corazón,
Tika ete bolamu mpe bosolo ekabwana na yo te, linga yango zingazinga na kingo na yo, mpe koma yango na etando ya motema na yo!
4 Y hallarás gracia y buena opinión Ante los ojos de ʼElohim y del hombre.
Okozwa ngolu mpe kombo ya malamu na miso ya Nzambe mpe na miso ya bato.
5 Confía en Yavé con todo tu corazón, Y no te apoyes en tu propia inteligencia.
Ndimela Yawe na motema na yo mobimba, mpe kotia motema te na mayele na yo.
6 Reconócelo en todos tus caminos, Y Él enderezará tus sendas.
Yebaka Ye na banzela na yo nyonso, mpe Ye akokomisa yango alima.
7 No seas sabio en tu propia opinión. Teme a Yavé Y apártate del mal,
Tika ete omimonaka te moto ya bwanya na miso na yo moko; tosa Yawe mpe longwa na mabe.
8 Porque será medicina a tu ombligo Y tuétano a tus huesos.
Ekozala kisi mpo na kokomisa nzoto na yo kolongono mpe kolendisa mikuwa na yo.
9 Honra a Yavé con tus bienes Y con las primicias de todos tus frutos.
Pesaka Yawe lokumu na nzela ya biloko na yo mpe ya bambuma ya liboso ya bozwi na yo nyonso.
10 Tus graneros se henchirán de abundancia, Y tus lagares rebosarán de mosto.
Bongo bibombelo na yo ekotonda na biloko, mpe bambeki na yo ekotonda na vino.
11 Hijo mío, no menosprecies el castigo de Yavé, Ni te fatigues de su corrección.
Mwana na ngai, yamba toli ya Yawe, koboya te pamela na Ye;
12 Porque Yavé disciplina al que ama, Como el padre al hijo en quien se complace.
pamba te Yawe apamelaka moto oyo Ye alingaka, ndenge kaka tata apamelaka mwana na ye, oyo alingaka.
13 Inmensamente feliz el hombre que halla sabiduría Y el que obtiene la inteligencia.
Esengo na moto oyo amoni bwanya! Esengo na moto oyo azwi mayele!
14 Porque su provecho es mayor que el de la plata, Y su resultado es mejor que el oro fino.
Pamba te kozala na yango eleki kozala na palata na motuya, mpe lifuti na yango eleki wolo oyo balekisi na moto na motuya.
15 Es más preciosa que las perlas, Nada de lo que desees podrá compararse con ella.
Ezali na motuya koleka babiju, mpe eloko moko te oyo moto akoki koluka ekokani na yango.
16 Abundancia de días hay en su mano derecha, Y en su izquierda, riquezas y honra.
Kati na loboko na Ye ya mobali, ezali na bomoi ya molayi; mpe kati na loboko na Ye ya mwasi, ezali na lokumu mpe bomengo.
17 Sus caminos son agradables, Y en todas sus sendas hay paz.
Nzela na Ye ezali ya esengo, mpe banzela na Ye nyonso ya mike ezali ya kimia.
18 Es árbol de vida a los que echan mano a ella, Y los que la retienen son inmensamente felices.
Bwanya ezali nzete ya bomoi mpo na bato oyo basimbaka yango; bato oyo bakokanga yango makasi bakozala na esengo.
19 Yavé fundó la tierra con sabiduría Y con entendimiento afirmó los cielos.
Na nzela ya bwanya, Yawe atiaki miboko ya mabele; na nzela ya mayele, alendisaki likolo.
20 Con su conocimiento fueron divididos los océanos Y las nubes destilan rocío.
Na nzela ya mayele na Ye, mozindo ya se ya mabele ebimisaki mayi mpe mapata enokisaki mvula.
21 Hijo mío, no se aparten estas cosas de tus ojos. Guarda la sabiduría y la discreción,
Mwana na ngai, tika ete bwanya mpe bososoli ezala mosika ya miso na yo te; batela yango malamu,
22 Y serán vida a tu alma y gracia a tu cuello.
pamba te ekozala bomoi mpo na yo mpe ngolu mpo na kingo na yo.
23 Entonces andarás con seguridad en tu camino Y tu pie no tropezará.
Boye, okotambola na kimia na nzela na yo, mpe lokolo na yo ekobeta libaku te.
24 Cuando te acuestas, no tendrás temor. Te acostarás, Y tu sueño será dulce.
Tango okolala, okobanga eloko moko te, pamba te pongi na yo ekozala ya kimia.
25 No temerás el pavor repentino, Ni cuando llega el ataque de los perversos,
Somo ya pwasa ekobangisa yo te, ezala tango bato mabe bakobimela yo na pwasa;
26 Porque Yavé será tu Confianza. Él guardará tu pie de caer en la trampa.
pamba te Yawe akozala elikya na yo mpe akobatela makolo na yo mpo ete ekangama te na motambo.
27 No retengas el bien a quien es debido, Cuando tienes el poder para hacerlo.
Koboyaka te kosala bolamu epai ya moto oyo azali na bosenga, tango maboko na yo ezali na makoki ya kosala yango.
28 No digas a tu prójimo: Anda y vuelve, mañana te lo daré, Cuando tienes contigo qué darle.
Kolobaka na moninga na yo te: « Kende, bongo oya sima; nakopesa yo yango lobi; » soki ozali na makoki ya kosala likambo yango.
29 No trames el mal contra el prójimo Que habita confiado junto a ti.
Kosalaka moninga na yo mabe te soki azali kovanda na kimia epai na yo.
30 No tengas pleito con alguno sin causa, Si no te hizo agravio.
Kolukelaka moto makambo te, oyo ezanga tina soki asali yo mabe te.
31 No envidies al hombre violento, Ni escojas alguno de sus caminos,
Kolulaka te moto ya mobulu mpe koponaka ata nzela moko te, kati na banzela na ye.
32 Porque Yavé aborrece al perverso. Su íntima comunión es con los rectos.
Pamba te Yawe ayinaka bato mabe, kasi ayebisaka basekele na Ye epai ya bato ya sembo.
33 La maldición de Yavé está sobre la casa del impío, Pero bendice la morada de los justos.
Yawe alakelaka mabe ndako ya moto mabe, kasi apambolaka ndako ya moto ya sembo;
34 Ciertamente Él se burla de los que se burlan Y da gracia a los humildes.
asambwisaka batioli, kasi atalisaka ngolu na Ye epai ya bato oyo bamikitisaka.
35 Los sabios heredarán honra, Pero los necios cargarán la afrenta.
Bato ya bwanya bakozwa nkembo, kasi bazoba bakozala na soni.

< Proverbios 3 >