< Malaquías 1 >

1 Profecía de la Palabra de Yavé contra Israel, por medio de Malaquías.
Liloba na Yawe. Liloba na Yawe epai ya Isalaele na nzela ya mosakoli Malashi.
2 Los amé, dice Yavé. Pero ustedes dicen: ¿En qué nos amaste? ¿No es Esaú hermano de Jacob? Yavé dice: Pero amé a Jacob
« Ngai, nalingaki bino, » elobi Yawe, « kasi bino bozali kotuna Ngai: ‹ Eloko nini ezali kolakisa ete olingaki biso? › Boni, Ezawu azalaki ndeko ya Jakobi te? » elobi Yawe, « Nzokande, nalingaki Jakobi,
3 y a Esaú aborrecí. Entregué sus montañas a la desolación y di su heredad a los chacales del campo despoblado.
kasi nayinaki Ezawu; bongo nabongolaki bangomba na ye esobe mpe nakabaki libula na ye epai ya bambwa ya zamba. »
4 Aunque Edom diga: Fuimos arruinados, pero edificaremos las ruinas. Yavé de las huestes dice: Ellos edificarán y Yo destruiré. Los llamarán el territorio perverso y el pueblo contra el cual Yavé está airado para siempre.
Edomi akoki koloba: « Ata babebisi mokili na biso, tokotonga yango kaka lisusu! » Kasi tala makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Solo, bakotonga na bango yango, kasi Ngai nakobuka yango! Bakobenga mokili yango: ‹ Mokili ya makambo mabe, bato oyo bazali tango nyonso na se ya kanda ya Yawe. ›
5 Los ojos de ustedes lo verán y dirán: ¡Grande es Yavé más allá de la frontera de Israel!
Bokomona yango na miso na bino moko mpe bokoloba: ‹ Yawe azali Monene koleka ata bandelo ya etando ya Isalaele. ›
6 El hijo honra al padre, y el esclavo a su amo. Entonces si Yo soy Padre, ¿dónde está mi honra? Y si soy Amo, ¿dónde está la reverencia hacia Mí? Oh sacerdotes que desprecian mi Nombre y dicen: ¿En qué despreciamos tu Nombre?
Mwana mobali apesaka tata na ye lokumu, mpe mowumbu apesaka nkolo na ye lokumu. Soki Ngai nazali Tata, wapi lokumu oyo esengeli na Ngai? Soki nazali Nkolo, wapi lokumu na Ngai? » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Ezali bino Banganga-Nzambe nde bozali kosambwisa Kombo na Ngai, kasi bozali mpe kotuna: ‹ Eloko nini ezali kolakisa ete tozali kosambwisa Kombo na Yo? ›
7 En que ofrecen sobre mi altar pan contaminado. Pero ustedes dicen: ¿En qué lo contaminamos? Al considerar despreciable la mesa de Yavé.
Bozali kotia bilei ya mbindo na etumbelo na Ngai, kasi bozali mpe kotuna: ‹ Eloko nini ezali kolakisa ete tokomisi etumbelo na Yo mbindo? › Ezali tango bolobaka: ‹ Mesa ya Yawe ezali na tina te. ›
8 Pues cuando ofrecen animal ciego para el sacrificio, ¿no está mal? Y cuando ofrecen lo cojo o lo enfermo, ¿no está mal? Preséntalo a tu jefe, dice Yavé de las huestes. ¿Se agradará de ti? ¿O lo recibirá amablemente?
Ezali tango bobonzaka lokola mbeka nyama oyo ekufa miso; boni, yango ezali mabe te? Bomeka nanu kopesa yango epai ya moyangeli na bino; boni, akosepela na bino? Akondima bino solo? » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
9 Ahora pues, imploren el favor de ʼEL para que tenga compasión de nosotros, dice Yavé de las huestes. De sus manos viene esto. ¿Le serán aceptos?
« Sik’oyo, bozali mpe kobondela Nzambe ete asalela bino ngolu na makabo ya lolenge oyo na maboko! Boni, andima bino solo? » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
10 ¡Oh que esté entre ustedes uno que cierre las puertas para que no enciendan fuego vano en mi altar! No tengo complacencia en ustedes, dice Yavé de las huestes, ni acepto ofrenda de sus manos.
« Nani kati na bino akoki kozwa mokano ya kokanga bikuke ya Tempelo mpo ete bopelisa moto na pamba te na etumbelo na Ngai? Nasepeli na bino ata moke te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga; « mpe nakoyamba te makabo oyo ewuti na maboko na bino.
11 Porque desde donde sale el sol hasta donde se oculta, mi Nombre es grande entre las naciones, dice Yavé de las huestes, y en todo lugar se ofrece a mi Nombre incienso y ofrenda pura.
Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, longwa na ebimelo kino na elalelo ya moyi; bakobonza na bisika nyonso malasi ya ansa lokola mbeka mpo na Kombo na Ngai mpe makabo ya peto, pamba te Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
12 Ustedes lo profanan cuando dicen que la mesa de Yavé es impura, y su alimento, despreciable.
« Kasi bino, bozali kosambwisa yango tango bozali koloba ete mesa ya Nkolo ezali na tina te mpe biloko na yango ezali mbindo.
13 Además dicen: ¡Qué fastidioso es esto! Y con desdeño inhalan, dice Yavé de las huestes. Me traen lo robado, lo cojo y lo enfermo para presentar la ofrenda. ¿Debo aceptar esto de su mano?
Bozali koloba lisusu: ‹ Mokumba nini lisusu oyo! › Bozali mpe kotiola Ngai lisusu, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Tango bozali komema bibwele oyo ezoka, oyo etambolaka tengu-tengu to oyo ezali na bokono, mpe bozali kobonza yango lokola mbeka, boni, nandima yango na maboko na bino? » elobi Yawe.
14 ¡Maldito sea el engañador, que aunque tiene macho robusto en su rebaño, promete y sacrifica a Yavé lo dañado! Porque Yo soy gran Rey, dice Yavé de las huestes, y mi Nombre es temible entre las naciones.
« Tika ete alakelama mabe, ye oyo azali na ebwele ya kitoko kati na etonga na ye, mpe alapi ndayi ete akobonza yango epai na Yawe, kasi abonzi ebwele oyo ebela! Pamba te Ngai, nazali Mokonzi Monene, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe bikolo nyonso esengeli kobanga Kombo na Ngai.

< Malaquías 1 >