< Jueces 16 >
1 Sansón fue a Gaza y vio allí a una prostituta, y se unió a ella.
Mokolo moko, Samison akendeki na Gaza epai wapi amonaki mwasi moko ya ndumba, mpe asangisaki na ye nzoto.
2 Avisaron a los de Gaza: ¡Sansón está aquí! Entonces ellos lo rodearon y lo acecharon toda aquella noche en la puerta de la ciudad. Estuvieron en silencio toda la noche y dijeron: En la mañana, cuando sea de día, lo mataremos.
Tango bato ya Gaza bayokaki sango ete Samison azali kati na engumba na bango, bazingelaki esika oyo Samison alalaki mpe basenzelaki butu mobimba, mpo na kozela ye na ekuke ya engumba. Na butu yango, baninganaki te mpe balobaki: « Tokoboma ye na tongo tango akobima. »
3 Pero Sansón estuvo acostado hasta la medianoche, y a la medianoche se levantó. Y al agarrar las hojas de la puerta de la ciudad con sus dos jambas y su cerrojo, se las echó al hombro. Se fue y las subió a la cumbre de la montaña que está enfrente de Hebrón.
Kasi Samison alalaki wana kaka kino na kati-kati ya butu; bongo na ngonga ya zomi na mibale ya butu, alamukaki. Tango akomaki na ekuke ya engumba, asimbaki bizipelo na yango elongo na makonzi na yango mibale. Apikolaki yango elongo na libaya ya kokangela, atombolaki mpe atiaki yango na mapeka na ye, bongo amemaki yango kino na songe ya ngomba moke oyo etalana na engumba Ebron.
4 Después de esto sucedió que se enamoró de una mujer del valle de Sorec que se llamaba Dalila.
Sima na yango, Samison alingaki mwasi moko oyo azalaki kovanda na lubwaku ya Soreki; kombo na ye ezalaki « Dalila. »
5 Los jefes de los filisteos fueron a ella y le dijeron: Sedúcelo para ver en qué consiste su gran fuerza, y cómo podríamos atarlo para afligirlo. Entonces cada uno de nosotros te dará 1.100 piezas de plata.
Bakambi ya Filisitia bakendeki epai ya Dalila mpe balobaki na ye: « Solola na ye na maloba ya sukali mpo ete alakisa yo sekele ya makasi na ye mpe ndenge nini tokoki kolonga ye, mpo ete tokanga ye basinga mpe tosilisa ye makasi. Moko na moko kati na biso akopesa yo mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko na nkama moko. »
6 Dalila dijo a Sansón: Te ruego que me digas en qué consiste tu gran fuerza, y con qué podrías ser atado para afligirte.
Dalila ayebisaki Samison: — Yebisa ngai sekele ya makasi na yo mpe ndenge nini bakoki kokanga yo basinga mpe kosilisa yo makasi.
7 Sansón le respondió: Si me atan con siete cuerdas de arco que aún no estén secas, entonces me debilitaré y seré como cualquier otro hombre.
Samison azongiselaki ye: — Soki bakangi ngai na basinga sambo ya mobesu, oyo nanu bakawusi te, nakokoma moto na bolembu lokola moto nyonso.
8 Los jefes de los filisteos le llevaron siete cuerdas de arco que aún no habían secado, y lo ató con ellas.
Boye, bakambi ya Filisitia bamemelaki Dalila basinga sambo ya mobesu, oyo nanu bakawusi te, mpe Dalila alingaki Samison basinga yango.
9 Ella tenía hombres al acecho en una habitación interior. Entonces le dijo: ¡Sansón, los filisteos contra ti! Pero él rompió las cuerdas de arco como se rompe un hilo de estopa cuando toca el fuego. Y no se supo el secreto de su fuerza.
Lokola bato oyo batindamaki mpo na kokanga ye bazalaki ya kobombama kati na ndako, Dalila abelelaki: « Samison, bato ya Filisitia bayei kobundisa yo! » Samison akataki na pete penza basinga yango ndenge basinga ya lino ekatanaka soki ezwi moto. Boye, basosolaki te sekele ya makasi na ye.
10 Dalila dijo a Sansón: Mira, me engañaste y me dijiste mentiras. Ahora te ruego que me digas cómo puedes ser atado.
Dalila alobaki na Samison: — Osakani na ngai mpe okosi ngai! Sik’oyo, yebisa ngai eloko nini bakoki kosalela mpo na kokanga yo?
11 Y él le contestó: Si me atan fuertemente con cuerdas nuevas, que no hayan sido usadas, me debilitaré y seré como cualquier hombre.
Samison alobaki: — Soki bakangi ngai na basinga ya sika oyo nanu basaleli te, nakokoma moto na bolembu lokola moto nyonso.
12 Dalila tomó cuerdas nuevas y lo ató con ellas, y le dijo: ¡Sansón, los filisteos contra ti! (Y los hombres permanecían al acecho en la habitación interior.) Pero él rompió las cuerdas de sus brazos como un hilo.
Dalila azwaki basinga ya sika mpe akangaki na yango Samison. Bongo abelelaki: « Samison, bato ya Filisitia bayei kobundisa yo! » Atako bato oyo batindamaki mpo na kokanga ye bazalaki lisusu ya kobombama kati na ndako, Samison akataki kaka lokola singa moko pamba, basinga oyo bakangaki ye.
13 Entonces Dalila dijo a Sansón: Hasta ahora me engañas y me dijiste mentiras. Dime cómo puedes ser atado. Él le dijo: Si tejes las siete trenzas de mi cabellera con tela.
Boye Dalila alobaki na Samison: — Kino sik’oyo, ozali kaka kosakana na ngai mpe kokosa ngai! Yebisa ngai ndenge nini bakoki kokanga yo basinga. Samison azongisaki: — Soki okangi suki sambo ya moto na ngai na singa oyo batongelaka bilamba, mpe soki okangisi yango na likonzi, nakokoma moto na bolembu lokola moto nyonso. Boye tango Samison azalaki nanu kolala, Dalila azwaki suki sambo ya moto na ye, akangaki yango na singa oyo batongelaka bilamba
14 Ella, pues, las aseguró con una clavija, y le dijo: ¡Sansón, los filisteos contra ti! Y él, al despertar de su sueño, arrancó la clavija de telar con la tela.
mpe akangisaki yango na likonzi. Dalila abelelaki lisusu Samison: « Samison, bato ya Filisitia bayei kobundisa yo! » Samison alamukaki na pongi na ye mpe apikolaki likonzi elongo na singa oyo batongelaka bilamba.
15 Ella entonces le dijo: ¿Cómo sigues diciendo: Yo te amo, cuando tu corazón no está conmigo? Estas tres veces te burlaste de mí y no me dijiste en qué consiste tu gran fuerza.
Dalila alobaki na ye: « Ndenge nini okoki koloba ete olingaka ngai tango motema na yo ezali elongo na ngai te! Oyo ezali mbala na yo ya misato ya kosakana na ngai, pamba te oyebisi ngai te sekele ya makasi na yo. »
16 Sucedió que como ella lo afligía cada día con sus palabras y lo presionaba, su alma fue reducida a mortal angustia.
Lokola, mokolo na mokolo, Dalila azalaki kotungisa Samison na maloba na ye mpe kozangisa ye kimia, Samison amonaki ete motungisi yango eleki ye ndelo.
17 Por lo cual le descubrió todo su corazón y le dijo: Jamás pasó navaja por mi cabeza porque soy nazareo de ʼElohim desde el vientre de mi madre. Si soy rapado, entonces mi fuerza se apartará de mí y me debilitaré, y seré como un hombre cualquiera.
Boye, ayebisaki Dalila makambo nyonso. Alobaki: « Suki na ngai ekatamaka te, pamba te Nzambe abulisa ngai wuta na libumu ya mama na ngai. Soki kaka bakati ngai suki, makasi na ngai ekosila mpe nakokoma moto na bolembu lokola moto nyonso. »
18 Cuando Dalila se dio cuenta de que le había revelado todo su corazón, envió a llamar a los jefes de los filisteos y dijo: Suban esta vez, porque él me declaró todo su corazón. Y los jefes de los filisteos subieron a ella, con la plata en su mano.
Tango Dalila amonaki ete Samison ayebisi ye makambo nyonso, atindaki sango epai ya bakambi ya Filisitia. Alobaki: « Boya lisusu, ayebisi ngai makambo nyonso. » Bakambi ya Filisitia bazongaki epai ya Dalila na mbongo ya bibende na maboko na bango.
19 Ella entonces lo adormeció sobre sus rodillas, y enseguida llamó al hombre que le rapó las siete trenzas de su cabeza, y ella misma comenzó a dominarlo, pues su fuerza se retiró de él.
Dalila alalisaki Samison na mipende na ye, abengaki mobali moko mpo na kokata ye suki sambo ya moto na ye. Samison akomaki kolemba, mpe makasi na ye esilaki.
20 Ella exclamó: ¡Sansón, los filisteos contra ti! Él entonces, al despertar de su sueño, se dijo: Saldré como las otras veces y me sacudiré libre. Pero no sabía que Yavé se apartó de él.
Dalila abelelaki Samison: « Samison, bato ya Filisitia bayei kobundisa yo! » Samison alamukaki na pongi na ye mpe amilobelaki: « Nakosala ndenge kaka nasalaka liboso mpe nakokangolama na ngai. » Kasi ayebaki te ete Yawe alongwaki kati na ye.
21 Entonces los filisteos lo agarraron, le sacaron los ojos y lo bajaron a Gaza. Lo ataron con cadenas de bronce para que moliera en la cárcel.
Bato ya Filisitia bakangaki ye, batobolaki ye miso, bamemaki ye na Gaza mpe bakangaki ye minyololo ya bibende ya bronze. Akomaki konika bambuma ya ble na enikelo ya libanga kati na boloko.
22 Sin embargo, después que fue rapado, el cabello de su cabeza comenzó a crecer.
Kasi suki ya moto na ye ekomaki lisusu kokola wuta tango bakataki ye yango.
23 Entonces los jefes de los filisteos se reunieron para ofrecer un gran sacrificio a Dagón, su ʼelohim, y con gran regocijo afirmaron: ¡Nuestro ʼelohim entregó en nuestras manos a nuestro enemigo Sansón!
Bakambi ya Filisitia basanganaki mpo na kobonza mbeka monene epai ya nzambe na bango, Dagoni, mpe kosala feti. Balobaki: « Nzambe na biso akabi monguna na biso, Samison, na maboko na biso. »
24 Cuando el pueblo lo vio, alabó a su ʼelohim, porque decían: ¡Nuestro ʼelohim entregó en nuestras manos a nuestro enemigo, Al que devastaba nuestra tierra, Y multiplicaba nuestras víctimas!
Tango bato bamonaki Samison, bakumisaki nzambe na bango, balobaki: « Nzambe na biso akabi na maboko na biso, monguna na biso, oyo azalaki kobebisa mokili na biso mpe koboma bato ebele kati na biso. »
25 Sucedió que cuando tuvieron alegre el corazón, dijeron: Llamen a Sansón para que nos divierta. Y llamaron de la cárcel a Sansón, el cual los divertía. Lo hicieron estar en pie entre las columnas.
Wana bazalaki kosepela, bagangaki: « Bomemela biso Samison mpo ete asepelisa biso! » Babimisaki Samison na boloko mpe akomaki kosala masano liboso na bango. Tango batelemisaki ye na kati-kati ya makonzi ya tempelo na bango,
26 Y Sansón dijo al lazarillo: Acércame y hazme palpar las columnas sobre las cuales descansa el edificio, para que me apoye contra ellas.
Samison alobaki na mosali oyo asimbaki loboko na ye: « Tia ngai na esika oyo nakoki kosimba makonzi oyo esimbi tempelo mpo ete nalalela yango. »
27 El edificio estaba lleno de hombres y mujeres. Todos los jefes de los filisteos estaban allí, y en la azotea estaban como 3.000 hombres y mujeres que observaban el escarnio a Sansón.
Nzokande, tempelo ezalaki ya kotonda na mibali, basi mpe bakambi nyonso ya Filisitia. Na likolo ya ndako, ezalaki na bato pene nkoto misato, mibali mpe basi, oyo bazalaki kotala masano oyo Samison azalaki kosala.
28 Entonces Sansón invocó a Yavé: ¡Oh ʼAdonay Yavé, te ruego que te acuerdes de mí! ¡Dame fuerza solo esta vez, oh ʼElohim, para que yo de una sola vez me vengue de los filisteos por mis dos ojos!
Samison abondelaki Yawe: « Nkolo Yawe, Yo oyo osalaka nyonso oyo olingi, kanisa ngai! Nabondeli Yo, Nzambe: Pesa ngai makasi mbala oyo lisusu, mpe pesa ngai nzela ete, na mbala moko, nazongisa mabe na mabe epai ya bato oyo ya Filisitia mpo na miso na ngai mibale. »
29 Sansón palpó las dos columnas centrales en las cuales descansaba el edificio, se apoyó en ellas, una a su derecha y otra a su izquierda.
Samison asimbaki makonzi nyonso mibale ya kati-kati, oyo esimbaki tempelo, mpe ayekamelaki yango, loboko ya mobali na likonzi moko, mpe loboko ya mwasi na likonzi mosusu.
30 Y Sansón exclamó: ¡Muera yo con los filisteos! Y al empujar con fuerza, el edificio cayó sobre los jefes y sobre toda la gente que estaba en él. De modo que fueron más los que mató al morir que los que mató en su vida.
Bongo Samison alobaki: « Tika ete nakufa elongo na bato ya Filisitia! » Bongo atindikaki na makasi na ye nyonso, mpe tempelo ekweyelaki bakambi mpe bato nyonso oyo bazalaki kuna. Boye, kati na kufa na ye, abomaki bato ebele koleka na tango oyo azalaki na bomoi.
31 Bajaron sus hermanos con toda la casa de su padre y lo levantaron, lo llevaron y lo sepultaron entre Sora y Estaol, junto al sepulcro de Manoa, su padre. Juzgó a Israel 20 años.
Bandeko na ye mpe libota nyonso ya tata na ye bayaki kozwa ebembe na ye. Bazongaki na yango mpe bakundaki ye kati na kunda ya tata na ye, Manoa, na kati ya bingumba Tsorea mpe Eshitaoli. Samison akambaki Isalaele mibu tuku mibale.