< Jueces 12 >

1 Entonces los varones de Efraín fueron convocados, cruzaron hacia Safón y dijeron a Jefté: ¿Por qué fuiste a luchar contra los hijos de Amón y no nos llamaste para ir contigo? ¡Incendiaremos tu casa contigo dentro!
Bato ya Efrayimi basanganaki, bakatisaki na ngambo ya Tsafoni mpe balobaki na Jefite: — Mpo na nini okatisaki mondelo ya bato ya Amoni mpo na kobundisa bango, bongo obengaki biso te mpo ete tokende na yo elongo? Tokotumba yo elongo na ndako na yo!
2 Jefté les respondió: Yo y mi pueblo tuvimos una gran contienda contra los hijos de Amón. Los convoqué a ustedes, pero no me [auxiliaron para] librarnos de su mano.
Jefite azongiselaki bango: — Ngai mpe bato na ngai, tozalaki na kobendana makasi na bato ya Amoni; mpe tango nabengaki bino, bokangolaki ngai te wuta na maboko na bango.
3 Cuando vi que ustedes no me defenderían, arriesgué mi vida y pasé contra los hijos de Amón. Yavé los entregó en mi mano. ¿Por qué se levantan hoy a pelear contra mí?
Tango namonaki ete bokangoli na bino ngai te, nakabaki bomoi na ngai, mpe nakatisaki ngai moko nzela ya bato ya Amoni mpo na kobundisa bango; mpe Yawe apesaki ngai elonga likolo na bango. Sik’oyo, mpo na nini boyei lelo kobundisa ngai?
4 Entonces Jefté reunió a todos los varones de Galaad y peleó contra Efraín. Y los hombres de Galaad derrotaron a Efraín, porque [éstos] dijeron: ¡Ustedes, los galaaditas, son fugitivos de Efraín, en medio de Efraín y de Manasés!
Jefite asangisaki mibali nyonso ya Galadi, mpe babundisaki bato ya Efrayimi. Bato ya Galadi balongaki bato ya Efrayimi; mpe bato ya Efrayimi balobaki: « Bino bato ya Galadi, bozali na bino kaka bato oyo bokimaki wuta na Efrayimi mpe na Manase. »
5 Los galaaditas capturaron los vados del Jordán que están frente a Efraín. Y sucedía que cuando cualquiera de los fugitivos de Efraín decía: Voy a pasar, los hombres de Galaad le preguntaban: ¿Eres tú efrateo? Y si él respondía: No,
Bato ya Galadi bakangaki esika oyo bakatisaka Yordani na makolo, pene ya etuka ya Efrayimi. Mpe tango nyonso mokimi moko ya Efrayimi azalaki koloba: « Tika ngai nakatisa, » bato ya Galadi bazalaki kotuna ye: « Ozali moto ya Efrayimi? » Soki azongisi: « Te, »
6 entonces le decían: Dí ahora, Shibolet. Y él decía Sibolet, porque no podía pronunciar así. Entonces le echaban mano y lo degollaban en los vados del Jordán. Y en aquel tiempo cayeron 42.000 de Efraín.
bazalaki kosenga ete aloba: « Shiboleti; » soki alobi: « Siboleti, » mpo ete akoki te koloba yango malamu, bazalaki kokanga ye mpe koboma ye na esika oyo bakatisaka Yordani na makolo. Na tango wana, babomaki bato ya Efrayimi nkoto tuku minei na mibale.
7 Jefté juzgó a Israel seis años. Jefté galaadita murió y fue sepultado en una de las ciudades de Galaad.
Jefite, moto ya Galadi, akambaki Isalaele mibu motoba. Sima na yango, akufaki, mpe bakundaki ye kati na engumba moko ya Galadi.
8 Después de él, Ibzán, de Belén, juzgó a Israel.
Sima na Jefite, Ibitsani, moto ya Beteleemi, akambaki Isalaele.
9 Tenía 30 hijos y 30 hijas a las cuales casó afuera. Tomó de afuera 30 mujeres para sus hijos. Y juzgó a Israel siete años.
Azalaki na bana mibali tuku misato mpe bana basi tuku misato. Abalisaki bana na ye ya basi na libanda ya libota ya botata na ye, mpe ayeisaki bilenge basi tuku misato ya bikolo mosusu mpo na bana na ye ya mibali. Ibitsani akambaki Isalaele mibu sambo.
10 Ibzán murió y fue sepultado en Belén.
Ibitsani akufaki, mpe bakundaki ye kati na Beteleemi.
11 Después de él Elón zabulonita juzgó a Israel, y juzgó a Israel diez años.
Sima na Ibitsani, Eloni, moto ya libota ya Zabuloni, akambaki Isalaele mibu zomi.
12 Elón zabulonita murió y fue sepultado en Ajalón, en la tierra de Zabulón.
Eloni akufaki, mpe bakundaki ye kati na mboka Ayaloni, kati na etuka ya Zabuloni.
13 Después de él Abdón, hijo de Hilel, piratonita, juzgó a Israel.
Sima na Eloni, Abidoni, mwana mobali ya Ileli, moto ya mokili ya Piratoni, akambaki Isalaele.
14 Éste tuvo 40 hijos y 30 nietos, que cabalgaban sobre 70 asnos. Y juzgó a Israel 8 años.
Azalaki na bana mibali tuku minei mpe bakoko ya mibali tuku misato oyo babandaki kotambola likolo ya ba-ane tuku sambo. Akambaki Isalaele mibu mwambe.
15 Abdón, hijo de Hilel piratonita, murió y fue sepultado en Piratón en la tierra de Efraín, en la región montañosa de los amalecitas.
Abidoni, mwana mobali ya Ileli, akufaki, mpe bakundaki ye na Piratoni, kati na etuka ya Efrayimi, na mokili ya bangomba ya bato ya Amaleki.

< Jueces 12 >