< Isaías 47 >
1 Baja, siéntate en el polvo, oh virgen hija de Babilonia. Siéntate en el suelo sin trono, oh hija de los caldeos, porque ya no serás llamada tierna y delicada.
Kita mpe vanda na putulu, Babiloni, mboka kitoko! Vanda na mabele, kiti ya bokonzi ezali te, Babiloni, mboka kitoko! Moto moko te akobenga yo lisusu « mwasi bonzenga » to « mwasi kitoko. »
2 Toma las piedras del molino y muele el grano. Quítate tu velo y despójate de tu ropa larga. Descubre piernas y cruza los ríos.
Kamata mabanga oyo banikelaka ble mpe sala farine, longola kitambala na yo, tombola nzambala na yo, mpe mipende na yo emonana, bongo katisa bibale!
3 Que se descubra tu desnudez y se vea tu vergüenza. Tomaré venganza y no habrá quien interceda.
Bolumbu na yo ekomonana, mpe soni na yo ekobombama te. Nakozongisa mabe na mabe, mpe moto moko te akopekisa Ngai.
4 Nuestro Redentor, cuyo Nombre es Yavé de las huestes, el Santo de Israel, dice:
Mosikoli na biso, Kombo na Ye: Yawe, Mokonzi ya mampinga, Mosantu ya Isalaele.
5 Siéntate y calla. Entra en la oscuridad, oh hija de los caldeos, porque nunca más te volverán a llamar soberana de reinos.
Vanda kimia, kende na molili, Babiloni, mboka kitoko, pamba te bakobenga yo lisusu te « mwasi mokonzi ya bikolo. »
6 Airado contra mi pueblo, profané mi heredad y la entregué en tu mano. No tuviste compasión de ellos. Pusiste un yugo muy pesado sobre los ancianos
Nasilikelaki bato na Ngai, nasambwisaki libula na Ngai; nakabaki bango na maboko na yo, mpe oyokelaki bango mawa te; bongo omemisaki ata mibange ekangiseli ya kilo makasi.
7 y dijiste: Seré una reina para siempre. Estas cosas hiciste sin considerar ni recordar el posterior resultado de ellas.
Olobaki: « Nakozala mwasi mokonzi mpo na libela! » Kasi motema na yo ekanisaki te tina ya makambo oyo mpe ndenge nini ekosukela.
8 Ahora pues, escucha esto, oh mujer sensual que vives confiadamente y dices en tu corazón: Yo soy y ninguno hay además de mí. No quedaré viuda, ni experimentaré la pérdida de hijos.
Yoka sik’oyo, yo mwasi ya biyenga, oyo omesana kovanda na kimia mpe omilobelaka: « Ngai nde nazali, mosusu azali te. Nakotikala kokoma te mwasi akufisa mobali mpe nakotikala kokufisa bana te! »
9 Estas dos cosas te vendrán de repente en un mismo día: viudez y pérdida de hijos, a pesar de la multitud de tus hechicerías y de tus numerosos encantamientos.
Makambo mibale oyo ekokomela yo mbala moko mpe kaka na mokolo moko: kozanga bana mpe kokufisa mobali. Makambo oyo eleka ndelo nde ekokomela yo, ata kindoki na yo ezali makasi mpe bakisi na yo ezali na nguya.
10 Porque te confiaste en tu maldad y dijiste: Nadie me ve. Tu sabiduría y tu misma ciencia te engañaron. Dijiste en tu corazón: Yo y nadie más.
Otiaki elikya na makambo na yo ya mabe, olobaki: « Moto moko te azali komona ngai! » Bwanya mpe mayele na yo epengwisaki yo tango ozalaki komilobela: « Ngai nde nazali, mosusu azali te! »
11 Vendrá sobre ti un mal que no podrás conjurar. De repente caerá sobre ti una destrucción de la cual no sabes.
Pasi ekokomela yo, mpe okoyeba te ndenge ya kolongola yango; mikakatano ekokomela yo mpe okokoka komibatela te; libebi oyo oyebaki te ekokomela yo na pwasa.
12 Persiste ahora en tus encantamientos y en tus numerosas hechicerías, con las cuales te desvelaste desde tu juventud. Quizás puedas sacar algún provecho, quizás puedas ocasionar terror.
Kangama kaka na bonganga mpe na kindoki na yo, oyo omonelaka pasi wuta bolenge na yo! Tango mosusu okozwela yango litomba, tango mosusu okokoka kobangisa bato.
13 Estás agotada con tus numerosos consejos. ¡Que se levanten los astrónomos, los que observan las estrellas y los pronosticadores mensuales, y que te salven de lo que vendrá sobre ti!
Batoli nyonso oyo osili kozwa epai na bango elembisi yo nzoto! Tika ete bato ya soloka oyo bayekolaka bikelamu nyonso ya likolo: moyi, sanza, minzoto mpe biloko mosusu, mpe bayebisaka na ebandeli nyonso ya sanza makambo oyo ekoya, batelema wana mpe babikisa yo!
14 Ciertamente serán como pasto seco, y el fuego los consumirá. No podrán librar su vida del poder de las llamas. No quedarán brasas para calentarse, ni lumbre ante la cual se sienten.
Tala, bakozala solo lokola matiti ya kokawuka, matiti oyo moto ekotumba; bakokoka kobikisa ata milimo na bango moko te na nguya ya moto: Ekozala lisusu te lokola makala ya moto mpo na koyetola to moto mpo na kovanda zingazinga na yango.
15 Así fueron para ti aquellos con quienes te afanaste, aquellos con quienes trataste desde tu juventud. Andarán errantes, cada uno vagará por su lado. No habrá quien te salve.
Ezali bongo nde bakokoma liboso na yo, bato nyonso oyo ozalaki komonela pasi, mpe bato oyo ozalaki kosala elongo na bango wuta bolenge na yo. Moko na moko na bango akoyengayenga na ngambo na ye, moko te akobikisa yo!