< Génesis 5 >

1 Este es el rollo de las generaciones de Adán. El día cuando ʼElohim creó al hombre, lo hizo a imagen de ʼElohim.
Tala lisolo ya libota ya Adamu. Tango Nzambe akelaki bato, asalaki bango na elilingi ya Nzambe.
2 Varón y hembra los creó, y los bendijo. El día cuando fueron creados los llamó Adán.
Akelaki bango mobali mpe mwasi, mpe apambolaki bango. Na mokolo oyo akelaki bango, apesaki bango kombo « bato. »
3 Adán vivió 130 años y engendró [un hijo] a su semejanza, conforme a su imagen, y lo llamó Set.
Tango Adamu akokisaki mibu nkama moko na tuku misato ya mbotama, abotaki mwana mobali na elilingi na ye mpe na lolenge na ye. Apesaki ye kombo « Seti. »
4 Después de engendrar a Set, los días de Adán fueron 800 años, y engendró hijos e hijas.
Sima na mbotama ya Seti, Adamu awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
5 Fueron todos los días que vivió Adán 930 años, y murió.
Mibu nyonso oyo Adamu awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na tuku misato, sima akufaki.
6 Set vivió 105 años y engendró a Enós.
Tango Seti akokisaki mibu nkama moko na mitano ya mbotama, abotaki Enoshi.
7 Set vivió después de engendrar a Enós 807 años, y engendró hijos e hijas.
Sima na kobota Enoshi, Seti awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe na sambo mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
8 Los días de Set fueron 912 años, y murió.
Mibu nyonso oyo Seti awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na zomi na mibale, sima akufaki.
9 Enós vivió 90 años y engendró a Cainán.
Tango Enoshi akokisaki mibu tuku libwa ya mbotama, abotaki Kena.
10 Después de engendrar a Cainán, Enós vivió 815 años, y engendró hijos e hijas.
Sima na kobota Kena, Enoshi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe na zomi na mitano mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
11 Los días de Enós fueron 905 años, y murió.
Mibu nyonso oyo Enoshi awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na mitano, sima akufaki.
12 Cainán vivió 70 años y engendró a Mahalaleel.
Tango Kena akokisaki mibu tuku sambo ya mbotama, abotaki Maalalele.
13 Después de engendrar a Mahalaleel, Cainán vivió 840 años, y engendró hijos e hijas.
Sima na kobota Maalalele, Kena awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe na tuku minei mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
14 Los días de Cainán fueron 910 años, y murió.
Mibu nyonso oyo Kena awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na zomi, sima akufaki.
15 Mahalaleel vivió 65 años y engendró a Jared.
Tango Maalalele akokisaki mibu tuku motoba na mitano ya mbotama, abotaki Yeredi.
16 Después de engendrar a Jared, Mahalaleel vivió 830 años, y engendró hijos e hijas.
Sima na kobota Yeredi, Maalalele awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe na tuku misato mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
17 Los días de Mahalaleel fueron 895 años, y murió.
Mibu nyonso oyo Maalalele awumelaki na bomoi ezalaki nkama mwambe na tuku libwa na mitano, sima akufaki.
18 Jared vivió 162 años y engendró a Enoc.
Tango Yeredi akokisaki mibu nkama moko na tuku motoba na mibale ya mbotama, abotaki Enoki.
19 Después de engendrar a Enoc, Jared vivió 800 años, y engendró hijos e hijas.
Sima na kobota Enoki, Yeredi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
20 Los días de Jared fueron 962 años, y murió.
Mibu nyonso oyo Yeredi awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na tuku motoba na mibale, sima akufaki.
21 Enoc vivió 65 años y engendró a Matusalén.
Tango Enoki akokisaki mibu tuku motoba na mitano ya mbotama, abotaki Metusalemi.
22 Enoc anduvo con ʼElohim 300 años después de engendrar a Matusalén, y engendró hijos e hijas.
Sima na kobota Metusalemi, Enoki azalaki kosala mokano ya Nzambe mibu nkama misato mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
23 Los días de Enoc fueron 365 años.
Mibu nyonso oyo Enoki awumelaki na bomoi ezalaki nkama misato na tuku motoba na mitano.
24 Enoc anduvo con ʼElohim, y desapareció, porque ʼElohim lo arrebató.
Enoki atambolaki na boyengebene elongo na Nzambe; bongo alimwaki, pamba te Nzambe azwaki ye.
25 Matusalén vivió 187 años y engendró a Lamec.
Tango Metusalemi akokisaki mibu nkama moko na tuku mwambe na sambo ya mbotama, abotaki Lemeki.
26 Después de engendrar a Lamec, Matusalén vivió 782 años, y engendró hijos e hijas.
Sima na kobota Lemeki, Metusalemi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama sambo na tuku mwambe na mibale mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
27 Los días de Matusalén fueron 969 años, y murió.
Mibu nyonso oyo Metusalemi awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na tuku motoba na libwa, sima akufaki.
28 Lamec vivió 182 años y engendró un hijo.
Tango Lemeki akokisaki mibu nkama moko na tuku mwambe na mibale ya mbotama, abotaki mwana mobali.
29 Lo llamó Noé, y dijo: Éste nos aliviará de nuestras obras, de la fatiga de nuestras manos y de la tierra que Yavé maldijo.
Abengaki ye Noa mpe alobaki: « Ye oyo akobondisa biso na mosala mpe na pasi ya maboko na biso likolo ya mabele oyo Yawe alakelaki mabe. »
30 Después de engendrar a Noé, Lamec vivió 595 años, y engendró hijos e hijas.
Sima na kobotama ya Noa, Lemeki awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mitano na tuku libwa na mitano mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
31 Los días de Lamec fueron 777 años, y murió.
Mibu nyonso oyo Lemeki awumelaki na bomoi ezalaki nkama sambo na tuku sambo na sambo, sima akufaki.
32 Cuando Noé tenía 500 años había engendrado a Sem, Cam y Jafet.
Tango Noa akokisaki mibu nkama mitano ya mbotama, abotaki Semi, Cham mpe Jafeti.

< Génesis 5 >