< Éxodo 12 >
1 Yavé habló a Moisés y a Aarón en la tierra de Egipto:
Yawe alobaki na Moyize mpe Aron kati na Ejipito:
2 Este mes será para ustedes principio de meses. Sea para ustedes el primer mes del año.
« Sanza oyo ekozala mpo na bino sanza ya liboso ya mobu.
3 Hablen a toda la congregación de Israel: El día diez de este mes tome cada uno un cordero, según su casa paterna, un cordero por familia.
Boloba boye na lisanga mobimba ya Isalaele: Na mokolo ya zomi na sanza oyo, libota moko na moko to ndako moko na moko esengeli kozala na mwana meme to na mwana ntaba.
4 Si la familia es demasiado pequeña para comer un cordero, entonces él y su vecino más cercano a su casa tomen uno según el número de las personas. Dividirán el cordero según la cantidad que cada uno va a comer.
Kasi soki bato ya ndako bazali ebele te mpo na kolia mwana meme ya mobimba, bakolia yango elongo na bato ya ndako oyo ezali pene na ndako na bango kolanda motango ya bato. Bakopona mwana meme kolanda oyo moko na moko akoki kolia.
5 Su cordero será sin defecto, macho de un año. Puedes tomarlo de las ovejas o de las cabras.
Mwana meme to mwana ntaba oyo bakopona esengeli kozala ya mobali, ya mobu moko mpe ezanga mbeba.
6 Lo guardarás hasta el día 14 de este mes, y toda la asamblea de la congregación de Israel lo inmolará por la noche.
Bokobatela yango kino na mokolo ya zomi na minei ya sanza yango. Na mokolo yango, bato nyonso ya lisanga ya Isalaele bakokata yango kingo na pokwa.
7 Además, tomarán de la sangre y la pondrán sobre las dos jambas y el dintel de las casas en las cuales lo coman.
Bakozwa makila na yango mpe bakopakola yango na libaya ya likolo mpe na mabaya mibale ya mipanzi oyo esimbaka ekuke ya bandako epai wapi bakolia nyama yango.
8 Aquella noche comerán la carne asada al fuego con Panes sin Levadura. La comerán con hierbas amargas.
Na butu ya mokolo yango, bakotumba mosuni na yango na moto mpe bakolia yango elongo na mapa ezanga levire mpe matiti ya bololo.
9 No coman de él nada crudo ni cocido en agua, sino asado al fuego, tanto su cabeza como sus piernas y sus órganos internos.
Bakolia te mosuni oyo ebela malamu te to oyo batokisa, kasi bakolia kaka mosuni oyo batumba na moto elongo na makolo, moto mpe biloko ya kati.
10 Nada de él dejarán para la mañana, y quemarán al fuego lo que sobre de él la mañana siguiente.
Bokotika ata ndambo te kino na tongo. Kasi soki ndambo ekomi na tongo, botumba yango na moto.
11 Así lo comerán: con sus cinturones atados, sus sandalias en sus pies y su bastón en la mano. Lo comerán apresuradamente. Es la Pascua de Yavé.
Tala ndenge nini bokolia yango: bokolata mokaba na loketo, basandale na makolo, mpe bokosimba lingenda na loboko. Bokolia yango na lombangu. Ezali feti ya Pasika mpo na Yawe.
12 Esa noche Yo pasaré por la tierra de Egipto y heriré a todo primogénito en la tierra de Egipto, tanto de hombre como de bestia. Ejecutaré juicios contra todos los ʼelohim de Egipto. Yo, Yavé.
Kaka na butu yango, nakoleka na Ejipito; nakoboma bana nyonso ya liboso kati na Ejipito kobanda na bato kino na banyama; mpe nakosambisa banzambe nyonso ya Ejipito na nzela ya bitumbu. Nazali Yawe.
13 La sangre les servirá de señal en las casas donde estén, pues veré la sangre y los pasaré por alto. No habrá plaga que los destruya a ustedes cuando Yo hiera la tierra de Egipto.
Na bandako epai wapi bokozala, makila ekozala elembo mpo na bino; bongo tango Ngai nakomona makila yango, nakoleka bino. Boye etumbu moko te ya kufa ekokweya kati na bino tango nakopesa etumbu na mokili ya Ejipito.
14 Éste les será día memorable, y lo celebrarán como una fiesta solemne a Yavé en sus generaciones. Por estatuto perpetuo lo celebrarán.
Mokolo yango ekozala mokolo ya ekaniseli mpo na bino. Bileko na bileko, bokobanda kosala feti na mokolo yango mpo na lokumu ya Yawe; yango ekozala mpo na bino mobeko ya libela na libela mpo na bakitani oyo bakoya sima na bino.
15 Siete días comerán Panes sin Levadura. Pero el primer día quitarán la levadura de sus casas, porque cualquiera que coma pan leudado, desde el primer día hasta el séptimo, será cortado de Israel.
Mikolo sambo, bokolia mapa ezanga levire. Na mokolo ya liboso, bokolongola levire na bandako na bino; pamba te moto nyonso oyo akolia eloko oyo ezali na levire, kobanda na mokolo ya liboso kino na mokolo ya sambo, bakolongola ye kati na bato ya Isalaele.
16 El primer día y también el séptimo día ustedes tendrán una santa asamblea. Ninguna obra se hará en ellos, excepto lo que coma cada persona. Solo eso puede ser preparado por ti.
Bokozala na mayangani ya bule na mokolo ya liboso mpe na mokolo ya sambo. Bokosala mosala moko te na mikolo wana longola kaka mosala ya kolamba bilei oyo moto na moto akolia. Yango kaka nde bokosala.
17 También observarán la fiesta de los Panes sin Levadura, porque en este mismo día saqué tus escuadrones de la tierra de Egipto. Por tanto ustedes celebrarán este día como estatuto perpetuo en todas sus generaciones.
Bokosala feti ya Mapa ezanga levire, pamba te ezalaki na mokolo yango nde nabimisaki mampinga na bino na Ejipito. Bokosala feti na mokolo yango lokola mobeko ya libela na libela mpo na bakitani oyo bakoya sima na bino.
18 En el primer mes, desde el día 14 hasta el 21, comerán pan sin levadura en la noche.
Na sanza ya liboso, bokolia mapa ezanga levire kobanda na pokwa ya mokolo ya zomi na minei kino na pokwa ya mokolo ya tuku mibale na moko.
19 Durante siete días no se hallará levadura en sus casas, porque cualquiera que coma lo que es leudado, tanto extranjero como natural del país, será cortado de la congregación de Israel.
Mikolo sambo, levire esengeli te komonana kati na bandako na bino; pamba te moto nyonso oyo akolia eloko oyo ezali na levire, esengeli balongola ye na lisanga ya Isalaele, azala mopaya to mwana mboka ya Isalaele.
20 Nada leudado comerán. En todas sus tiendas comerán Panes sin Levadura.
Bokolia eloko moko te oyo ezali na levire. Na bisika nyonso oyo bokozala, bokolia kaka mapa ezanga levire. »
21 Entonces Moisés convocó a todos los ancianos de Israel y les dijo: Vayan, escojan ustedes mismos corderos según sus familias y maten [el cordero de] la Pascua.
Moyize abengisaki bakambi nyonso ya Isalaele mpe alobaki na bango: « Bokende kozwa na libota moko na moko mwana meme to mwana ntaba mpe bokata yango kingo lokola mbeka ya Pasika.
22 Tomarán un manojo de hisopo, lo empaparán en la sangre que estará en la vasija y untarán el dintel y las dos jambas con la sangre que está en la vasija. Ninguno de ustedes saldrá de la puerta de su casa hasta la mañana.
Bokokamata etape ya nzete ya izope, bokozindisa yango na makila oyo ekozala kati na sani monene, bokopakola yango na libaya ya likolo mpe na mabaya mibale ya mipanzi oyo esimbaka ekuke. Moko te kati na bino abima libanda ya ekuke ya ndako na ye kino na tongo.
23 Porque cuando Yavé pase para herir a los egipcios, verá la sangre en el dintel y sobre las jambas. Yavé pasará de aquella puerta y no dejará que el destructor entre a sus casas para herir.
Wana Yawe akoleka na mokili mpo na koboma bato ya Ejipito mpe akomona makila na libaya ya likolo mpe na mabaya mibale ya mipanzi oyo esimbaka ekuke, akoleka ekuke yango mpe akopesa nzela te na mobomi ete akota na bandako na bino mpo na koboma.
24 Tú observarás estas cosas como un estatuto para ti y tus hijos para siempre.
Bokotosa malako oyo lokola mobeko ya libela na libela mpo na bino mpe mpo na bakitani na bino.
25 Cuando ustedes entren en la tierra que Yavé les dará, como prometió, observarán este servicio.
Tango bokokota na mokili oyo Yawe akopesa bino ndenge alakaki, bosalela likambo oyo.
26 Y cuando les pregunten sus hijos: ¿Qué significa este servicio para ustedes?
Bongo tango bana na bino bakotuna bino: ‹ Molulu oyo elakisi nini mpo na bino? ›
27 les responderán: Es un sacrificio de Pascua para Yavé, Quien pasó por alto las casas de los hijos de Israel en Egipto cuando hirió a los egipcios, y pasó por alto nuestras casas. Entonces el pueblo se postró y adoró.
Bokoloba na bango: ‹ Ezali mbeka ya feti ya Pasika mpo na Yawe oyo alekaki bandako ya bana ya Isalaele kati na Ejipito mpe abikisaki bandako na biso tango abomaki bato ya Ejipito. › » Na bongo, bana ya Isalaele bafukamaki mpe bagumbamelaki Yawe.
28 Entonces los hijos de Israel hicieron tal como Yavé ordenó a Moisés y a Aarón. Así lo hicieron.
Bato ya Isalaele basalaki ndenge kaka Yawe atindaki Moyize mpe Aron.
29 Aconteció que a la medianoche Yavé mató a todo primogénito en la tierra de Egipto, tanto el primogénito de Faraón que se sentaba en su trono, como el primogénito del cautivo que estaba en la cárcel y todo primogénito del ganado.
Na kati-kati ya butu, Yawe abomaki bana mibali nyonso ya liboso kati na Ejipito kobanda na mwana mobali ya liboso ya Faraon oyo azalaki kokonza na kiti ya bokonzi kino na mwana mobali ya liboso ya mokangami oyo azalaki kati na boloko, mpe bana mibali ya liboso ya bibwele nyonso.
30 Y Faraón se levantó por la noche, él, todos sus esclavos y todos los egipcios. Hubo un gran clamor en Egipto, pues no hubo casa donde no hubiera algún muerto.
Na butu wana, Faraon elongo na bakalaka na ye nyonso mpe bato nyonso ya Ejipito batelemaki; mpe koganga makasi ezalaki na Ejipito, pamba te ezalaki na ndako moko te oyo ezangaki ebembe.
31 Llamó a Moisés y a Aarón de noche: ¡Levántense! Salgan de en medio de mi pueblo, tanto ustedes como los hijos de Israel. Váyanse, adoren a Yavé como dijeron.
Kaka na butu wana, Faraon abengisaki Moyize mpe Aron, alobaki na bango: « Botelema, bobima kati na bato na ngai, bino mpe bana ya Isalaele. Bokende kogumbamela Yawe ndenge bosengaki.
32 Lleven también sus ovejas y sus manadas de ganado vacuno, como dijeron, y váyanse. Y bendíganme también a mí.
Bokamata bibwele na bino ndenge bolobaki: bangombe, bameme mpe bantaba; mpe bokende. Boye, bopambola mpe ngai. »
33 Los egipcios apremiaban al pueblo para expulsarlo apresuradamente del país, pues decían: ¡Todos nosotros moriremos!
Bato ya Ejipito batindikaki bana ya Isalaele ete babima noki na mokili na bango. Bazalaki koloba: « Bokende na bino, noki te biso tokokufa. »
34 Así que el pueblo cargó su masa sobre sus hombros antes que leudara, y envolvió sus artesas en sus mantas.
Boye bato bazwaki potopoto na bango ya farine liboso ete batia yango levire, bazingaki na banzambala na bango banzungu oyo basalelaka potopoto mpe batiaki yango na mapeka na bango.
35 Los hijos de Israel hicieron conforme a la palabra de Moisés, y pidieron a los egipcios artículos de plata y de oro, y ropa.
Bato ya Isalaele basalaki ndenge Moyize alobaki na bango mpe basengaki epai ya bato ya Ejipito biloko ya palata, ya wolo mpe bilamba.
36 Yavé dio gracia al pueblo ante los egipcios, quienes les dieron lo que pidieron. Así despojaron a los egipcios.
Bongo Yawe asalaki ete bana ya Isalaele bazwa ngolu na miso ya bato ya Ejipito oyo bapesaki bango biloko oyo basengaki. Na ndenge wana nde basilisaki biloko ya bato ya Ejipito.
37 Los hijos de Israel salieron de Rameses a Sucot, unos 600.000 hombres de a pie, sin contar los niños.
Bato ya Isalaele balongwaki na Ramisesi mpe bakendeki na Sukoti; bazalaki mibali nkoto nkama motoba oyo bazalaki kotambola na makolo longola basi mpe bana.
38 También una gran multitud subió con ellos, así como rebaños y manadas de ganado vacuno, un ganado muy abundante.
Ezalaki lisusu na ebele ya bato oyo bakendeki na bango elongo; bamemaki lisusu bibwele: bameme, bantaba mpe bangombe.
39 Cocieron Panes sin Levadura con la masa que sacaron de Egipto, pues no había leudado por cuanto fueron echados de Egipto. No pudieron demorar ni preparar provisiones para ellos mismos.
Basalaki na farine oyo bamemaki wuta na Ejipito bagato ezanga levire, pamba te tango babenganaki bango, potopoto emivimbelaki te mpe bazangaki tango ya kobongisa biloko ya kolia mpo na bango moko.
40 El tiempo que los hijos de Israel vivieron en Egipto fue 430 años.
Mibu oyo bana ya Isalaele bavandaki na Ejipito ezalaki nkama minei na tuku misato.
41 Cuando se cumplieron los 430 años, aquel mismo día salieron todos los escuadrones de Yavé de la tierra de Egipto.
Na suka ya mobu oyo ya nkama minei na tuku misato, mampinga nyonso ya Yawe batikaki Ejipito.
42 Esta es una noche que se debe observar para Yavé, por haberlos sacado de la tierra de Egipto. Ésta es una noche para Yavé, que debe ser guardada por todos los hijos de Israel en todas sus generaciones.
Lokola Yawe akengelaki butu wana mpo na kobimisa bana ya Isalaele na Ejipito, butu yango ekomi ya Yawe: ekobanda kozala butu ya kokengela mpo na bana ya Isalaele na milongo na bango nyonso oyo ekoya.
43 Después Yavé dijo a Moisés y a Aarón: Este es el estatuto de la Pascua: Ningún extranjero debe comer de ella.
Yawe alobaki na Moyize mpe Aron: « Tala mibeko na tina na Pasika: ‹ Mopaya moko te akoki kolia yango.
44 Sin embargo, todo esclavo comprado con dinero, después de circuncidarlo podrá comer de ella.
Kasi mowumbu nyonso oyo bakosomba, basengeli liboso kokata ye ngenga, sima nde akoki kolia Pasika.
45 El extranjero y el esclavo asalariado no comerán de ella.
Mopaya oyo akozala na bino mpo na tango moke mpe mosali oyo azwaka lifuti bakolia yango te.
46 Se comerá en una sola casa. No sacarás nada de la carne fuera de la casa, ni quebrarán hueso suyo.
Ekoliama kaka kati na ndako moko na moko, bakobimisa ata mosuni moko te na libanda ya ndako mpe bakobuka ata mokuwa na yango moko te.
47 Toda la congregación de Israel debe celebrar esto.
Lisanga mobimba ya Isalaele ekosala feti ya Pasika.
48 Pero si algún extranjero reside contigo y celebra la Pascua a Yavé, circuncídale todo varón, y entonces permítele acercarse a celebrarla, puesto que será como el nativo de la tierra. Pero ninguna persona incircuncisa podrá comer de ella.
Soki mopaya oyo azali kati na bino alingi kosepela na feti ya Pasika ya Yawe, esengeli ete mibali nyonso oyo bazali kati na ndako na ye bakatama ngenga; bongo nde akozwa nzela ya kolia Pasika lokola mwana mboka ya Isalaele. Kasi mobali oyo akokatama ngenga te akoki kolia Pasika te.
49 La misma ley se aplicará tanto al nativo como al forastero que reside entre ustedes.
Mibeko ezali se ndenge moko mpo na mwana mboka ya Isalaele mpe mpo na mopaya oyo azali kati na bino. › »
50 Así hicieron todo los hijos de Israel. Como Yavé ordenó a Moisés y a Aarón, así hicieron.
Bato nyonso ya Isalaele basalaki ndenge kaka Yawe atindaki Moyize mpe Aron.
51 Y aquel mismo día Yavé sacó a los hijos de Israel por sus escuadrones de la tierra de Egipto.
Mpe na mokolo wana, Yawe abimisaki bana ya Isalaele na molongo, wuta na Ejipito, lokola mampinga ya basoda.