< Deuteronomio 29 >

1 Estas son las Palabras del Pacto que Yavé mandó a Moisés que celebrara con los hijos de Israel en la tierra de Moab, además del Pacto que estableció con ellos en Horeb.
Tala maloba ya boyokani oyo Yawe atindaki Moyize kosala elongo na bana ya Isalaele na etando ya Moabi, na likolo ya boyokani oyo asalaki na bango na ngomba Orebi.
2 Moisés convocó a todo Israel y les dijo: Ustedes vieron todo lo que Yavé hizo ante sus ojos en la tierra de Egipto, a Faraón, a todos sus esclavos y a toda su tierra,
Moyize abengisaki bana nyonso ya Isalaele mpe alobaki na bango: « Miso na bino emonaki makambo nyonso oyo Yawe asalaki na Ejipito epai ya Faraon, epai ya basali na ye nyonso mpe kati na mokili na ye mobimba.
3 las grandes pruebas que vieron sus ojos, las señales y los grandes prodigios.
Na miso na bino moko, bomonaki komekama monene, bilembo minene mpe bikamwa.
4 Pero hasta hoy Yavé no les dio corazón para entender, ni ojos para mirar, ni oídos para escuchar.
Kasi kino na mokolo ya lelo, Yawe apesaki bino te mayele mpo na kososola to miso mpo na komona to matoyi mpo na koyoka.
5 Yo los conduje por el desierto 40 años. Sus ropas no se desgastaron sobre ustedes, y su sandalia no se desgastó en su pie.
Na mibu tuku minei oyo Ngai Yawe nakambaki bino na esobe, bilamba na bino enzulukaki te mpe basandale na makolo na bino ekufaki te.
6 No comieron pan, ni bebieron vino ni licor, para que sepan que Yo soy Yavé su ʼElohim.
Boliaki mapa te mpe bomelaki vino te to masanga mosusu oyo elangwisaka. Nasalaki yango mpo boyeba ete Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino.
7 Cuando llegaron a este lugar, Sehón, rey de Hesbón, y Og, rey de Basán, salieron contra nosotros para luchar, y los derrotamos.
Tango bokomaki na esika oyo, Sikoni, mokonzi ya Eshiboni, mpe Ogi, mokonzi ya Bashani, bayaki kobundisa biso, kasi tolongaki bango.
8 Tomamos su tierra y la dimos como heredad a Rubén, Gad, y la media tribu de Manasés.
Tozwaki mokili na bango mpe topesaki yango lokola libula epai ya bato ya libota ya Ribeni, ya Gadi mpe epai ya ndambo ya libota ya Manase.
9 Así que guarden las Palabras de este Pacto y practíquenlas para que prosperen en todo lo que hagan.
Bosalela malamu maloba ya boyokani oyo mpo ete bomona bolamu na makambo nyonso oyo bokosala.
10 Hoy todos ustedes están delante de Yavé su ʼElohim: los jefes de sus tribus, ancianos, oficiales y todos los hombres de Israel,
Bino nyonso, bokotelema lelo na miso ya Yawe, Nzambe na bino: bakambi na bino, bakonzi na bino ya masanga, bampaka na bino, bakonzi na bino ya basoda mpe bato mosusu kati na Isalaele
11 sus pequeños y esposas, y el extranjero que está dentro de su campamento, desde el leñador hasta el aguador,
elongo na bana na bino mpe basi na bino mpe bapaya oyo bazali kati na milako na bino mpo na kobukela bino bakoni mpe kotokelaka bino mayi.
12 para que entres en el Pacto con Yavé tu ʼElohim, y en su juramento que Yavé tu ʼElohim hace hoy contigo,
Botelemi awa mpo na kosala boyokani elongo na Yawe, Nzambe na bino; boyokani oyo Yawe, Nzambe na bino, azali kosala elongo na bino, na mokolo ya lelo, na kolapa ndayi esangana na bilakeli mabe,
13 para confirmarte hoy como pueblo suyo, y que Él sea tu ʼElohim tal como te habló a ti y como juró a tus antepasados: Abraham, Isaac y Jacob.
mpo na koyebisa bino, na mokolo ya lelo, ete bozali bato na Ye, mpe Ye azali Nzambe na bino ndenge alakaki yango, na nzela ya ndayi, epai na bino mpe bakoko na bino —Abrayami, Izaki mpe Jakobi.
14 No solo con ustedes hago este Pacto y este juramento.
Yawe azali kosala boyokani oyo, na nzela ya ndayi esangana na bilakeli mabe, elongo na bino kaka te,
15 Ciertamente lo hago con los que están aquí con nosotros hoy en presencia de Yavé nuestro ʼElohim y también con los que no están aquí con nosotros hoy.
kasi mpe elongo na ba-oyo bazali awa kati na biso, na mokolo ya lelo, liboso ya Yawe, Nzambe na biso, mpe elongo na ba-oyo bazali awa te elongo na biso.
16 Porque ustedes saben cómo estuvimos en la tierra de Egipto, cómo pasamos en medio de las naciones por las cuales pasaron,
Bino moko boyebi ndenge nini tozalaki na Ejipito mpe ndenge nini tokatisaki bamboka oyo tolekaki.
17 y vieron sus repugnancias y sus ídolos de palo, piedra, plata y oro que tienen consigo.
Bomonaki kati na bango biloko na bango ya mbindo, banzambe ya bikeko basala na libaya, na libanga, na palata mpe na wolo.
18 No sea que esté entre ustedes un hombre o una mujer, una familia o tribu, cuyo corazón se aparte hoy de Yavé nuestro ʼElohim para ir a servir a los ʼelohim de esas naciones. No sea que esté entre ustedes una raíz que produzca hiel y ajenjo,
Bosala keba ete, na mokolo ya lelo, mobali moko te, mwasi moko te, etuka moko te to libota moko te epengwa na nzela ya Yawe, Nzambe na biso, mpo na kokende kogumbamela banzambe wana ya bikeko. Bosala keba ete, kati na bino, ezala na mosisa moko te oyo ekobota ngenge ya bololo ya ndenge wana.
19 y suceda que al oír las palabras de esta imprecación, se congratule en su corazón y diga: Tendré paz, aunque ande en la obstinación de mi corazón, para destruir lo regado con lo seco.
Sima na koyoka maloba oyo ya bilakeli, tika ete moto moko te kati na bino amipambola na koloba: ‹ Nakolonga na makambo na ngai nyonso atako natamboli kolanda baposa ya motema na ngai moko. › Pamba te, moto oyo akosala mabe oyo akomema moto oyo ayebi likambo te na libunga na ye.
20 Yavé no estará dispuesto a perdonarlo, sino la ira de Yavé y su celo arderán contra aquel hombre. Todas las maldiciones escritas en este rollo caerán sobre él, y Yavé borrará su nombre de debajo del cielo.
Yawe akolimbisa ye te; kanda makasi na Ye mpe zuwa na Ye ekokweyela moto wana. Bilakeli nyonso ya mabe oyo ekomama kati na buku oyo ekokweyela ye mpe Yawe akolongola kombo na ye kati na mokili.
21 Yavé lo apartará para mal de entre todas las tribus de Israel conforme a todas las maldiciones del Pacto escrito en el rollo de esta Ley.
Yawe akotia ye pembeni kati na bikolo nyonso ya Isalaele, akokaba ye na pasi ndenge ezali bilakeli mabe nyonso ya boyokani oyo ekomama kati na buku ya Mobeko.
22 De manera que cuando la generación venidera de sus hijos que se levanten después de ustedes y los extranjeros que lleguen de tierras lejanas, al ver las plagas de esa tierra y las enfermedades con las cuales la aflija Yavé, digan:
Milongo ya bana na bino oyo ekoya sima na bino mpe bapaya oyo bakowuta na mikili ya mosika bakomona bitumbu oyo Yawe akokweyisela mokili wana.
23 ¡Toda su tierra está quemada con azufre y sal! ¡No hay siembra ni germinación! ¡El pasto no crece en ella, como en la destrucción de Sodoma y Gomorra, de Adma y de Zeboim, que Yavé destruyó en su ira y en su furor!
Mokili mobimba ekopela na moto ya sofolo mpe ekotonda na mungwa. Bakolona ata eloko moko te, eloko moko te ekobima mpe matiti ekobota te. Mokili yango ekobebisama ndenge Sodome mpe Gomore, Adima mpe Tseboyimi, ebebisamaki: bingumba oyo Yawe abebisaki na kanda na Ye ya makasi.
24 Todas las naciones dirán: ¿Por qué Yavé trató así a esta tierra? ¿Qué significa el ardor de esta enorme ira?
Bikolo nyonso ekotuna: ‹ Mpo na nini Yawe asali likambo ya boye na mokili oyo? Mpo na nini kanda makasi boye? ›
25 Se les responderá: Porque abandonaron el Pacto de Yavé, el ʼElohim de sus antepasados, que Él hizo con ellos cuando los sacó de la tierra de Egipto,
Mpe eyano ekozala: ‹ Esalemaki bongo, pamba te bato oyo babukaki boyokani oyo Yawe, Nzambe ya bakoko na bango, asalaki elongo na bango tango abimisaki bango na Ejipito.
26 fueron y sirvieron a otros ʼelohim y se inclinaron ante ellos, ʼelohim que no conocieron, los cuales Él no les asignó.
Bakendeki kosambela banzambe mosusu mpe bagumbamelaki bango, banzambe oyo bayebaki te mpe oyo Ye apekisaki bango.
27 Por eso la ira de Yavé ardió contra esta tierra para traer sobre ella todas las maldiciones escritas en este rollo,
Yango wana, kanda ya Yawe epeli na mokili wana mpe amemi bilakeli mabe nyonso oyo ekomami na buku oyo, kati na mokili wana.
28 y con ira, furor y gran indignación, Yavé los desarraigó de su propia tierra y los echó en otra tierra, como se ve hoy.
Yawe apikolaki bango na mokili na bango na kanda na Ye ya makasi mpe na kotomboka na Ye ya makasi. Abwakaki bango na mokili mosusu ndenge ezali komonana lelo. ›
29 Las cosas secretas pertenecen a Yavé nuestro ʼElohim, pero las reveladas son para nosotros y nuestros hijos para siempre, a fin de que cumplamos todas las palabras de esta Ley.
Makambo oyo ebombama ezali mpo na Yawe, Nzambe na biso; mpe makambo oyo emonisami ezali mpo na biso mpe bakitani na biso, mpo na tango nyonso, mpo ete tokoka kosalela maloba nyonso ya mibeko oyo. »

< Deuteronomio 29 >