< 2 Samuel 15 >

1 Después de esto, aconteció que Absalón consiguió una carroza y caballos, y 50 hombres para que corrieran delante de él.
Na tango wana, Abisalomi azwaki shar, bampunda mpe basoda tuku mitano oyo bazalaki kotambola liboso na ye lokola bakengeli na ye.
2 Absalón se levantaba temprano y se colocaba junto al camino en la puerta. A cualquiera que tenía un pleito y acudía al rey para que aplicara juicio, Absalón lo llamaba y le decía: ¿De qué ciudad eres? Y él decía: Tu esclavo es de una de las tribus de Israel.
Abisalomi azalaki kolamuka na tongo makasi mpe azalaki kokende kotelema pembeni ya nzela oyo ekenda na ekotelo ya engumba. Bongo, tango nyonso moto azalaki koleka mpo na kokende epai ya mokonzi mpo ete akatela ye likambo, ye Abisalomi azalaki kobenga ye mpe kotuna ye: — Ozali moto ya engumba nini? Soki moto yango azongisi: — Mosali na yo azali moto ya moko kati na bikolo ya Isalaele.
3 Entonces Absalón le decía: Mira, tu causa es buena y justa, pero no tienes quien escuche de parte del rey.
Abisalomi azalaki koloba na ye: — Tala, likambo na yo ezali malamu mpe sembo; kasi ezali na moto moko te oyo akoki koyoka yo epai ya mokonzi.
4 Y Absalón decía: ¡Oh, que alguno me designara juez en la tierra, pues entonces todo hombre que tenga un pleito o una causa podría venir a mí y yo le haría justicia!
Abisalomi azalaki kobakisa: — Ah! Soki nazalaki mosambisi kati na mokili oyo, moto nyonso oyo azali na likambo alingaki koya epai na ngai, mpe nalingaki kolongisa ye na likambo yango!
5 Acontecía que cuando alguien se acercaba para inclinarse ante él, [Absalón] extendía su mano, lo agarraba y lo besaba.
Mpe tango nyonso moto azalaki kopusana mpo na kogumbama liboso na ye Abisalomi, Abisalomi azalaki kopesa loboko, koyamba mpe kopesa ye beze.
6 Absalón trataba a todo Israel de este modo cuando acudían al rey para que juzgara. Así Absalón robaba los corazones de los hombres de Israel.
Azalaki kosala bongo epai ya bato nyonso ya Isalaele oyo bazalaki kokende epai ya mokonzi mpo ete akata likambo na bango, mpe ezalaki bongo nde Abisalomi azalaki komikotisa na mayele kati na mitema ya bato ya Isalaele.
7 Después de cuatro años, aconteció que Absalón dijo al rey: Te ruego que me permitas ir a Hebrón a cumplir un voto que hice a Yavé.
Sima na mibu minei, Abisalomi alobaki na mokonzi: — Pesa ngai nzela mpo ete nakende na Ebron mpo na kokokisa ndayi oyo nalapaki epai na Yawe,
8 Porque cuando estaba en Gesur, en Siria, tu esclavo juró y dijo: Si Yavé ciertamente me devuelve a Jerusalén, entonces serviré a Yavé.
pamba te tango mosali na yo azalaki kovanda na Geshuri kati na Siri, nalapaki ndayi oyo: « Soki Yawe azongisi ngai na Yelusalemi, nakogumbamela Ye. »
9 Y el rey le dijo: Vé en paz. Así que se levantó y se fue a Hebrón.
Mokonzi alobaki na ye: — Kende na kimia. Boye akendeki na Ebron.
10 Pero Absalón envió mensajeros por todas las tribus de Israel, a decir: Al oír el sonido de la corneta, dirán: ¡Absalón reina en Hebrón!
Mpe longwa kuna, Abisalomi atindaki bantoma kati na bikolo nyonso ya Isalaele mpo na koloba: « Tango kaka bokoyoka lokito ya kelelo, boloba: ‹ Abisalomi akomi mokonzi kati na Ebron. › »
11 Con Absalón salieron de Jerusalén 200 hombres como invitados, que en su ingenuidad iban sin saber algo [del motivo].
Mibali nkama mibale babengisamaki wuta na Yelusalemi mpe bakendeki elongo na Abisalomi. Bakendeki na boboto mpe bayebaki ata likambo moko te.
12 Mientras ofrecía los sacrificios, Absalón envió a buscar a Ahitofel gilonita, consejero de David, desde Gilo su ciudad. La conspiración fue fuerte, pues aumentaba el pueblo a favor de Absalón.
Wana Abisalomi azalaki kobonza mbeka, abengisaki Ayitofeli, moto ya Gilo, mopesi toli ya Davidi, wuta na engumba na ye ya Gilo. Boye, likita ya batomboki ekomaki makasi; mpe lisanga ya Abisalomi ekomaki na bato ebele.
13 Entonces un mensajero fue a David y dijo: ¡Los corazones de los hombres de Israel se van tras Absalón!
Ntoma moko ayaki koyebisa Davidi: — Mitema ya bato ya Isalaele esangani elongo na Abisalomi.
14 David dijo a todos sus esclavos que estaban con él en Jerusalén: ¡Levántense y huyamos, porque ninguno de nosotros escapará de Absalón! ¡Dense prisa en salir, no sea que se apresure, nos alcance y derrame la calamidad sobre nosotros, y destruya la ciudad a filo de espada!
Davidi alobaki na bakalaka na ye nyonso oyo bazalaki na Yelusalemi: — Boya! Tosengeli kokima, soki te moko te kati na biso akobika liboso ya Abisalomi. Tosengeli kobima na lombangu, soki te akoya na lombangu kokanga biso, kobebisa biso mpe koboma engumba na mopanga.
15 Los esclavos contestaron al rey: ¡Mira, tus esclavos están para cualquier cosa que nuestro ʼadón el rey disponga!
Bakalaka ya mokonzi bazongiselaki Davidi: — Basali na yo bazali ya kobongama mpo na kosala makambo nyonso oyo mokonzi, nkolo na biso, akopona.
16 Entonces el rey salió con toda su casa tras él. Pero el rey dejó a diez mujeres concubinas para que cuidaran la casa.
Mokonzi akendeki na makolo elongo na libota na ye mobimba oyo ezalaki kolanda ye; kasi atikaki bamakangu zomi mpo na kobatela ndako na ye.
17 El rey salió con todo el pueblo tras él, y se detuvieron en la última casa.
Boye mokonzi akendeki na makolo elongo na bato na ye nyonso oyo bazalaki kolanda ye mpe batelemaki pene ya ndako ya suka ya engumba.
18 Todos sus esclavos pasaron a su lado: Todos los cereteos, los peleteos y los geteos, 600 hombres que seguían tras él desde Gat, pasaron delante del rey.
Basoda na ye nyonso bazalaki kotambola na bapembeni na ye elongo na bato nyonso ya Kereti mpe ya Peleti. Mpe bato nyonso ya Gati, nkama motoba, oyo batambolaki elongo na ye longwa na Gati, bazalaki kotambola liboso ya mokonzi.
19 Entonces el rey dijo a Itai geteo: ¿Por qué vienes tú también con nosotros? Vuelve y quédate con el [otro] rey, porque tú eres un extranjero y también un desterrado de tu lugar.
Mokonzi alobaki na Itayi, moto ya Gati: — Mpo na nini yo mpe olingi koya elongo na biso? Zonga mpe vanda elongo na Abisalomi, mokonzi ya sika! Ozali mopaya, otikaki mboka na yo mpo na koya kokima awa.
20 Llegaste ayer, ¿y hoy te haré vagar con nosotros mientras voy sin rumbo? Regresa y devuelve a tus hermanos. La misericordia y la verdad sean contigo.
Oyaki mpe kaka lobi oyo ewuti koleka, bongo ndenge nini, lelo, namema yo elongo na biso wana nayebi kutu te epai nini nazali kokende? Zonga mpe zwa bato ya mboka na yo! Tika ete bolamu mpe boyengebene ya Yawe ezala elongo na yo!
21 Pero Itai respondió al rey: ¡Vive Yavé y vive mi ʼadón el rey que dondequiera que esté mi ʼadón el rey, sea para muerte o para vida, tu esclavo estará allí!
Itayi azongiselaki mokonzi: — Na Kombo na Yawe mpe na kombo ya mokonzi, nkolo na ngai, mosali na yo akozala bipai nyonso oyo mokonzi, nkolo na ngai, akozala, ezala mpo na bomoi to mpo na kufa.
22 David respondió a Itai: ¡Ven y pasa adelante! E Itai geteo pasó con todos sus hombres y con todos los niños que estaban con él.
Davidi alobaki na Itayi: — Malamu! Leka liboso mpe tambola! Boye Itayi, moto ya Gati, atambolaki liboso elongo na basoda nyonso mpe mabota oyo ezalaki elongo na ye.
23 Todo el país lloraba a gran voz y todo el pueblo cruzó el torrente de Cedrón. También el rey cruzó con toda la gente que cruzaba rumbo al camino de la región despoblada.
Tango bato nyonso bazalaki koleka, mboka mobimba ezalaki kolela makasi. Mokonzi akatisaki lubwaku ya Sedron, mpe bato nyonso bakendeki na nzela oyo ekenda na esobe.
24 Ciertamente también Sadoc cruzó y todos los levitas que estaban con él. Cargaban el Arca del Pacto de ʼElohim. Ellos asentaron el Arca de ʼElohim hasta que todo el pueblo terminó de salir de la ciudad. Entonces Abiatar subió.
Tsadoki mpe azalaki wana elongo na Balevi oyo bazalaki elongo na ye mpe bamemaki Sanduku ya Boyokani ya Nzambe. Bakitisaki Sanduku ya Nzambe, mpe Abiatari abonzaki mbeka kino tango bato nyonso basilisaki kobima na engumba.
25 Luego el rey dijo a Sadoc: Haz que vuelva el Arca de ʼElohim a la ciudad. Si hallé gracia ante Yavé, Él me hará volver y me permitirá verla en su morada.
Mokonzi alobaki na Tsadoki: — Zongisa Sanduku ya Nzambe kati na engumba. Soki nazwi ngolu na miso ya Yawe, akozongisa ngai mpe akopesa ngai nzela ya komona lisusu Sanduku yango mpe ndako na yango.
26 Pero si dice: No me complazco en ti, aquí estoy. Que haga de mí lo que le parezca bien.
Kasi soki Nzambe alobi: « Nasepeli na yo te, » wana tika ete asala epai na ngai makambo oyo amoni ete ezali malamu, pamba te nazali ya kobongama.
27 Dijo además el rey al sacerdote Sadoc: ¿No eres tú el vidente? Vuelve a la ciudad en paz, y regresen los dos hijos de ustedes: tu hijo Ahimaas y Jonatán, hijo de Abiatar.
Mokonzi alobaki lisusu epai ya Nganga-Nzambe Tsadoki: — Ozali momoni makambo te? Zonga na kimia na engumba elongo na Ayimaatsi, mwana na yo ya mobali, mpe Jonatan, mwana mobali ya Abiatari. Yo mpe Abiatari, bozwa mpe bomema bana na bino mibale ya mibali.
28 Miren, yo me detendré en los vados de la región despoblada hasta que venga palabra de parte de ustedes para informarme.
Nakozela na bitando ya esobe kino nakoyoka liloba kowuta epai na bino.
29 Entonces Sadoc y Abiatar llevaron el Arca de ʼElohim de regreso a Jerusalén y se quedaron allí.
Boye Tsadoki mpe Abiatari bazongisaki Sanduku ya Nzambe, na Yelusalemi, mpe batikalaki kuna.
30 David subió la cuesta de los Olivos. Y mientras la subió, lloraba, tenía la cabeza cubierta e iba descalzo. Y todo el pueblo, cada uno que estaba con él, cubrió su cabeza y lloraban mientras subían.
Kasi Davidi azalaki komata ngomba ya banzete ya olive na kolela, moto na ye ya kozipama mpe makolo ngulu. Bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye bazipaki bango mpe mito na bango mpe bazalaki kolela wana bazalaki komata.
31 Uno informó a David: Ahitofel está entre los que conspiraron con Absalón. Entonces David exclamó: ¡Oh Yavé, te ruego que entorpezcas el consejo de Ahitofel!
Bayaki koyebisa Davidi ete Ayitofeli azali kati na bato oyo basalaki likita elongo na Abisalomi. Boye Davidi asambelaki: « Eh Yawe, sala ete batoli ya Ayitofeli ezanga tina. »
32 Ocurrió que cuando David llegó a la cumbre de la montaña donde solía postrarse ante ʼElohim, ahí le salió a encontrarlo Husai arquita, con la túnica rasgada y tierra sobre su cabeza.
Tango Davidi akomaki na songe ya ngomba epai wapi bato bazalaki na momesano ya kokende kogumbamela Nzambe, Ushayi, moto ya Ariki, mopesi toli ya Davidi, azalaki kuna mpo na kokutana na ye, na nzambala na ye epasuka mpe moto na ye etonda na putulu.
33 David le dijo: Si pasas conmigo serás una carga para mí,
Davidi alobaki na ye: — Soki okeyi elongo na ngai, okozala mokumba mpo na ngai.
34 pero si vuelves a la ciudad y dices a Absalón: ¡Oh rey! Yo seré tu esclavo, así como fui esclavo de tu padre, ahora también soy esclavo tuyo. Entonces frustrarás el consejo de Ahitofel a mi favor.
Kasi soki ozongi na engumba mpe olobi na Abisalomi: « Nakozala mosali na yo, oh mokonzi! Kala, nazalaki mosali ya tata na yo, kasi sik’oyo, nakozala mosali na yo, » wana okosunga ngai na kobebisa toli ya Ayitofeli.
35 ¿Los sacerdotes Sadoc y Abiatar no estarán allí contigo? Por tanto, toda palabra que oigan en la casa del rey la declararán a los sacerdotes Sadoc y Abiatar.
Lokola Banganga-Nzambe Tsadoki mpe Abiatari bakozala kuna elongo na yo, okoyebisa bango makambo nyonso oyo okoyoka na ndako ya mokonzi.
36 Mira, están con ellos sus dos hijos: Ahimaas, el de Sadoc, y Jonatán, el de Abiatar. Por medio de ellos me informarán todo lo que oigan.
Bana na bango ya mibali mibale, Ayimaatsi, mwana mobali ya Tsadoki, mpe Jonatan, mwana mobali ya Abiatari, bazali mpe kuna elongo na bango. Okotinda bango mpo ete baya koyebisa ngai makambo nyonso oyo okoyoka.
37 Así Husai, amigo de David, fue a la ciudad, y Absalón entró en Jerusalén.
Boye Ushayi, moninga ya Davidi, azongaki na engumba, kaka na tango oyo Abisalomi mpe akotaki kati na Yelusalemi.

< 2 Samuel 15 >