< 1 Samuel 24 >
1 Sucedió que cuando Saúl volvió de perseguir a los filisteos, le informaron: Mira, David está en la región despoblada de Engadí.
Sima na Saulo kolanda bato ya Filisitia, azongaki; bongo bayebisaki ye: « Davidi azali sik’oyo kati na esobe ya Eyini-Gedi. »
2 Saúl tomó 3.000 hombres escogidos de todo Israel y salió a buscar a David y sus hombres por los peñascos de las cabras monteses.
Na bongo, Saulo azwaki basoda ya mpiko nkoto misato kati na Isalaele mobimba mpe akendeki koluka Davidi mpe bato na ye pene ya etando ya bantaba ya zamba.
3 Así que llegó a los rediles de ovejas en el camino donde había una cueva, y Saúl entró en ella para cubrir sus pies. David y sus hombres estaban sentados en las partes más internas de la cueva.
Wana Saulo akomaki pene ya etando ya bameme, oyo ezalaki zingazinga ya nzela, amonaki ebombamelo moko ya monene kati na mabanga mpe akotaki kuna mpo na kosala zongo inene. Nzokande Davidi mpe bato na ye bazalaki na suka, kati na ebombamelo yango.
4 Y los hombres de David le dijeron: Este es el día del cual Yavé te dijo: Mira, entrego a tu enemigo en tu mano. Haz con él como te parezca. Entonces David se levantó y con cautela cortó la orilla del manto de Saúl.
Bato ya Davidi balobaki na ye: Tala mokolo oyo Yawe alobelaki tango alobaki na yo: « Nakokaba monguna na yo na maboko na yo mpo ete osala ye nyonso oyo olingi. » Boye Davidi apusanaki na kobombama mpe akataki songe ya kazaka ya Saulo.
5 Después de esto, aconteció que el corazón de David lo remordió porque cortó la orilla del manto de Saúl.
Sima na yango, Davidi ayokaki motema na ye kobeta mpo ete akataki songe ya kazaka ya Saulo.
6 Y dijo a sus hombres: ¡Líbreme Yavé de hacer tal cosa contra mi ʼadón, el ungido de Yavé, que yo extienda mi mano contra él, pues es el ungido de Yavé!
Alobaki na basoda na ye: « Tika ete Yawe apesa ngai te nzela ya kosala likambo ya boye epai ya nkolo na ngai, mopakolami na Yawe! Loboko na ngai ekoki te kosimba nzoto na ye, pamba te Yawe nde apakolaki ye mafuta. »
7 Con estas palabras David disuadió a los suyos y no les permitió levantarse contra Saúl, de modo que Saúl salió de la cueva y siguió por el camino.
Na maloba oyo, Davidi agangelaki bato na ye mpe apekisaki bango kobundisa Saulo. Saulo abimaki na ebombamelo yango mpe akobaki nzela na ye.
8 Enseguida David también se levantó. Al salir de la cueva dio voces tras Saúl: ¡Oh rey ʼadón mío! Y al mirar Saúl tras él, David se inclinó hasta la tierra y se postró.
Tango Davidi mpe abimaki na ebombamelo yango, abengaki Saulo: « Mokonzi, nkolo na ngai! » Tango Saulo atalaki sima na ye, Davidi akitisaki elongi mpe agumbamaki ye moko, elongi na ye kino na mabele.
9 En seguida David preguntó a Saúl: ¿Por qué escuchas palabras de hombres quienes dicen: Mira, David procura tu mal?
Alobaki na Saulo: — Mpo na nini olandaka maloba ya bato oyo balobaka na yo ete Davidi azalaka na posa ya kosala yo mabe?
10 Mira, hoy mismo tus ojos ven cómo Yavé te colocó en mi mano dentro de la cueva. Se habló de matarte, pero se tuvo compasión de ti, pues dije: ¡No extenderé mi mano contra mi ʼadón, porque es el ungido de Yavé!
Omoni sik’oyo yo moko na miso na yo ndenge nini Yawe akabaki yo na maboko na ngai kati na ebombamelo, kati na mabanga. Bato mosusu batungisaki ngai ete naboma yo, kasi nabikisaki yo. Nalobaki: « Nakosembola te loboko na ngai mpo na kotelemela nkolo na ngai, pamba te azali mopakolami na Yawe. »
11 Y mira, padre mío, mira la orilla de tu manto en mi mano, pues al cortar la orilla de tu manto, no te maté. Reconoce y percibe que no hay maldad ni transgresión en mis manos, ni pequé contra ti, aunque tú acechas mi vida para tomarla.
Oh tata na ngai, tala eteni oyo ya kazaka na yo na loboko na ngai! Nakataki songe ya kazaka na yo, kasi nabomaki yo te. Sik’oyo, sosola mpe yeba ete, kati na ngai, mayele mabe mpe botomboki ezali te. Nasalaki na ngai yo mabe te, kasi yo ozali kolanda ngai mpo na koboma ngai.
12 ¡Yavé juzgue entre tú y yo, y que Yavé me vengue de ti! Pero mi mano no se levantará contra ti.
Tika ete Yawe azala Mosambisi kati na ngai mpe yo, mpe tika ete Yawe azongisela yo mabe na mabe oyo osali ngai! Kasi loboko na ngai ekosimba yo te.
13 Como dice el proverbio de los antiguos: De los perversos sale la perversidad. Pero mi mano no se levantará contra ti.
Ndenge kaka lisese ya kala elobi: « Misala mabe ewutaka epai ya bato mabe, » loboko na ngai ekosimba yo te.
14 ¿Tras quién sale el rey de Israel? ¿A quién persigue? ¿A un perro muerto? ¿A una pulga?
Mokonzi ya Isalaele abimi mpo na kobundisa nani? Azali kolanda nani? Mbwa ya kokufa? Nzinzi?
15 Yavé sea el Juez, y juzgue entre tú y yo, y defienda mi causa y me libre de tu mano.
Tika ete Yawe azala Mosambisi na biso mpe akata likambo kati na biso. Tika ete atala likambo na ngai mpe akata yango! Tika ete alongisa ngai mpe akangola ngai wuta na loboko na yo.
16 Cuando David terminó de decir esas palabras a Saúl, aconteció que Saúl dijo: ¿Es esta tu voz, hijo mío David? Entonces Saúl alzó su voz y lloró.
Tango Davidi asilisaki koloba na Saulo, Saulo atunaki: — Oyo nazali koyoka ezali solo mongongo na yo Davidi, mwana na ngai? Mpe Saulo alelaki makasi.
17 Y dijo a David: Más justo eres tú que yo, porque tú me trataste bien, y yo te traté mal.
Alobaki na Davidi: — Ozali penza sembo koleka ngai, pamba te osaleli ngai bolamu, nzokande ngai nasalaki mabe epai na yo!
18 Tú demostraste hoy cómo me trataste bien, porque Yavé me colocó en tu mano, y no me mataste.
Owuti sik’oyo kotalisa ngai bolamu oyo osaleli ngai: Yawe akabaki ngai penza na maboko na yo, kasi oboyaki na yo koboma ngai.
19 Porque si un hombre halla a su enemigo, ¿lo deja ir en paz? ¡Yavé te galardone por lo que me hiciste hoy!
Boni, soki moto akutani na monguna na ye, akotika ye kokoba kokende na nzela na ye na kimia? Tika ete Yawe afuta yo malamu mpo na bolamu oyo osaleli ngai na mokolo ya lelo.
20 Y ahora mira, yo sé que de seguro reinarás, y que el reino de Israel será estable en tu mano.
Tala, nayebi sik’oyo ete okozala penza mokonzi, mpe bokonzi ya Isalaele ekolendisama na maboko na yo.
21 Ahora pues, júrame por Yavé que no exterminarás mi descendencia, ni borrarás mi nombre de la casa de mi padre.
Lapa sik’oyo ndayi epai na ngai na Kombo na Yawe ete okoboma bakitani na ngai te to okolimwisa kombo na ngai te wuta na libota ya botata na ngai.
22 David se lo juró a Saúl. Y Saúl se fue a su casa, y David y sus hombres subieron a los riscos.
Boye Davidi alapaki ndayi yango epai ya Saulo. Sima na yango, Saulo azongaki epai na ye. Bongo Davidi mpe bato na ye bazongaki na ebombamelo na bango kati na ngomba.