< 1 Crónicas 2 >
1 Éstos son los hijos de Israel: Rubén, Simeón, Leví, Judá, Isacar, Zabulón,
Tala bana mibali ya Isalaele: Ribeni, Simeoni, Levi, Yuda, Isakari, Zabuloni,
2 Dan, José, Benjamín, Neftalí, Gad y Aser.
Dani, Jozefi, Benjame, Nefitali, Gadi mpe Aseri.
3 Hijos de Judá: Er, Onán y Sela. Estos tres le nacieron de la hija de Súa, cananea. Pero Er, primogénito de Judá, fue perverso ante Yavé, Quien lo mató.
Bana mibali ya Yuda: Eri, Onani mpe Shela. Ezali Mwana mwasi ya Shuwa, moto ya Kanana, nde abotelaki Yuda bana mibali misato wana. Eri, mwana mobali ya liboso ya Yuda, atambolaki mabe na miso ya Yawe, mpe Yawe abomaki ye.
4 Tamar su nuera le dio a luz a Fares y a Zera. Todos los hijos de Judá fueron cinco.
Tamari, bokilo ya Yuda, abotelaki ye Peretsi mpe Zera. Bana mibali nyonso ya Yuda bazalaki mitano.
5 Hijos de Fares: Hezrón y Hamul.
Bana mibali ya Peretsi: Etsironi mpe Amuli.
6 Hijos de Zera: Zimri, Etán, Hemán, Calcol y Dara. Todos los hijos de Judá fueron cinco.
Bana mibali ya Zera: Zimiri, Etani, Emani, Kalikoli mpe Darida; bango nyonso bazalaki mitano.
7 Hijo de Carmi fue Acán, perturbador de Israel, porque transgredió en cuanto a lo maldito.
Mwana mobali ya Karimi: Akari oyo ayeisaki mobulu na Isalaele tango abukaki mobeko ya kozwa biloko oyo babulisaki mpo na Yawe.
Mwana mobali ya Etani: Azaria.
9 Los hijos que le nacieron a Hezrón: Jerameel, Ram y Quelubai.
Bana mibali oyo babotelaki Etsironi: Yerameeli, Rami mpe Kelubayi.
10 Ram engendró a Aminadab, y Aminadab engendró a Naasón, jefe de los hijos de Judá.
Rami azalaki tata ya Aminadabi; mpe Aminadabi azalaki tata ya Nashoni, mokambi ya bato ya Yuda.
11 Naasón engendró a Salmón, y Salmón engendró a Booz.
Nashoni azalaki tata ya Salima; Salima azalaki tata ya Boazi.
12 Booz engendró a Obed, y Obed engendró a Isaí.
Boazi azalaki tata ya Obedi; mpe Obedi azalaki tata ya Izayi.
13 Isaí engendró a Eliab su primogénito, el segundo Abinadab, el tercero Simea,
Izayi azalaki tata ya Eliabi, mwana na ye ya liboso ya mobali; ya mibale, Abinadabi; ya misato, Shimea;
14 el cuarto Natanael, el quinto Radai,
ya minei, Netaneeli; ya mitano, Radayi;
15 el sexto Ozem, el séptimo David,
ya motoba, Otsemi; mpe ya sambo, Davidi.
16 de los cuales Sarvia y Abigail fueron hermanas. Los hijos de Sarvia fueron tres: Abisai, Joab y Asael.
Bandeko na bango ya basi: Tseruya mpe Abigayili. Tseruya abotaki bana mibali misato: Abishayi, Joabi mpe Asaeli.
17 Abigail dio a luz a Amasa, cuyo padre fue Jeter ismaelita.
Abigayili abotaki mwana moko ya mobali, mpe kombo na ye ezalaki « Amasa. » Yeteri, moto ya Isimaeli, nde azalaki tata ya Amasa.
18 Caleb, hijo de Hezrón, engendró a Jeriot de su esposa Azuba. Los hijos de ella fueron Jeser, Sobab y Ardón.
Azuba abotelaki Kalebi, mwana mobali ya Etsironi, mwana moko ya mwasi, mpe kombo na ye ezalaki « Yerioti; » mpe bana mibali misato: Yesheri, Shobabi mpe Aridoni.
19 Al morir Azuba, Caleb tomó como esposa a Efrata, la cual dio a luz a Hur.
Tango Azuba akufaki, Kalebi abalaki Efrata oyo abotelaki ye Wuri.
20 Hur engendró a Uri, y Uri a Bezaleel.
Wuri azalaki tata ya Uri, mpe Uri azalaki tata ya Betisaleyeli.
21 Después Hezrón se unió a la hija de Maquir, padre de Galaad, a la cual tomó cuando él tenía 60 años, y ella dio a luz a Segub.
Mpe na sima, Etsironi asangisaki nzoto na mwana mwasi ya Makiri, tata ya bato ya Galadi. Abalaki ye tango azalaki na mibu tuku motoba; mpe mwana mwasi ya Makiri abotelaki ye Segubi.
22 Segub engendró a Jaír, quien poseyó 23 ciudades en la tierra de Galaad.
Segubi azalaki tata ya Yairi oyo azalaki kokonza bingumba tuku mibale na misato kati na mokili ya Galadi.
23 Pero Gesur y Aram tomaron las aldeas de Jaír, y Kenat y sus aldeas: 60 pueblos. Todas éstas las tomaron los hijos de Maquir, padre de Galaad.
Kasi bato ya Geshuri mpe ya Siri babotolaki na makasi bamboka oyo Yairi azalaki kokonza; babotolaki mpe Kenati elongo na bamboka na yango ya mike: bingumba nyonso oyo babotolaki ezalaki tuku motoba. Bango nyonso wana bazalaki bakitani ya Makiri, tata ya bato ya Galadi.
24 Después que Hezrón murió en Caleb-efrata, Abías, esposa de Hezrón, dio a luz a Asur, padre de Tecoa.
Sima na kufa ya Etsironi na mboka Kalebi Efrata, mwasi na ye, Abiya, abotaki mwana mobali, mpe kombo na ye « Ashiwuri. » Ashiwuri azalaki tata ya Tekoa.
25 Los hijos de Jerameel, primogénito de Hezrón, fueron: Ram, su primogénito, Buna, Orén, Ozem y Ahías.
Bana mibali ya Yerameeli, mwana liboso ya Etsironi, bazalaki: Rami, mwana na ye ya liboso ya mobali, Buna, Oreni, Otsemi mpe Ayiya.
26 Jerameel tuvo otra mujer llamada Atara, que fue madre de Onam.
Yerameeli abalaki mwasi mosusu oyo kombo na ye ezalaki « Atara. » Atara abotelaki ye Onami.
27 Hijos de Ram, primogénito de Jerameel: Maaz, Jamín y Equer.
Bana mibali ya Rami, mwana mobali ya liboso ya Yerameeli: Matsi, Yamini mpe Ekere.
28 Hijos de Onam: Samai y Jada. Hijos de Samai: Nadab y Abisur.
Bana mibali ya Onami: Shamayi mpe Yada. Bana mibali ya Shamayi: Nadabi mpe Abishuri.
29 El nombre de la esposa de Abisur fue Abihail, la cual dio a luz a Ahbán y a Molid.
Kombo ya mwasi ya Abishuri ezalaki « Abiyaili. » Abiyaili abotelaki ye Abani mpe Molidi.
30 Hijos de Nadab: Seled y Apaim. Seled murió sin hijos.
Bana mibali ya Nadabi: Seledi mpe Apayimi. Seledi atikalaki kobota te mpe akufaki.
31 Isi fue hijo de Apaim, y Sesán, hijo de Isi, e hijo de Sesán, Ahlai.
Mwana mobali ya Apayimi: Yisheyi oyo azalaki tata ya Sheshani. Sheshani azalaki tata ya Akilayi.
32 Hijos de Jada, hermano de Samai: Jeter y Jonatán. Jeter murió sin hijos.
Bana mibali ya Yada, ndeko mobali ya Shamayi: Yeteri mpe Jonatan. Yeteri atikalaki kobota te mpe akufaki.
33 Hijos de Jonatán: Pelet y Zaza. Tales fueron los descendientes de Jerameel.
Bana mibali ya Jonatan: Peleti mpe Zaza. Bango wana nde bazalaki bakitani ya Yerameeli.
34 Sesán no tuvo hijos, sino hijas. Pero Sesán tenía un esclavo egipcio llamado Jarha.
Sheshani atikalaki kobota bana mibali te, kaka bana basi. Kasi azalaki na mowumbu moko ya mobali na kombo Yara, moto ya Ejipito.
35 A éste, Sesán dio su hija como esposa, y ella dio a luz a Atai.
Sheshani abalisaki mwana na ye ya mwasi epai ya Yara, mowumbu na ye ya mobali, mpe mwana yango ya mwasi abotelaki Yara mwana mobali, Atayi.
36 Atai engendró a Natán, Natán a Zabad,
Atayi azalaki tata ya Natan, Natan azalaki tata ya Zabadi.
37 Zabad a Eflal, Eflal a Obed,
Zabadi azalaki tata ya Efilali, Efilali azalaki tata ya Obedi.
38 Obed a Jehú, Jehú a Azarías,
Obedi azalaki tata ya Jewu, Jewu azalaki tata ya Azaria.
39 Azarías a Heles, Heles a Elasa,
Azaria azalaki tata ya Eletsi, Eletsi azalaki tata ya Eleasa.
40 Elasa a Sismai, Sismai a Salum,
Eleasa azalaki tata ya Sisimayi, Sisimayi azalaki tata ya Shalumi.
41 Salum a Jecamías, y Jecamías a Elisama.
Shalumi azalaki tata ya Yekamia, mpe Yekamia azalaki tata ya Elishama.
42 Hijos de Caleb, hermano de Jerameel: Mesa su primogénito, que fue el padre de Zif, y los hijos de Maresa, padre de Hebrón.
Bana mibali ya Kalebi, ndeko ya Yerameeli: Mesha, mwana na ye ya liboso oyo azalaki tata ya Zifi, mpe Maresha, tata ya Ebron.
43 Hijos de Hebrón: Coré, Tapúa, Requem y Sema.
Bana mibali ya Ebron: Kora, Tapua, Rekemi mpe Shema.
44 Sema engendró a Raham, padre de Jorcoam, y Requem engendró a Samai.
Shema azalaki tata ya Raami, mpe Raami azalaki tata ya Yorikeami. Rekemi azalaki tata ya Shamayi.
45 Maón fue hijo de Samai, y Maón padre de Bet-sur.
Mwana mobali ya Shamayi ezalaki Maoni, Maoni azalaki tata ya Beti-Tsuri.
46 Efa, concubina de Caleb, dio a luz a Harán, Mosa y Gazez. Harán engendró a Gazez.
Efa, makangu ya Kalebi, abotelaki ye Arani, Motsa mpe Gazezi. Arani azalaki tata ya Gazezi.
47 Hijos de Jahdai: Regem, Jotam, Gesam, Pelet, Efa y Saaf.
Bana mibali ya Yadayi: Regwemi, Yotami, Geshani, Peleti, Efa mpe Shaafi.
48 Maaca, concubina de Caleb, dio a luz a Seber y Tirhana.
Maaka, makangu mosusu ya Kalebi, abotelaki ye Sheberi mpe Tirana.
49 También dio a luz a Saaf, padre de Madmana, y a Seva, padre de Macbena, y padre de Gibea; y Acsa fue hija de Caleb.
Abotelaki ye lisusu Shaafi, tata ya Madimana, mpe Sheva, tata ya Makibena mpe Gibea. Kalebi azalaki na mwana moko ya mwasi, Akisa.
50 Éstos fueron los hijos de Caleb: hijos de Hur, primogénito de Efrata: Sobal, padre de Quiriat-jearim,
Bango wana nde bazalaki bakitani ya Kalebi. Bana mibali ya Wuri, mwana ya liboso oyo abotaki na Efrata, mwasi na ye: Shobali, tata ya Kiriati-Yearimi;
51 Salma, padre de Belén, y Haref, padre de Bet-gader.
Salima, tata ya Beteleemi; mpe Arefi, tata ya Beti-Gaderi.
52 Hijos de Sobal, padre de Quiriat-jearim: Haroe, la mitad de los manahetitas.
Bakitani ya Shobali, tata ya Kiriati-Yearimi: Aruwe mpe Atsi-Amenuoti.
53 Familias de Quiriat-jearim: los itritas, los futitas, los sumatitas y los misraítas, de los cuales salieron los zoratitas y los estaolitas.
Mabota ya Kiriati-Yearimi: bato ya Yeteri, ya Puti, ya Shumati mpe ya Mishirayi. Bato ya Tsorea mpe ya Eshitaoli babimelaki na mabota oyo.
54 Hijos de Salma: Belén, y los netofatitas, Atrot-beth-joab, y Hazi-hammanahti, zoraíta.
Bakitani ya Salima: Bato ya Beteleemi, ya Netofa, ya Aroti-Beti-Joabi, ya Atsi-Amanati mpe ya Tsorea,
55 Las familias de los escribas que habitaban en Jabes: los tirateos, los simeateos y los sucateos, los cuales son los ceneos, que proceden de Hamat, padre de la casa de Recab.
elongo na mabota ya bato ya mayele oyo bazalaki kovanda na Yaebetsi: bato ya Tirea, ya Shimea mpe ya Sukoti. Bango wana nde bato ya Keni oyo babimeli na Amati, tata ya libota ya Rekabi.