< Levítico 27 >

1 Yahvé habló a Moisés, diciendo:
Yawe alobaki na Moyize:
2 “Habla a los hijos de Israel y diles: ‘Cuando un hombre consagre a una persona a Yahvé en un voto, según vuestra valoración,
« Yebisa bana ya Isalaele mpe loba na bango: ‹ Soki moko kati na bino alapi ndayi ya kopesa moto lokola likabo epai na Yawe, asengeli kopesa motuya oyo ekokani na lolenge ya moto na moto.
3 vuestra valoración de un varón de veinte a sesenta años será de cincuenta siclos de plata, según el siclo del santuario.
Tala motuya ya kopesa kolanda ndenge batangaka mbongo ya bibende kati na Mongombo: mpo na moto oyo mibu na ye ya mbotama ezali kati na mibu tuku mibale mpe tuku motoba, bagrame nkama motoba ya palata mpo na mobali;
4 Si se trata de una mujer, tu valoración será de treinta siclos.
bagrame nkama misato na tuku motoba ya palata mpo na mwasi;
5 Si la persona tiene de cinco a veinte años, tu valoración será de veinte siclos para el varón y de diez siclos para la mujer.
mpo na moto oyo mibu na ye ya mbotama ezali kati na mibu mitano mpe tuku mibale, bagrame nkama mibale na tuku minei ya palata mpo na mobali, mpe bagrame nkama moko na tuku mibale ya palata mpo na mwasi;
6 Si la persona tiene de un mes a cinco años, tu valoración será de cinco siclos de plata para el varón y de tres siclos de plata para la mujer.
mpo na moto oyo mikolo ya mbotama na ye ya mbotama ezali kati na sanza moko mpe mibu mitano, bagrame tuku motoba ya palata mpo na mobali, mpe bagrame tuku misato na motoba ya palata mpo na mwasi;
7 Si la persona es de sesenta años en adelante, si es varón, tu valoración será de quince siclos, y para la mujer de diez siclos.
mpo na moto oyo mibu na ye ya mbotama ezali kobanda na tuku motoba mpe komata, bagrame nkama moko na tuku mwambe ya palata mpo na mobali, mpe bagrame nkama moko na tuku mibale ya palata mpo na mwasi.
8 Pero si es más pobre que tu valuación, entonces será presentada ante el sacerdote, y éste le asignará un valor. El sacerdote le asignará un valor según su capacidad de pago.
Soki moto oyo alapi ndayi azali mobola to azali na makoki te ya kopesa motuya oyo ekatama, akomema epai ya Nganga-Nzambe moto oyo ye alapelaki ndayi ya kopesa lokola likabo. Boye Nganga-Nzambe akokata motuya ya kopesa kolanda makoki ya moto oyo alapi ndayi.
9 “‘Si se trata de un animal del que los hombres ofrecen una ofrenda a Yahvé, todo lo que un hombre da de él a Yahvé se convierte en santo.
Soki moko kati na bino alapi ndayi ya kopesa lokola likabo epai na Yawe nyama oyo esengeli, nyama yango ekokoma bule;
10 No lo alterará, ni lo cambiará, un bien por un mal, o un mal por un bien. Si se cambia un animal por otro, tanto éste como el que se cambia serán santos.
asengeli te kobongola to kopesa nyama mosusu na esika ya nyama ya liboso, noki te banyama nyonso mibale ekokoma bule.
11 Si se trata de un animal impuro, del que no se ofrece como ofrenda a Yahvé, entonces pondrá el animal delante del sacerdote;
Soki nyama oyo alapelaki ndayi ezali mbindo, nyama oyo esengeli te kopesama lokola likabo epai na Yawe, bakomema nyama yango liboso ya Nganga-Nzambe
12 y el sacerdote lo evaluará, si es bueno o malo. Según lo evalúe el sacerdote, así será.
oyo akotala soki nyama yango ezali malamu to mabe. Motuya nyonso oyo Nganga-nzambe akokata, ekotikala bongo.
13 Pero si en verdad lo redime, entonces añadirá la quinta parte de él a su valoración.
Soki mokolo nyama alingi kosikola yango, asengeli kobakisa eteni moko kati na biteni mitano ya motuya na yango.
14 “‘Cuando un hombre dedique su casa a ser santa para Yahvé, entonces el sacerdote la evaluará, si es buena o mala. Según la evalúe el sacerdote, así quedará.
Soki moto abulisi ndako na ye lokola eloko oyo ebulisami mpo na Yawe, Nganga-Nzambe akokata motuya na yango kolanda ndenge ndako yango ezali malamu to mabe. Motuya nyonso oyo Nganga-Nzambe akokata, ekotikala bongo.
15 Si el que la dedica quiere redimir su casa, entonces le añadirá la quinta parte del dinero de su evaluación, y será suya.
Soki moto oyo abulisi ndako na ye lokola likabo epai na Yawe alingi kosikola yango, asengeli kobakisa eteni moko kati na biteni mitano ya motuya na yango; mpe ndako yango ekokoma lisusu ya ye.
16 “‘Si un hombre dedica a Yahvé una parte del campo de su posesión, su valoración será según la semilla de la misma. La siembra de un homer de cebada se valorará en cincuenta siclos de plata.
Soki moto abulisi mpo na Yawe eteni ya mabele kati na mabele na ye, bakokata motuya ya eteni ya mabele yango kolanda milona oyo bakoki kolona kuna: bagrame nkama motoba ya palata mpo na bakilo nkama minei ya bambuma ya orje.
17 Si él dedica su campo desde el Año del Jubileo, según tu valoración se mantendrá.
Soki abulisi elanga na ye, na mobu ya kosepela kokangolama, motuya oyo bakata ekotikala bongo.
18 Pero si dedica su campo después del Jubileo, el sacerdote le contará el dinero según los años que falten para el Año del Jubileo, y se hará una rebaja de tu valoración.
Kasi soki abulisi elanga na ye epai na Yawe sima na mobu ya kosepela kokangolama, Nganga-Nzambe akokata motuya na yango kolanda motango ya mibu oyo etikali kino na mobu oyo ekolanda, mobu ya kosepela kokangolama. Boye bakokitisa motuya oyo ekatama.
19 Si el que dedicó el campo lo rescata, le agregará la quinta parte del dinero de tu valuación, y seguirá siendo suyo.
Soki moto oyo abulisi elanga alingi kosikola yango, akobakisa eteni moko kati na biteni mitano ya motuya oyo ekatama; boye elanga yango ekokoma lisusu ya ye.
20 Si no quiere rescatar el campo, o si lo ha vendido a otro hombre, ya no se rescatará;
Kasi soki asikoli yango te, bongo bateki yango epai ya moto mosusu, akoki lisusu kosikola yango te.
21 pero el campo, cuando salga en el jubileo, será sagrado para Yahvé, como campo consagrado. Será propiedad de los sacerdotes.
Soki elanga esikolami na mobu ya kosepela kokangolama, ekokoma bule lokola elanga oyo babulisi mpo na Yawe: ekozala mabele ya Banganga-Nzambe.
22 “‘Si dedica a Yahvé un campo que ha comprado, que no es del campo de su posesión,
Soki moto abulisi epai na Yawe elanga oyo asombaki, nzokande ezali mabele ya libota na bango te,
23 entonces el sacerdote le calculará el valor de su valoración hasta el Año del Jubileo; y le dará su valoración en ese día, como cosa sagrada para Yahvé.
Nganga-Nzambe akokata motuya na yango kolanda mibu oyo etikali kino na mobu ya kosepela kokangolama; kaka na mokolo oyo Nganga-Nzambe akokata motuya na yango nde moto yango akopesa motuya na yango lokola eloko ya bule epai na Yawe.
24 En el Año del Jubileo el campo volverá al que lo compró, al que le pertenece la posesión de la tierra.
Na mobu ya kosepela kokangolama, elanga yango ekozonga na maboko ya moto oyo atekaki yango: mokolo mabele.
25 Todas vuestras valoraciones serán según el siclo del santuario: veinte gerahs al siclo.
Mituya nyonso ekokatama ndenge batangaka mbongo ya bibende kati na Mongombo. Mbongo moko ya ebende esengeli kozala na bagrame zomi na mibale.
26 “‘Sin embargo, el primogénito entre los animales, que pertenece a Yahvé como primogénito, ningún hombre puede dedicarlo, ya sea un buey o una oveja. Es de Yahvé.
Moto moko te akoki kobulisa mwana liboso ya nyama na ye, pamba te mwana ya liboso ezali ya Yawe; ezala ya ngombe, ya meme to ya ntaba.
27 Si se trata de un animal impuro, lo recomprará según tu valoración, y le añadirá la quinta parte; o si no se redime, se venderá según tu valoración.
Soki ezali mwana liboso ya nyama moko ya mbindo, mokolo nyama yango akoki kosikola yango na kobakisa eteni moko kati na biteni mitano ya motuya na yango; kasi soki asikoli yango te, bakoteka yango na motuya oyo ekatama.
28 “‘Sin embargo, ninguna cosa consagrada que un hombre dedique a Yahvé de todo lo que tiene, sea de hombre o de animal, o del campo de su posesión, será vendida o redimida. Todo lo que se consagra permanentemente es santísimo para Yahvé.
Nyonso oyo moto akopesa epai na Yawe lokola likabo ekoki kotekama te to kosikolama; ezala moto, nyama to mabele, pamba te nyonso oyo epesami epai na Yawe ezali bule mpo na Yawe.
29 “‘Ningún consagrado a la destrucción, que sea consagrado de entre los hombres, será rescatado. Será condenado a muerte.
Moto moko te oyo abongisami mpo na kobebisama akoki kosikolama, basengeli koboma ye.
30 “‘Todo el diezmo de la tierra, ya sea de la semilla de la tierra o del fruto de los árboles, es de Yahvé. Es sagrado para Yahvé.
Eteni nyonso ya zomi ya biloko nyonso oyo ekowuta na mabele, ezala bambuma ya bilanga to bambuma ya banzete, ezali ya Yawe: ezali bule mpo na Yawe.
31 Si un hombre rescata algo de su diezmo, le añadirá la quinta parte.
Soki moto alingi kosikola eteni na ye ya zomi, asengeli kobakisa eteni moko kati na biteni mitano ya motuya na yango.
32 Todo el diezmo de las vacas o de los rebaños, todo lo que pase por debajo de la vara, el décimo será santo para el Señor.
Eteni nyonso ya zomi; ezala ya ngombe, ya meme to ya ntaba, elingi koloba nyama nyonso ya zomi oyo ekoleka na se ya lingenda ya mobateli bibwele, ekozala bule mpo na Yawe;
33 No examinará si es bueno o malo, ni lo cambiará. Si lo cambia, tanto él como aquello por lo que se cambie serán sagrados. No se canjeará”.
ezala ya malamu to ya mabe, akoki te kopona nyama mosusu na esika ya nyama oyo ya zomi. Soki atie nyama moko na esika ya nyama mosusu, nyonso mibale ekokoma bule mpo na Yawe; mpe ekoki kosikolama te. › »
34 Estos son los mandamientos que Yahvé ordenó a Moisés para los hijos de Israel en el Monte Sinaí.
Oyo nde mitindo oyo Yawe apesaki Moyize, na ngomba Sinai, mpo na bana ya Isalaele.

< Levítico 27 >