< 2 Crónicas 8 >

1 Al cabo de veinte años, en los que Salomón había edificado la casa de Yahvé y su propia casa,
Sima na mibu tuku mibale oyo Salomo asalaki mpo na kotonga Tempelo ya Yawe mpe ndako na ye moko,
2 Salomón edificó las ciudades que Huram le había dado a Salomón, e hizo habitar a los hijos de Israel.
Salomo atongaki lisusu bingumba mike oyo Irami apesaki ye mpe avandisaki kuna bana ya Isalaele.
3 Salomón se dirigió a Hamat-Zobá y la venció.
Salomo akendeki kobundisa engumba Amati ya Tsoba mpe abotolaki yango.
4 Edificó Tadmor en el desierto, y todas las ciudades de almacenamiento que edificó en Hamat.
Kati na esobe, atongaki engumba Tadimori; mpe kati na Amati, atongaki bingumba nyonso ya kobombela biloko.
5 También edificó Bet Horón, la de arriba, y Bet Horón, la de abajo, ciudades fortificadas con murallas, puertas y rejas;
Atongaki lisusu Beti-Oroni ya likolo mpe Beti-Oroni ya se lokola bingumba batonga makasi, elongo na bamir, bikuke mpe bibende oyo bakangelaka bikuke,
6 y Baalat, y todas las ciudades de almacenamiento que tenía Salomón, y todas las ciudades para sus carros, las ciudades para su gente de a caballo, y todo lo que Salomón quiso edificar a su gusto en Jerusalén, en el Líbano y en toda la tierra de su dominio.
Baalati mpe bingumba nyonso epai wapi azalaki kobomba biloko na ye, bingumba nyonso epai wapi azalaki kobomba bashar mpe bampunda na ye. Salomo atongaki lisusu nyonso oyo azalaki na yango posa kati na Yelusalemi, na Libani mpe na mokili nyonso oyo azalaki kokamba.
7 En cuanto a todos los pueblos que quedaron de los hititas, los amorreos, los ferezeos, los heveos y los jebuseos, que no eran de Israel —
Batikali nyonso kati na bato ya Iti, ya Amori, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi, ba-oyo bazalaki bana ya Isalaele te,
8 de sus hijos que quedaron después de ellos en la tierra, que los hijos de Israel no consumieron — de ellos Salomón reclutó mano de obra forzada hasta el día de hoy.
ba-oyo bana na bango batikalaki kati na mokili oyo bana ya Isalaele babebisaki, Salomo azwaki bango mpo na misala makasi, kino na mokolo ya lelo.
9 Pero de los hijos de Israel, Salomón no hizo siervos para su trabajo, sino que fueron hombres de guerra, jefes de sus capitanes y gobernantes de sus carros y de su caballería.
Kasi Salomo akomisaki te bana ya Isalaele bawumbu mpo na kosala misala makasi na ye, pamba te bazalaki bato ya bitumba, bakonzi ya basoda na ye, bakonzi ya bashar na ye mpe ya basoda na ye, oyo batambolisaka bashar.
10 Estos eran los principales oficiales del rey Salomón, doscientos cincuenta, que gobernaban al pueblo.
Ezalaki mpe na bakalaka ya lokumu oyo mokonzi Salomo atiaki mpo na kokamba basali na ye. Motango na bango ezalaki nkama mibale na tuku mitano.
11 Salomón sacó a la hija del faraón de la ciudad de David a la casa que le había construido, porque dijo: “Mi mujer no habitará en la casa de David, rey de Israel, porque los lugares donde ha llegado el arca de Yahvé son sagrados.”
Salomo alongolaki mwana mwasi ya Faraon kati na engumba ya Davidi mpe amemaki ye na ndako oyo atongelaki ye, pamba te alobaki: « Mwasi na ngai asengeli te kovanda kati na ndako ya Davidi, mokonzi ya Isalaele, mpo ete bisika oyo Sanduku ya Yawe ekoti ezali bule. »
12 Entonces Salomón ofreció holocaustos a Yahvé en el altar de Yahvé que había construido ante el pórtico,
Salomo abonzaki epai na Yawe bambeka ya kotumba, na etumbelo ya Yawe, oyo atongaki liboso ya ndako moke ya kokotela na Tempelo ya Yawe.
13 tal como lo exigía el deber de cada día, ofreciendo según el mandamiento de Moisés en los sábados, en las lunas nuevas y en las fiestas establecidas, tres veces al año, durante la fiesta de los panes sin levadura, durante la fiesta de las semanas y durante la fiesta de las cabañas.
Azalaki kobonza yango mokolo na mokolo, kolanda mitindo ya Moyize na tina na mikolo ya Saba, ya ebandeli ya sanza mpe ya bafeti misato oyo esalemaka mibu nyonso: feti ya Mapa ezanga levire, feti ya Baposo mpe feti ya Bandako ya kapo.
14 Designó, según la ordenanza de su padre David, a las divisiones de los sacerdotes para su servicio, y a los levitas para sus oficios, para que alabaran y ministraran delante de los sacerdotes, según el deber de cada día, a los porteros también por sus divisiones en cada puerta, porque así lo había ordenado David, el hombre de Dios.
Kolanda mokano ya Davidi, tata na ye, Salomo atiaki masanga ya Banganga-Nzambe kati na misala na bango mpe Balevi mpo na kokumisa Yawe mpe kosunga Banganga-Nzambe ndenge ebongisamaki mpo na mokolo na mokolo. Aponaki lisusu masanga ya bakengeli bikuke mpo na ekuke moko na moko kolanda etinda oyo Davidi, moto na Nzambe, apesaki.
15 No se apartaron del mandato del rey a los sacerdotes y a los levitas en cuanto a cualquier asunto o en cuanto a los tesoros.
Batosaki na makambo nyonso mitindo ya mokonzi mpo na oyo etali Banganga-Nzambe mpe Balevi, ezala mpo na oyo etali bibombelo bomengo.
16 Toda la obra de Salomón se llevó a cabo desde el día de la fundación de la casa de Yahvé hasta su finalización. Así que la casa de Yahvé fue completada.
Ezali boye nde misala nyonso ya Salomo esalemaki, kobanda na mokolo oyo batongaki moboko ya Tempelo ya Yawe kino na mokolo oyo esilaki. Boye, Tempelo ya Yawe esilaki kotongama.
17 Entonces Salomón fue a Ezión Geber y a Elot, a la orilla del mar en la tierra de Edom.
Salomo akendeki na Etsioni-Geberi mpe na Eyiloti, pembeni ya ebale monene ya Barozo, kati na mokili ya Edomi.
18 Huram le envió barcos y siervos que conocían el mar por mano de sus siervos; y vinieron con los siervos de Salomón a Ofir, y trajeron de allí cuatrocientos cincuenta talentos de oro, y los llevaron al rey Salomón.
Irami atindelaki ye, na nzela ya basali na ye, bamasuwa mpe bato oyo bayebaki kotambolisa malamu masuwa kati na ebale. Bato ya Irami batambolaki elongo na basali ya Salomo kino na Ofiri, mpe bazwaki kuna bakilo nkoto zomi na mitano ya wolo oyo bamemaki epai ya mokonzi Salomo.

< 2 Crónicas 8 >