< Jeremías 13 >

1 Así me dijo Yahvé: “Ve y cómprate un cinturón de lino y ciñe con el tus lomos; mas no lo metas en agua.”
Tala liloba oyo Yawe alobaki na ngai: « Kende kosomba mokaba ya lino mpe lata yango na loketo na yo, kasi kopolisa yango na mayi te. »
2 Compré el cinturón, según la orden de Yahvé, y me lo puse sobre los lomos.
Boye, nasombaki mokaba, ndenge Yawe atindaki ngai mpe nalataki yango na loketo na ngai.
3 Y me llegó la palabra de Yahvé por segunda vez, para decirme:
Yawe alobaki na ngai lisusu na mbala ya mibale:
4 “Toma el cinturón que compraste, y que está sobre tus lomos, y levántate, anda al Éufrates y escóndelo allí en la hendidura de una roca.”
« Kamata mokaba oyo osombaki mpe oyo olati na loketo na yo, kende sik’oyo na Perati mpe bomba yango kuna kati na madusu ya mabanga. »
5 Fui y lo escondí junto al Éufrates, como Yahvé me lo había ordenado.
Boye nakendeki kobomba mokaba yango na Perati, ndenge Yawe alobaki na ngai.
6 Y sucedió que pasados muchos días, Yahvé me dijo: “Levántate, ve al Éufrates, y saca de allí el cinturón que te mandé esconder en aquel lugar.”
Sima na mikolo ebele, Yawe alobaki na ngai lisusu: « Kende kokamata mokaba oyo nalobaki na yo ete obomba na Perati. »
7 Fui, pues, al Éufrates y cavé, y saqué el cinturón del lugar donde lo había escondido; mas he aquí que estaba podrido, y ya no era útil para nada.
Nakendeki na Perati, nalukaki mokaba yango epai nabombaki yango; kasi mokaba yango ebebaki makasi mpe etikalaki lisusu na tina te.
8 Entonces me habló Yahvé, diciendo:
Bongo Yawe alobaki na ngai:
9 “Así dice Yahvé: De esta manera destruiré la soberbia de Judá, y el gran orgullo de Jerusalén.
« Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Ezali boye nde nakosilisa lolendo ya Yuda mpe nakokitisa mapeka ya Yelusalemi.
10 Este pueblo malo que rehúsa oír mis palabras, que siguiendo su obstinado corazón se va tras otros dioses, para servirles y adorarlos, vendrá a ser como este cinturón que para nada es útil.
Bato oyo bazali bato mabe, bayokaka maloba na Ngai te, bazali mito makasi, batingamaka kosala kolanda baposa ya mitema na bango, mpe balandaka banzambe ya bapaya mpo na kosalela mpe kogumbamela yango; bakokoma kaka lokola mokaba oyo, mokaba oyo etikali lisusu na tina te.
11 Pues así como el cinturón se adhiere a los lomos del hombre, así había Yo unido estrechamente conmigo a toda la casa de Israel, y a toda la casa de Judá, dice Yahvé, a fin de que fuese el pueblo mío para mi renombre, alabanza y gloria; mas ellos no escucharon.
Pamba te ndenge balingaka mokaba na loketo, ndenge wana mpe nalingaki libota mobimba ya Isalaele mpe libota mobimba ya Yuda epai na Ngai, › elobi Yawe, ‹ mpo ete bazala bato na Ngai mpe basala lokumu ya Kombo na Ngai. Kasi batikali koyoka Ngai te. ›
12 Les dirás esta palabra: Así dice Yahvé, el Dios de Israel: “Todas las tinajas han de llenarse de vino.” Y te dirán: ¿Acaso no sabemos muy bien que todas las tinajas han de llenarse de vino?
Loba na bango: ‹ Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi: Mbeki nyonso esengeli kotonda na masanga ya vino. › Mpe soki batuni yo: ‹ Boni, okanisi ete biso toyebi te ete mbeki nyonso esengeli kotonda na masanga ya vino? ›
13 Entonces les responderás: Así dice Yahvé: “He aquí que Yo llenaré de embriaguez a todos los habitantes de este país, a los reyes que se sientan en el trono de David, a los sacerdotes, a los profetas, y a todos los moradores de Jerusalén;
Yebisa bango: ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi: Nakolangwisa bavandi nyonso ya mokili oyo masanga; ezala bakonzi oyo bavandaka na kiti ya bokonzi ya Davidi, Banganga-Nzambe, basakoli mpe bavandi nyonso ya Yelusalemi.
14 y los estrellaré a unos contra otros, padres e hijos juntamente, dice Yahvé. No tendré piedad, ni compasión, ni misericordia, y no dejaré de destruirlos.”
Nakosala ete babomana bango na bango, batata mpe bana na bango, elobi Yawe, eloko moko te ekopekisa Ngai koboma bango, ezala motema monene to mawa to ngolu. › »
15 Oíd y prestad oídos. No os ensoberbezcáis, pues es Yahvé quien habla.
Boyoka malamu mpe bosala keba! Bosala lolendo te, pamba te ezali Yawe nde alobi.
16 Dad gloria a Yahvé, vuestro Dios, antes que Él envíe tinieblas, y tropiecen vuestros pies sobre los montes tenebrosos; cuando Él trueque en sombra de muerte la luz que esperáis, conviniéndola en densas tinieblas.
Bopesa nkembo epai na Yawe, Nzambe na bino, liboso ete amemela bino molili, liboso ete makolo na bino ebeta mabaku na bangomba oyo ezipami na molili. Bino bozali kozela pole, kasi Ye akobongola yango molili makasi.
17 Mas si no escucháis, mi alma llorará en secreto a causa de (vuestra) soberbia, llorará amargamente, y mis ojos se derretirán en lágrimas por la cautividad de la grey de Yahvé.
Soki boyoki te, nakolela na nkuku mpo na lolendo na bino, nakolela makasi, mpe miso na ngai ekosopa mpinzoli, pamba te etonga ya Yawe ekokende na bowumbu.
18 “Di al rey y a la reina: Humillaos, sentaos (en el suelo), porque se os cae de vuestras cabezas la corona de vuestra gloria.
Loba na mokonzi mpe na mama ya mokonzi: « Bolongwa na bakiti na bino ya bokonzi, pamba te mitole na bino ya nkembo ekolongwa na mito na bino. »
19 Las ciudades del Mediodía estarán cerradas, sin que haya quien las abra; todo Judá será llevado al cautiverio, todos sin excepción.
Bingumba ya sude ekokangama, mpe moto moko te akokoka kofungola yango. Bato nyonso ya Yuda bakokende na bowumbu, bango nyonso penza bakokende.
20 Levanta tus ojos, y ve quiénes son estos que vienen del norte. ¿Dónde está la grey que te fue dada, tu magnífico rebaño?
Oh Yelusalemi, tombola miso na yo mpe tala, bato bazali koya wuta na nor! Wapi bibwele oyo bapesaki yo ete obatela, mpe wapi meme oyo ozalaki kobetela tolo?
21 ¿Qué dirás cuando Él ponga sobre ti, por cabeza, a tus amantes, que tú mismo has amaestrado contra ti? ¿No sufrirás entonces dolores, como una mujer que da a luz?
Okoloba nini soki Yawe atie yo na makasi na se ya bokonzi ya bato oyo yo oteyaki. Okokoma na pasi te lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota?
22 Y si dices en tu corazón: «¿Por qué viene sobre mí esto?» por la muchedumbre de tus maldades han sido descubiertas tus faldas y manchadas las plantas de tus pies.
Mpe soki omituni: « Mpo na nini makambo ya boye ekomeli ngai? » Ezali mpo na ebele ya masumu na yo nde bapasolaki yo bilamba mpe bazokisaki nzoto na yo.
23 ¿Puede acaso el etíope mudar su piel, o el leopardo sus manchas? Así tampoco podéis obrar bien vosotros, los que estáis avezados a hacer el mal.
Boni, moto mwindo akoki solo kobongola poso ya nzoto na ye? Nkoyi ekoki kolongola penza matono ya poso ya nzoto na yango? Bokokoka kosala malamu te, bino bato oyo bomesana kosala mabe.
24 Los esparciré como la hojarasca, que arrebata el viento del desierto.
« Nakopanza bino lokola matiti ya kokawuka oyo mopepe ya esobe ememaka.
25 Esta es tu suerte, la porción que Yo te he reservado, dice Yahvé; por haberte olvidado de Mí, poniendo tu confianza en la mentira.
Yango nde etumbu na yo, mbano oyo nakatelaki yo, » elobi Yawe, « pamba te bobosanaki Ngai mpe botiaki mitema epai ya banzambe ya lokuta.
26 Pues también Yo te descubriré las faldas (alzándolas) sobre tu rostro, para que se vean tus vergüenzas.
Nakotombola yo bilamba kino na elongi mpo ete bato bamona bolumbu na yo.
27 Tus adulterios, tus relinchos, la ignominia de tu fornicación, en los collados y por los campos, (todas) tus abominaciones las he visto. ¡Ay de ti, oh Jerusalén, que no quieres purificarte! ¿Hasta cuándo esperas todavía?”
Namoni bondumba na yo mpe posa na yo ya kosangisa nzoto; ekobo na yo ezali na soni ata moke te. Namoni banzambe na yo ya bikeko na likolo ya bangomba mpe kati na bilanga. Mawa na yo Yelusalemi, ozali peto te! Kino tango nini okozala mbindo? »

< Jeremías 13 >