< Isaías 29 >

1 ¡Ay de Ariel, de Ariel! ciudad donde tuvo su morada David. Añadid año a año; sigan las fiestas en su turno,
Mawa na yo, Arieli, Arieli, engumba oyo Davidi azalaki kovanda! Bobakisa mibu na mibu mpe botika ete bafeti na bino ekoba kolandana ndenge ezalaka.
2 mas Yo estrecharé a Ariel; habrá llantos y gemidos, y ella será para mí como un ariel.
Kasi nakonyokola Arieli; ekokoma na mawa mpe na kolela; ekokoma na miso na Ngai lokola etumbelo.
3 Acamparé contra ti todo en derredor, te circunvalaré con gente armada y alzaré contra ti trincheras.
Nakozingela yo mpo na kobundisa yo, nakozingela yo na mir ya molayi mpe nakotiela yo mampinga ya nguya mpo na kotelemela yo.
4 Serás humillada; desde el suelo hablarás; y desde el polvo se hará oír tu voz ahogada; saldrá tu voz, como la de un fantasma, desde la tierra, y tus palabras sonarán, como murmullo, procedente del polvo.
Okokitisama solo na se, okoloba wuta na mabele, mpe maloba na yo ekobanda kobima na mongongo ya se wuta na putulu. Mongongo na yo ekokoma kobima wuta na se ya mabele lokola mongongo ya moto oyo asololaka na milimo ya bakufi; mpe wuta na putulu, maloba na yo ekobima na mongongo ya se.
5 La muchedumbre de tus enemigos será cual polvo menudo, y la multitud de tus opresores como paja que vuela.
Bongo ebele ya banguna na yo bakokoma lokola putulu, mpe ebele ya banyokoli na yo bakokoma lokola matiti ekawuka oyo ezali kopumbwa na mopepe; ekosalema bongo na pwasa.
6 Y esto sucederá de repente en un instante. De parte de Yahvé de los ejércitos serás visitada con truenos y estrépito y gran estruendo, con torbellino y tempestad, y llamas de fuego devorador.
Yawe, Mokonzi ya mampinga, akoya epai na yo na nzela ya bakake, ya koningana ya mabele mpe ya lokito monene, ya mopepe makasi mpe ya mvula ya moto oyo etumbaka.
7 Como un sueño, como visión nocturna, así será la muchedumbre de las naciones que combaten a Ariel; y así serán todos los que pelean contra ella y su fortaleza y la asedian.
Ekozala lokola ndoto to emoniseli ya butu mpo na ebele ya bikolo oyo bakobundisa Arieli, oyo bakotelemela ye elongo na bandako na ye ya makasi mpe bakozingela ye.
8 Así como el hambriento sueña que come, mas cuando despierta se siente vacío, y como el sediento sueña que bebe, mas cuando despierta se siente agotado y lleno de deseos, así sucederá a la muchedumbre de todas las naciones que atacan el monte Sión.
Ekozala lokola moto oyo azali na nzala, bongo azali kolota ndoto ete azali kolia, kasi tango alamuki, libumu na ye ezali kaka pamba lokola moto oyo azali na posa ya mayi, bongo azali kolota ndoto ete azali komela mayi, kasi tango alamuki na nzoto ya kolemba, posa na ye ya mayi esili kaka te. Ekozala nde bongo mpo na mampinga ya bikolo nyonso oyo bakobundisa ngomba Siona.
9 Pasmaos y quedaos asombrados; ofuscaos y cegaos. Están embriagados, pero no de vino; tambalean, pero no a causa de bebidas fuertes.
Bozanga maloba mpe bokamwa! Bomiboma miso mpe botikala bakufi miso! Bolangwa masanga, kasi na vino te! Botenga-tenga, kasi na masanga ya makasi te!
10 Porque Yahvé ha derramado sobre vosotros un espíritu de letargo; os ha cerrado los ojos, oh profetas; y tapado vuestras cabezas, oh videntes.
Yawe asopeli bino molimo ya pongi makasi; akangi bino miso, bino basakoli, azipi bino mito, bino bato oyo bomonaka makambo.
11 Toda visión es para vosotros como las palabras de un libro sellado, que se le da a uno que sabe leer, diciendo: “Lee esto”; pero él responde: “No puedo, porque está sellado.”
Mpo na bino, emoniseli nyonso oyo ekomi lokola maloba ya buku oyo bakanga mpe bapesi epai ya moto oyo ayebi kotanga, bongo balobi na ye: « Nabondeli yo, tanga nanu buku oyo, » kasi azongisi: « Nakokoka te, pamba te buku ekangama. »
12 Luego se da el libro a quien no sabe leer, diciendo: “Lee esto”, y él responde: “No entiendo de escritura.”
To bapesi yango epai ya moto oyo ayebi kotanga te, mpe balobi na ye: « Nabondeli yo, tanga nanu buku oyo, » kasi azongisi: « Nayebi kotanga te. »
13 Dice el Señor: “Por cuanto este pueblo se me acerca (solo) con su boca, y (solo) con sus labios me honra, mientras su corazón está lejos de Mí, y el temor que me tienen no es más que un mandamiento de hombres, cosa aprendida de memoria,
Nkolo alobi: « Bato oyo bapusanaka pene na Ngai kaka na monoko, bapesaka Ngai lokumu kaka na bibebu, kasi mitema na bango ezalaka mosika na Ngai; mpe botosi oyo bazalaka na yango epai na Ngai ezali kaka mobeko ya bomoto, oyo bateyaki bango.
14 por eso volveré a hacer con este pueblo cosas asombrosas, cosas extraordinarias y maravillosas. Fallará la sabiduría de sus sabios, y se desvanecerá la prudencia de sus prudentes.
Yango wana, nakokoba kokamwisa bato oyo; ekozala nde bikamwa likolo ya bikamwa kino bwanya ya bato ya bwanya ekobunga, mpe mayele ya bato ya mayele ekosuka. »
15 ¡Ay de los que encubren sus pensamientos para ocultarlos a Yahvé, y hacen sus obras en las tinieblas, diciendo: «¿Quién nos ve? y ¿quién nos conoce?»
Mawa na bato oyo basalaka makambo na nkuku mpo na kobombela Yawe mabongisi na bango; bato oyo basalaka misala na bango na molili mpe balobaka: « Nani akoki komona biso? Nani akoyeba? »
16 ¡Que perversidad la vuestra! ¿Acaso se puede igualar el barro al alfarero, de modo que la obra diga a su hacedor: «No me has hecho tú», y la vasija diga al que la formó: «Nada entiende»?
Bozali nde kobongola makambo! Ezali lokola bozali kozwa mosali mbeki ndenge moko na mabele oyo basalelaka mbeki. Boni, eloko ekoki solo koloba na mosali na yango: « Asalaki ngai te? » Mbeki ekoki solo koloba na mosali mbeki: « Ozali mayele te? »
17 ¿No es verdad que dentro de poco tiempo el Líbano se convertirá en un jardín, y el jardín será tenido por bosque?
Etikali kaka tango moke, Libani ekobongwana elanga ya kitoko, mpe elanga ya kitoko ekomonana lokola zamba.
18 En aquel día los sordos oirán las palabras del libro, y los ojos de los ciegos verán, libres ya de la oscuridad y de las tinieblas.
Na mokolo wana, bakufi matoyi bakoyoka maloba ya buku, mpe bakufi miso bakomona tango bakobima na butu mpe na molili.
19 Los humildes se alegrarán más y más en Yahvé, y los pobres de entre los hombres se regocijarán en el Santo de Israel.
Bato bakelela bakosepela makasi kati na Yawe, babola bakozala na esengo kati na Mosantu ya Isalaele.
20 Porque los opresores habrán dejado de existir; no habrá más burladores, y serán extirpados todos los que se desvelan para hacer mal;
Banyokoli bakotikala lisusu te, batioli bakozala lisusu te mpe bato oyo balukaka pasi ya baninga bakokufa:
21 los que condenan a un hombre por una palabra, los que arman lazos al que juzga en el tribunal y pervierten sin motivo la causa del justo.
elongo na bato oyo bakweyisaka bato kati na kosamba mpo na liloba moko, elongo na bato oyo batielaka basambisi mitambo mpe bapesaka matatoli ya lokuta, na kosambisama, mpo na kokweyisa moto ya sembo.
22 Por eso, Yahvé el que rescató a Abrahán, dice así a la casa de Jacob: Ya no se cubrirá de vergüenza Jacob, y no palidecerá más su rostro.
Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe, Mosikoli ya Abrayami, alobi na libota ya Jakobi: « Jakobi akozala lisusu na soni te, elongi na ye ekozala lisusu ya kokawuka te.
23 Pues cuando él y sus hijos vieren en medio de ellos la obra de mis manos, santificarán mi nombre, santificarán al Santo de Jacob, y temerán al Dios de Israel.
Tango akomona kati na bango bana na ye, mosala ya maboko na Ngai, bakopesa lokumu na bosantu ya Kombo na Ngai mpe bakososola bosantu ya Mosantu ya Jakobi. Boye, bakozala na somo ya Nzambe ya Isalaele.
24 Entonces los extraviados de espíritu llegarán a entender la sabiduría y los murmuradores aprenderán doctrina.
Bato oyo bazali koyengayenga na molimo bakozwa mayele, mpe bato ya mito makasi bakondima koyekola mateya ya sika. »

< Isaías 29 >