< Ruta 4 >

1 Potem je Boaz odšel k velikim vratom in se tam usedel in glej, sorodnik, o katerem je Boaz govoril, je prišel mimo, kateremu je rekel: »Hej, ti oné! Kreni sem in sedi tukaj.« In ta je krenil tja ter se usedel.
Wana Boazi akendeki na ekuke ya engumba mpe avandaki kuna, amonaki mosikoli, oyo Boazi alobaki ete ye nde azali na ndingisa ya kosikola Rite, azali koleka. Boazi alobaki na ye: « Ndeko na ngai ya mobali, yaka nanu mpe vanda awa. » Moto yango apusanaki mpe avandaki.
2 Vzel je deset mož izmed starešin mesta ter rekel: »Sedite tukaj.« In oni so se usedli.
Boazi abengaki mibali zomi kati na bakambi ya engumba mpe asengaki ete bavanda na bango elongo. Tango bavandaki,
3 Sorodniku je rekel: »Naomí, ki je ponovno prišla iz moábske dežele, prodaja posest dežele, ki je bila od najinega brata Eliméleha
Boazi alobaki na mosikoli ya Rite: — Naomi oyo awutaki na mokili ya Moabi azali koteka elanga ya Elimeleki, ndeko na biso.
4 in mislil sem, da ti oznanim, rekoč: ›Kupi to pred prebivalci in pred starešinami mojega ljudstva. Če hočeš to odkupiti, to odkupi, toda če ti tega nočeš odkupiti, potem mi povej, da bom lahko vedel, kajti poleg tebe ni nikogar, da to odkupi, jaz pa sem za teboj.‹« In ta je rekel: » To bom odkupil.«
Ngai nazwaki likanisi ya koyebisa yo mpe kosenga na yo ete osomba na yo yango na miso ya bavandi ya engumba mpe ya bakambi oyo bazali awa. Soki ondimi kosomba yango, somba na yo. Soki te, yebisa ngai mpo ete nayeba; pamba te yo nde ozali moto ya liboso oyo azali na ndingisa ya kosomba yango, mpe ngai nazali na ndingisa sima na yo. Moto yango azongiselaki ye: — Iyo, nakosomba yango.
5 Potem je Boaz rekel: »Tisti dan, ko kupiš polje iz Naomíne roke, moraš to kupiti tudi od Moábke Rute, žene umrlega, da obudiš ime mrtvega na njegovi dediščini.«
Boazi alobaki: — Na mokolo oyo okosomba elanga na maboko ya Naomi, okozwa mpe Rite, moto ya Moabi, mwasi akufisa mobali; mpo na kosala ete kombo ya mowei etikala na libula na ye.
6 Sorodnik je rekel: » Tega ne morem odkupiti zase, da ne bi oškodoval svoje lastne dediščine. Ti odkupi mojo pravico k sebi, kajti jaz tega ne morem odkupiti.«
Mosikoli alobaki: — Nakoki kosikola yango te, noki te nakotia mobulu kati na libula na ngai. Sikola yango yo moko, pamba te ngai nakoki te kosala yango.
7 Torej to je bil običaj v prejšnjem času v Izraelu, glede odkupitve in glede zamenjave, za potrditev vseh stvari. Človek je sezul svoj čevelj in tega dal svojemu bližnjemu in to je bilo pričevanje v Izraelu.
Nzokande, na tango ya kala kati na Isalaele, mpo na kosikola mpe kopesa libula, moto moko azalaki kolongola sapatu na ye mpe kopesa yango epai ya moto mosusu. Sapatu yango ezalaki lokola elembo ya litatoli kati na Isalaele.
8 Zato je sorodnik Boazu rekel: » To si kupi zase.« Tako je sezul svoj čevelj.
Mosikoli alobaki na Boazi: — Yo moko somba yango. Boye, alongolaki sapatu na ye.
9 Boaz je rekel starešinam in vsemu ljudstvu: »Vi ste priče ta dan, da sem kupil vse, kar je bilo Elimélehovo in vse, kar je bilo Mahlónovo in Kiljónovo iz Naomíne roke.
Boazi ayebisaki bampaka mpe bato nyonso: — Bino moko bozali batatoli ete nasombi na maboko ya Naomi libula nyonso ya Elimeleki, ya Kilioni mpe ya Maaloni.
10 Poleg tega sem kupil Moábko Ruto, Mahlónovo ženo, da postane moja žena, da obudim ime mrtvega na njegovi dediščini, da ime mrtvega ne bo iztrebljeno izmed njegovih bratov in od velikih vrat tega kraja. Vi ste priče ta dan.«
Nazwi lisusu Rite, moto ya Moabi, oyo azalaki mwasi ya Maaloni oyo akufa, mpo ete azala mwasi na ngai, mpo na kosala ete kombo na ye etikala na libula na ye, ete ebunga te kati na bandeko na ye mpe kati na buku ya leta ya engumba na ye. Bino bozali batatoli na yango lelo.
11 Vse ljudstvo, ki je bilo v velikih vratih, in starešine, so rekli: » Mi smo priče. Gospod naj naredi žensko, ki je prišla v tvojo hišo, kakor Rahelo in kakor Lejo, ki sta zgradili Izraelovo hišo. Ti pa delaj plemenito v Efráti in bodi slaven v Betlehemu.
Boye, bampaka mpe bato nyonso oyo bazalaki na ekuke ya engumba balobaki: — Iyo, biso moko tozali batatoli. Tika ete Yawe akomisa mwasi oyo azali koya na ndako na yo, lokola Rasheli mpe Lea, oyo batongaki elongo libota ya Isalaele. Tika ete okoma moto monene kati na Efrata mpe moto ya lokumu kati na Beteleemi!
12 Tvoja hiša naj bo podobna Parecovi hiši, katerega je Tamara rodila Judu, od semena, ki ti ga bo Gospod dal od te mlade ženske.«
Tika ete bakitani oyo Yawe akopesa yo na nzela ya elenge mwasi oyo, bakomisa ndako na yo lokola ndako ya Peretsi oyo Tamari abotelaki Yuda!
13 Tako je Boaz vzel Ruto in bila je njegova žena in ko je šel noter k njej, ji je Gospod dal spočetje in rodila je sina.
Boye, Boazi akamataki Rite mpe abalaki ye. Sima na Boazi kosangisa na ye nzoto, Yawe asalelaki Rite ngolu: azwaki zemi mpe abotaki mwana mobali.
14 Ženske so rekle Naomí: »Blagoslovljen bodi Gospod, ki te ta dan ni pustil brez sorodnika, da bo njegovo ime lahko slavno v Izraelu.
Basi balobaki na Naomi: « Tika ete Yawe akumisama; Ye oyo, na mokolo ya lelo, atiki yo te kozanga mosikoli oyo kombo na ye ekokende sango kati na Isalaele!
15 On ti bo obnovitelj tvojega življenja in hranitelj tvoje starosti, kajti rodila ga je tvoja snaha, ki te ima rada, ki ti je boljša kakor sedem sinov.«
Akoyeisa bomoi na yo sika mpe akosunga yo na kimobange na yo, pamba te bokilo na yo, oyo alingaka yo mpe azali na motuya na miso na yo koleka bana mibali sambo, aboteli yo mwana mobali. »
16 Naomí je vzela otroka in ga položila v svoje naročje in mu postala pestunja.
Naomi azwaki mwana, atiaki ye na tolo na ye mpe akomaki mama mobokoli na ye.
17 Ženske, njene sosede, so mu dale ime, rekoč: »Naomí je rojen sin« in njegovo ime so imenovale Obéd. On je oče Davidovega očeta Jeseja.
Basi ya mboka wana balobaki: « Naomi aboti mwana mobali! » Bapesaki mwana mobali yango kombo « Obedi. » Obedi abotaki Izayi, mpe Izayi abotaki Davidi.
18 Torej to so Parecovi rodovi: Parec je zaplodil Hecróna,
Tala libota ya Peretsi: Peretsi abotaki Etsironi,
19 Hecrón je zaplodil Rama, Ram je zaplodil Aminadába,
Etsironi abotaki Rami, Rami abotaki Aminadabi,
20 Aminadáb je zaplodil Nahšóna, Nahšón je zaplodil Salmóna,
Aminadabi abotaki Nashoni, Nashoni abotaki Salima,
21 Salmón je zaplodil Boaza, Boaz je zaplodil Obéda,
Salima abotaki Boazi, Boazi abotaki Obedi,
22 Obéd je zaplodil Jeseja in Jese je zaplodil Davida.
Obedi abotaki Izayi, Izayi abotaki Davidi.

< Ruta 4 >