< От Матфея святое благовествование 5 >

1 Узрев же народы, взыде на гору: и седшу Ему, приступиша к Нему ученицы Его.
Tango Yesu amonaki ebele yango ya bato, amataki likolo ya ngomba mpe avandaki. Bayekoli na Ye bapusanaki pene na Ye,
2 И отверз уста Своя, учаше их, глаголя:
mpe akomaki kopesa bango malakisi. Alobaki:
3 блажени нищии духом: яко тех есть Царствие Небесное.
« Esengo na babola na molimo, pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bango!
4 Блажени плачущии: яко тии утешатся.
Esengo na bato oyo bazali kolela, pamba te bakobondisama!
5 Блажени кротцыи: яко тии наследят землю.
Esengo na bato na komikitisa, pamba te bakozwa mokili lokola libula!
6 Блажени алчущии и жаждущии правды: яко тии насытятся.
Esengo na bato oyo bazali na nzala mpe na posa ya bosembo, pamba te bakotondisama!
7 Блажени милостивии: яко тии помиловани будут.
Esengo na bato oyo bayokelaka bato mosusu mawa, pamba te bakoyokela bango mpe mawa!
8 Блажени честии сердцем: яко тии Бога узрят.
Esengo na bato oyo bazali na mitema peto, pamba te bakomona Nzambe!
9 Блажени миротворцы: яко тии сынове Божии нарекутся.
Esengo na bato oyo bayeisaka kimia, pamba te bakobengama bana na Nzambe!
10 Блажени изгнани правды ради: яко тех есть Царствие Небесное.
Esengo na bato oyo bazali konyokolama likolo ya bosembo, pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bango!
11 Блажени есте, егда поносят вам, и ижденут, и рекут всяк зол глагол на вы лжуще, Мене ради:
Esengo na bino tango bazali kofinga bino, tango bazali konyokola bino, mpe tango bazali kokosela bino makambo ya lolenge nyonso likolo na Ngai!
12 радуйтеся и веселитеся, яко мзда ваша многа на небесех: тако бо изгнаша пророки, иже (беша) прежде вас.
Bosepela mpe bozala na esengo, pamba te lifuti na bino ezali monene kati na Likolo; pamba te ezalaki mpe kaka ndenge wana nde banyokolaki basakoli oyo bazalaki liboso na bino.
13 Вы есте соль земли: аще же соль обуяет, чим осолится? Ни во чтоже будет ктому, точию да изсыпана будет вон и попираема человеки.
Bozali mungwa ya mokili. Kasi soki mungwa ebungisi elengi na yango, ndenge nini bakokoka lisusu kozongisa elengi na yango? Ezali lisusu na tina moko te; etikali kaka eloko ya kobwaka mpe ya konyata.
14 Вы есте свет мира: не может град укрытися верху горы стоя:
Bozali pole ya mokili. Engumba oyo batongi na likolo ya ngomba ekoki kobombama te.
15 ниже вжигают светилника и поставляют его под спудом, но на свещнице, и светит всем, иже в храмине (суть).
Moto moko te apelisaka mwinda mpo na kotia yango na se ya katini; nzokande, atiaka yango na likolo ya etelemiselo ya minda mpo ete engengisa bato nyonso oyo bazali kati na ndako.
16 Тако да просветится свет ваш пред человеки, яко да видят ваша добрая дела и прославят Отца вашего, Иже на небесех.
Yango wana, tika ete pole na bino engenga liboso ya bato, mpo ete bamona misala malamu na bino mpe bakumisa Tata na bino oyo azali kati na Likolo.
17 (Да) не мните, яко приидох разорити закон, или пророки: не приидох разорити, но исполнити.
Bokanisa te ete Ngai nayaki mpo na kolongola Mobeko to basakoli; solo, nayaki te mpo na kolongola, kasi nayaki nde mpo na kokokisa.
18 Аминь бо глаголю вам: дондеже прейдет небо и земля, иота едина, или едина черта не прейдет от закона, дондеже вся будут.
Pamba te, nazali koloba na bino penza ya solo: liboso ete Likolo mpe mabele elimwa, nkoma moko te oyo eleki moke to litono oyo ezalaka na likolo ya i ekotikala kolongwa kati na Mobeko, kino makambo nyonso ekokisama.
19 Иже аще разорит едину заповедий сих малых и научит тако человеки, мний наречется в Царствии Небеснем: а иже сотворит и научит, сей велий наречется в Царствии Небеснем.
Yango wana, moto nyonso oyo akobuka moko kati na mibeko oyo, ezala oyo eleki moke kati na yango, mpe akoteya bato mosusu kosala bongo, bakozwa ye lokola moto pamba kati na Bokonzi ya Likolo. Kasi moto oyo akotosa mpe akoteya mibeko oyo epai na bato mosusu akozala moto monene kati na Bokonzi ya Likolo.
20 Глаголю бо вам, яко аще не избудет правда ваша паче книжник и фарисей, не внидете в Царствие Небесное.
Pamba te, nazali koloba na bino solo ete soki bosembo na bino liboso ya Mobeko eleki te bosembo ya balakisi ya Mobeko mpe ya Bafarizeo, bokokota te na Bokonzi ya Likolo.
21 Слышасте, яко речено бысть древним: не убиеши: иже (бо) аще убиет, повинен есть суду.
Boyokaki ete baloba na bakoko na biso: ‹ Okobomaka te. Moto nyonso oyo akoboma moninga na ye asengeli na kosambisama liboso ya basambisi. ›
22 Аз же глаголю вам, яко всяк гневаяйся на брата своего всуе повинен есть суду: иже бо аще речет брату своему: рака, повинен есть сонмищу: а иже речет: уроде, повинен есть геенне огненней. (Geenna g1067)
Kasi Ngai, nalobi na bino: Moto nyonso oyo akokangela ndeko na ye kanda akosamba na esambiselo liboso ya basambisi; moto oyo akofinga ndeko na ye: ‹ zoba, › akosamba liboso ya Likita-Monene; mpe oyo akoloba na ndeko na ye: ‹ moto ya liboma, › akobwakama kati na moto ya lifelo. (Geenna g1067)
23 Аще убо принесеши дар твой ко олтарю и ту помянеши, яко брат твой имать нечто на тя:
Soki ozali kokende kopesa makabo na yo liboso ya etumbelo, mpe ososoli ete ndeko na yo azwa yo na likambo,
24 остави ту дар твой пред олтарем и шед прежде смирися с братом твоим, и тогда пришед принеси дар твой.
tika makabo na yo liboso ya etumbelo mpe kende nanu koyokana na ndeko na yo wana; sima na yango nde okoya kopesa makabo na yo.
25 Буди увещаваяся с соперником твоим скоро, дондеже еси на пути с ним, да не предаст тебе соперник судии, и судия тя предаст слузе, и в темницу ввержен будеши:
Soki moto azwi yo na likambo, yokana na ye noki, wana bozali nanu na nzela; soki te, akofunda yo epai ya mosambisi, mosambisi akokaba yo na maboko ya bakengeli, mpe bakengeli bakobwaka yo na boloko.
26 аминь глаголю тебе: не изыдеши оттуду, дондеже воздаси последний кодрант.
Nazali koloba na yo penza ya solo: okobima na boloko soki kaka ofuti niongo na yo nyonso.
27 Слышасте, яко речено бысть древним: не прелюбы сотвориши.
Boyokaki ete baloba: ‹ Okosalaka ekobo te. ›
28 Аз же глаголю вам, яко всяк, иже воззрит на жену ко еже вожделети ея, уже любодействова с нею в сердцы своем:
Kasi Ngai, nalobi na bino: Mobali nyonso oyo atali mwasi na makanisi ya kolula ye, asili kosala na ye ekobo kati na motema na ye.
29 аще же око твое десное соблажняет тя, изми е и верзи от себе: уне бо ти есть, да погибнет един от уд твоих, а не все тело твое ввержено будет в геенну (огненную): (Geenna g1067)
Yango wana, soki liso na yo ya ngambo ya mobali ekweyisaka yo na masumu, longola yango mpe bwaka yango mosika na yo; pamba te eleki malamu mpo na yo kobungisa eteni moko ya nzoto, na esika ete nzoto na yo mobimba ebwakama na lifelo. (Geenna g1067)
30 и аще десная твоя рука соблажняет тя, усецы ю и верзи от себе: уне бо ти есть, да погибнет един от уд твоих, а не все тело твое ввержено будет в геенну. (Geenna g1067)
Soki mpe loboko na yo ya ngambo ya mobali ekweyisaka yo na masumu, kata yango mpe bwaka yango mosika na yo; pamba te eleki malamu mpo na yo kobungisa eteni moko ya nzoto, na esika ete nzoto na yo mobimba ekende na lifelo. (Geenna g1067)
31 Речено же бысть, яко иже аще пустит жену свою, да даст ей книгу распустную.
Boyokaki lisusu ete baloba: ‹ Soki mobali akabwani na mwasi na ye, asengeli kopesa ye mokanda ya koboma libala. ›
32 Аз же глаголю вам, яко всяк отпущаяй жену свою, разве словесе любодейнаго, творит ю прелюбодействовати: и иже пущеницу поймет, прелюбодействует.
Kasi Ngai, nazali koloba na bino: Mobali nyonso oyo alongoli mwasi na ye na libala, longola kaka soki mwasi yango akweyaki na ekobo, afungoleli ye nzela ya kosala kindumba; mpe mobali oyo abali mwasi oyo balongola na libala asali mpe ekobo.
33 Паки слышасте, яко речено бысть древним: не во лжу кленешися, воздаси же Господеви клятвы твоя.
Boyokaki lisusu ete baloba na bakoko na biso: ‹ Okolapa ndayi ya lokuta te, kasi kokisa bilaka oyo opesaki na nzela ya ndayi liboso ya Nkolo. ›
34 Аз же глаголю вам не клятися всяко: ни небом, яко престол есть Божий:
Kasi Ngai, nazali koloba na bino: bolapaka ndayi te, ezala na kombo ya Likolo, pamba te Likolo ezali Kiti ya Bokonzi ya Nzambe,
35 ни землею, яко подножие есть ногама Его: ни Иерусалимом, яко град есть великаго Царя:
to na kombo ya mokili, pamba te mokili ezali enyatelo makolo ya Nzambe; to mpe na kombo ya Yelusalemi, pamba te Yelusalemi ezali engumba ya Mokonzi Monene.
36 ниже главою твоею кленися, яко не можеши власа единаго бела или черна сотворити:
Bosalelaka mpe te mito na bino mpo na kolapa ndayi, pamba te bokoki te kokomisa moko kati na suki ya mito na bino pembe to mwindo.
37 буди же слово ваше: ей, ей: ни, ни: лишше же сею от неприязни есть.
Kasi bolobaka kaka ‹ iyo › soki ezali iyo, mpe ‹ te › soki ezali bongo, pamba te maloba nyonso oyo ebakisamaka likolo ewutaka na Mokosi.
38 Слышасте, яко речено бысть: око за око, и зуб за зуб.
Boyokaki ete baloba: ‹ Liso mpo na liso, linu mpo na linu. ›
39 Аз же глаголю вам не противитися злу: но аще тя кто ударит в десную твою ланиту, обрати ему и другую:
Kasi Ngai, nazali koloba na bino: Botelemelaka te moto mabe; kutu soki abeti yo mbata na litama ya ngambo ya loboko ya mobali, pesa ye mpe litama ya ngambo ya loboko ya mwasi.
40 и хотящему судитися с тобою и ризу твою взяти, отпусти ему и срачицу:
Soki moto alingi kofunda yo mpo na kozwa elamba na yo, pesa ye mpe kazaka na yo.
41 и аще кто тя поймет по силе поприще едино, иди с ним два.
Soki moto atindi yo na makasi ete otambola kilometele moko, yo, tambola bakilometele mibale elongo na ye.
42 Просящему у тебе дай, и хотящаго от тебе заяти не отврати.
Pesa na moto oyo asengi yo, mpe koboya te kodefisa na moto oyo alingi kodefa epai na yo.
43 Слышасте, яко речено есть: возлюбиши искренняго твоего и возненавидиши врага твоего.
Boyokaki ete baloba: ‹ Linga moninga na yo mpe yina monguna na yo. ›
44 Аз же глаголю вам: любите враги вашя, благословите кленущыя вы, добро творите ненавидящым вас, и молитеся за творящих вам напасть и изгонящыя вы,
Kasi Ngai, nazali koloba na bino: Bolingaka banguna na bino mpe bosambelaka mpo na bato oyo banyokolaka bino.
45 яко да будете сынове Отца вашего, Иже есть на небесех: яко солнце Свое сияет на злыя и благия и дождит на праведныя и на неправедныя.
Na ndenge wana nde bokozala bana ya Tata na bino, oyo azali kati na Likolo, pamba te abimisaka moyi mpo na bato malamu mpe mpo na bato mabe, mpe anokisaka mvula mpo na bato ya sembo mpe mpo na bato oyo bazali sembo te.
46 Аще бо любите любящих вас, кую мзду имате? Не и мытари ли тожде творят?
Soki bolingaka kaka bato oyo balingaka bino, lifuti nini bokozwa? Boni, bafutisi mpako basalaka mpe bongo te?
47 И аще целуете други вашя токмо, что лишше творите? Не и язычницы ли такожде творят?
Soki bopesaka mbote kaka na bandeko mibali na bino, likambo nini ya kokamwa oyo bosalaka? Boni, bapagano basalaka mpe bongo te?
48 Будите убо вы совершени, якоже Отец ваш Небесный совершен есть.
Bozala bato ya kokoka ndenge Tata na bino ya Likolo azali ya kokoka.

< От Матфея святое благовествование 5 >