< Књига пророка Захарије 8 >
1 Опет дође реч Господа над војскама говорећи:
Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobaki na ngai:
2 Овако вели Господ над војскама: Ревнујем за Сион великом ревношћу, и великим гневом ревнујем за њ.
« Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: ‹ Nazali na zuwa makasi mpo na Siona, mpo ete nalingaka yango makasi na motema na Ngai. › »
3 Овако вели Господ: Вратих се у Сион и населих се усред Јерусалима, и Јерусалим ће се звати град истинити, и гора Господа над војскама света гора.
Tala liloba oyo Yawe alobi: « Nakozonga na Siona mpe nakovanda kati na Yelusalemi. Boye, Yelusalemi ekobengama Engumba ya bosolo; mpe ngomba ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, ekobengama Ngomba ya bule. »
4 Овако вели Господ над војскама: Опет ће седети старци и старице по улицама јерусалимским, свако са штаком у руци од велике старости.
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Mibange ya mibali mpe ya basi bakotonda lisusu na babalabala ya Yelusalemi, moto na moto na nzete na ye na loboko mpo na kimobange.
5 И улице ће градске бити пуне детића и девојака, које ће се играти по улицама.
Babalabala ya engumba ekotonda lisusu na bilenge mibali mpe basi oyo bakokoma kosakana kuna. »
6 Овако вели Господ над војскама: Ако је чудно у очима остатку тог народа у ово време, еда ли ће бити чудно и у мојим очима? Говори Господ над војскама.
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Boni, soki, na tango wana, ekomonana lokola likambo ya kokamwa na miso ya batikali kati na bato oyo, Ngai mpe namona yango likambo ya kokamwa? » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
7 Овако вели Господ над војскама: Ево, ја ћу избавити свој народ из земље источне и земље западне.
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Nakobikisa bato na Ngai, longwa na mokili ya este kino na mokili ya weste.
8 И довешћу их, и они ће наставати усред Јерусалима, и биће ми народ и ја ћу им бити Бог, истином и правдом.
Nakozongisa bango mpo ete bavanda na Yelusalemi; bakozala bato na Ngai, mpe Ngai nakozala Nzambe na bango na boyengebene mpe na bosembo. »
9 Овако вели Господ над војскама: Нека вам се укрепе руке који слушате у ово време ове речи из уста пророчких од дана кад се основа дом Господа над војскама да се сазида црква.
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Bino ba-oyo, na mikolo oyo, bozali koyoka maloba kaka oyo basakoli balobaki, lokola bazalaki awa na tango miboko ya Tempelo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, ezalaki kotongama, boyika mpiko mpe bolendisa maboko na bino mpo na kotonga Tempelo oyo ya Yawe.
10 Јер пре тих дана не беше плате ни за човека ни за живинче, нити беше мира од непријатеља ни ономе који одлажаше ни ономе који долажаше и пустих све људе једног на другог.
Pamba te, liboso ya tango wana, bato bazalaki kozwa lifuti ya malonga te na misala na bango, mpe banyama ezalaki kopesa ata litomba moko te; moto moko te azalaki kokende na mosala na ye na kimia likolo ya kobanga banguna, pamba te nasalaki ete moto moko na moko atelemela moninga na ye.
11 А сада нећу бити као пре остатку тог народа, говори Господ над војскама.
Kasi sik’oyo, nakosala lisusu te, na ndambo ya bato oyo batikali, makambo oyo nasalaki na tango ya kala, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
12 Него ће усев бити миран, винова ће лоза носити плод свој, и земља ће рађати род свој, и небо ће давати росу своју; и све ћу то дати у наследство остатку тог народа.
« Solo, milona ekokola malamu, bilanga ya vino ekobota bambuma na yango, mabele ekobimisa biloko ebele, mpe likolo ekonokisa mvula. Nakopesa biloko oyo nyonso lokola libula epai ya batikali kati na bato oyo.
13 И као што бејасте уклин међу народима, доме Јудин и доме Израиљев, тако ћу вас избавити те ћете бити благослов, не бојте се, нека вам се окрепе руке.
Libota ya Yuda mpe libota ya Isalaele, bobanga ata eloko moko te, boyika kaka mpiko; pamba te ndenge bokomaki bikolo elakelama mabe kati na bikolo mosusu, ndenge wana mpe nakobikisa bino, mpe bokozala lipamboli. »
14 Јер овако вели Господ над војскама: Као што вам намислих зло учинити, кад ме разгневише оци ваши, Вели Господ над војскама, и не раскајах се,
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Ndenge kaka nazwaki mokano ya kotindela bino pasi mpe ya koyokela bino mawa te tango batata na bino batumbolaki kanda na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga,
15 Тако опет у ове дане намислих да добро чиним Јерусалиму и дому Јудином; не бојте се.
« ndenge wana mpe nazwi mokano sik’oyo ya komonisa lisusu bolamu na Yelusalemi mpe na Yuda. Bozala na bobangi te.
16 Ово је шта треба да чините: говорите истину један другом, судите право и мирно на вратима својим;
Tala makambo oyo bosengeli kosala: Tika ete moko na moko kati na bino alobaka solo na moninga na ye; bosambisaka na bosolo mpe bokataka makambo na bosembo kati na bisambiselo na bino,
17 И не мислите један другом зло у срцу свом, и не љубите криве заклетве, јер на све то мрзим, говори Господ.
bosalaka mabongisi ya komonisa baninga na bino pasi te, bolingaka te kolapa ndayi ya lokuta; pamba te makambo wana nyonso, nayina yango makasi, » elobi Yawe.
18 Потом, дође ми реч Господа над војскама говорећи;
Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobaki na ngai:
19 Овако вели Господ над војскама: Пост четвртог месеца, и пост петог и пост седмог и пост десетог обратиће се дому Јудином у радост и весеље и у празнике веселе; али љубите истину и мир.
« Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: Mikolo ya kokila bilei ya sanza ya minei, ya mitano, ya sambo mpe ya zomi ekokoma mikolo ya esengo mpe ya kosepela, ekokoma bafeti ya nkembo mpe ya esengo mpo na libota ya Yuda. Kasi bolinga solo mpe kimia. »
20 Овако вели Господ над војскама: Још ће долазити народи и становници многих градова;
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Bato ya bikolo ebele mpe bavandi ya bingumba ya ndenge na ndenge bakoya lisusu;
21 Долазиће становници једног у други говорећи. Хајдемо да се молимо Господу и да тражимо Господа над војскама; идем и ја.
bamoko bakowuta na engumba moko mpo na kokende na engumba mosusu mpe bakoloba: ‹ Tokende kobondela Yawe mpe koluka elongi na Yawe, Mokonzi ya mampinga! › Bongo bamosusu bakozongisela bango: ‹ Ngai mpe nakokende! ›
22 Тако ће доћи многи народи и силни народи да траже Господа над војскама у Јерусалиму и да се моле Господу.
Boye bato ebele mpe bikolo ya nguya bakoya na Yelusalemi mpo na koluka elongi na Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe bakobondela Ye. »
23 Овако вели Господ над војскама: У то ће време десет људи од свих језика народних ухватити једног Јудејца за скут говорећи: Идемо с вама, јер чујемо да је Бог с вама.
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Na mikolo wana, bato zomi ya bikolo mpe ya nkota ya ndenge na ndenge bakokanga songe ya nzambala ya Moyuda moko mpe bakoloba: ‹ Tika ete tokende elongo na yo, pamba te toyoki ete Nzambe azali na bino elongo. › »