< Песма над песмама 5 >
1 Дођох у врт свој, сестро моја невесто, берем смирну своју и мирисе своје, једем саће своје и мед свој, пијем вино своје и млеко своје; једите, пријатељи, пијте, и опијте се, мили моји!
Oh molingami na ngai, mwasi na ngai ya motema; nayei na elanga na ngai, nayei kobuka mbuma na ngai oyo basalelaka malasi ya mire, nayei kobuka biloko na ngai ya mike-mike ya solo kitoko, nayei kolia mafuta na ngai ya nzoyi, nayei komela vino mpe miliki na ngai. Oh baninga, bolia mpe bomela na bino, bomela mpe bolangwa na bino, balingami na ngai.
2 Ја спавам, а срце је моје будно; ето гласа драгог мог, који куца: Отвори ми, сестро моја, драга моја, голубице моја, безазлена моја; јер је глава моја пуна росе и коса моја ноћних капи.
Nalalaki, kasi makanisi na ngai ezalaki ya kolamuka. Yoka! Mongongo ya molingami na ngai ezali koyokana na ekuke! « Molingami na ngai, mwasi na ngai ya motema, ebenga na ngai, oyo azali kitoko koleka mpo na ngai, fungolela ngai ndako, pamba te moto na ngai etondi na londende, mpe suki na ngai epoli na matanga ya londende ya butu. »
3 Свукла сам хаљину своју, како ћу је обући? Опрала сам ноге своје, како ћу их каљати?
Nasili kolongola nzambala na ngai, nalata yango lisusu? Nasili kosukola makolo na ngai, nabebisa yango lisusu?
4 Драги мој промоли руку своју кроз рупу, а шта је у мени устрепта од њега.
Mobali na ngai ya motema akotisi loboko na ye na lidusu ya ekuke, bongo motema na ngai ekomi kobeta mpo na ye.
5 Ја устах да отворим драгом свом, а с руку мојих прокапа смирна, и низ прсте моје потече смирна на држак од браве.
Natelemaki mpo na kokende kofungolela mobali na ngai ya motema ndako, mpe maboko na ngai ebimisaki solo ya malasi ya mire, misapi na ngai etangisaki yango na bikangelo ya ndako.
6 Отворих драгом свом, али драгог мог не беше, отиде. Бејах изван себе кад он проговори. Тражих га, али га не нађох; виках га, али ми се не одазва.
Nafungolelaki mobali na ngai ya motema ndako, kasi akendeki na ye mpe alimwaki. Nakweyaki mayanga wana azalaki koloba; nalukaki ye, kasi namonaki ye lisusu te; nabengaki ye, kasi ayanolaki ngai te.
7 Нађоше ме стражари, који обилазе по граду, бише ме, ранише ме, узеше превес мој с мене стражари по зидовима.
Tango bakengeli ya mir bazalaki koleka-leka kati na engumba, bamonaki ngai, babetaki ngai, bazokisaki ngai mpe balongolaki ngai vwale na moto.
8 Заклињем вас, кћери јерусалимске, ако нађете драгог мог, шта ћете му казати? Да сам болна од љубави.
Oh bilenge basi ya Yelusalemi, nabondeli bino, soki bomoni mobali na ngai, bokoloba na ye nini? Boloba na ye ete nabeli maladi ya bolingo.
9 Шта је твој драги бољи од других драгих, о најлепша међу женама? Шта је твој драги бољи од других драгих, те нас тако заклињеш?
Oh mwasi oyo aleki basi nyonso na kitoko, mobali na yo aleki mibali mosusu na nini? Nini penza ya malonga oyo mobali na yo azali na yango, oyo eleki mibali mosusu mpo ete oloba na biso boye?
10 Драги је мој бео и румен, заставник између десет хиљада;
Mobali na ngai azali na poso pembe, azali moto oyo asimba bendele kati na mibali nkoto zomi.
11 Глава му је најбоље злато, коса му је кудрава, црна као гавран;
Moto na ye ezali lokola wolo ya peto, suki na ye elingama-lingama, mpe azali mwindo lokola yanganga.
12 Очи су му као у голуба на потоцима воденим, млеком умивене, и стоје у обиљу;
Miso na ye ezali kitoko lokola bibenga pembeni ya moluka, ezali lokola basukolaka yango na miliki mpe avandaka kati na sani ya bomengo.
13 Образи су му као лехе мирисног биља, као цвеће мирисно; усне су му као љиљан, с њих капље смирна житка;
Matama na ye ezali lokola mikala ya banzete ya malasi, lokola ekolo ya bafololo ya solo kitoko; bibebu na ye ezali lokola fololo oyo babengaka lisi oyo ebimisaka mire ya kitoko.
14 На рукама су му златни прстени, на којима су уковани вирили; трбух му је као светла слонова кост обложена сафирима.
Maboko na ye ezali lokola bapete ya wolo oyo batia mabanga ya Krizolite. Nzoto na ye ezali lokola pembe ya nzoko oyo babongisi mpe babakisi mabanga ya safiri.
15 Гњати су му као ступови од мрамора, углављени на златном подножју; стас му је Ливан, красан као кедри.
Makolo na ye ezali lokola makonzi ya mabanga ya marbre oyo evandi likolo ya moboko ya wolo ya peto. Azali lokola bangomba ya Libani, kitoko lokola banzete ya sedele ya Libani.
16 Уста су му слатка и сав је љубак. Такав је мој драги, такав је мој мили, кћери јерусалимске.
Elobeli na ye esalaka elengi na motema, mpe nzoto na ye mobimba esalaka ete balula ye. Tala ndenge mobali na ngai ya motema, molingami na ngai, azali, oh bilenge basi ya Yelusalemi!