< Песма над песмама 1 >
1 Соломунова песма над песмама.
Oyo nde nzembo oyo eleki kitoko kati na banzembo ya Salomo.
2 Да ме хоће пољубити пољупцем уста својих! Јер је твоја љубав боља од вина.
Tika ete bibebu na yo epesa ngai beze, pamba te bolingo na yo eleki vino na elengi.
3 Мирисом су твоја уља прекрасна; име ти је уље разлито; зато те љубе девојке.
Solo ya malasi na yo ezali kitoko, mobimba na yo ezali lokola solo ya malasi ya kitoko oyo epanzani; yango wana bilenge basi balingaka yo!
4 Вуци ме, за тобом ћемо трчати; уведе ме цар у ложницу своју; радоваћемо се и веселићемо се тобом, спомињаћемо љубав твоју више него вино; прави љубе те.
Tokende na yo elongo, tokima mbangu! Mokonzi akotisi ngai na bashambre na ye! Tovanda elongo na esengo mpe tosepela na tina na yo, tosanzola bolingo na yo, oyo eleki vino ya kitoko na elengi. Solo, ezali na pamba te nde basi balulaka yo!
5 Црна сам, али сам лепа, кћери јерусалимске, као шатори кидарски, као завеси Соломунови.
Oh bilenge basi ya Yelusalemi, nazali mwindo, kasi nazali kitoko! Solo, nazali mwindo lokola bandako ya kapo ya Kedari, lokola barido ya kitoko na ndako ya kapo ya Salomo.
6 Не гледајте ме што сам црна, јер ме је сунце опалило; синови матере моје расрдивши се на ме поставише ме да чувам винограде, и не чувах свој виноград, који ја имам.
Kokamwa ngai te mpo ete nazali mwindo, pamba te moyi nde eyindisi ngai. Bana mibali ya mama na ngai basilikelaki ngai, bakomisaki ngai mokengeli bilanga ya vino. Solo, bilanga na ngai moko ya vino, nazalaki kokoka lisusu te kokengela yango.
7 Кажи ми ти, ког љуби душа моја, где пасеш, где пландујеш? Јер зашто бих лутала међу стадима другова твојих?
Oh mobali oyo ngai nalingaka, yebisa ngai esika nini oleisaka bibwele na yo, esika nini opemisaka bampate na yo na midi! Mpo na nini nazala lokola mwasi oyo azali koyengayenga sima na bibwele ya baninga na yo?
8 Ако не знаш, најлепша између жена, пођи трагом за стадом, и паси јариће своје покрај станова пастирских.
Oh mwasi oyo aleki basi nyonso na kitoko, soki oyebi yango te, landa kaka matambe ya bibwele, na banzela oyo yango elekeli, mpe leisa bana bantaba ya basi na yo pembeni ya bandako ya kapo ya babateli bibwele.
9 Ти си ми, драга моја, као коњи у колима Фараоновим.
Oh bolingo na ngai, nazali komona yo lokola mpunda ya mwasi oyo ebendaka shar ya Faraon.
10 Образи су твоји окићени гривнама, и грло твоје низовима.
Matama na yo ezalaka kitoko kati na biloko ya matoyi, mpe kingo na yo ebongaka na mayaka.
11 Начинићемо ти златне гривне са шарама сребрним.
Tokolukela yo biloko ya matoyi ya wolo oyo batia bambuma ya mike-mike ya palata.
12 Док је цар за столом, нард мој пушта свој мирис.
Tango mokonzi azalaki kolia na mesa na ye, malasi na ngai ya nare ezalaki kopanza solo na yango ya kitoko.
13 Драги ми је мој кита смирне, која међу дојкама мојим почива.
Molingami na ngai azali mpo na ngai lokola liboke ya malasi ya mire, akolekisa butu na ye na kati-kati ya mabele na ngai.
14 Драги ми је мој грозд кипров из винограда енгадских.
Molingami na ngai azali mpo na ngai lokola liboke ya bambuma ya ene oyo ewutaka na bilanga ya vino ya Eyini-Gedi.
15 Лепа ти си, драга моја, лепа ти си! Очи су ти као у голубице.
Oh mwasi na ngai ya motema, ozali kitoko! Solo, ozali penza kitoko makasi! Miso na yo elala lokola ebenga.
16 Леп ти си, драги мој, и љубак! И постеља наша зелени се.
Mobali na ngai, tala ndenge nini ozali kitoko! Ozali penza elengi. Mbeto na biso ezali nde matiti ya mobesu,
17 Греде су нам у кућама кедрове, даске су нам јелове.
makonzi ya ndako na biso esalemi na banzete ya sedele, mpe balate na yango, na banzete ya sipele.