< Откривење 14 >
1 И видех, и гле, Јагње стајаше на гори сионској, и с Њим сто и четрдесет и четири хиљаде, који имаху име Оца Његовог написано на челима својим.
Bongo namonaki Mpate atelemi na ngomba Siona elongo na bato nkoto nkama moko na tuku minei na minei. Kombo ya Mpate mpe ya Tata na Ye ezalaki ya kokomama na bambunzu ya bato yango.
2 И чух глас с неба као глас вода многих, и као глас грома великог; и чух глас гудача који гуђаху у гусле своје.
Nayokaki mongongo moko kowuta na Lola, ezalaki koyokana lokola makelele ya bibale minene mpe lokola lokito ya kake. Ezalaki lokola lokito ya babeti mandanda oyo bazali kobeta mandanda na bango
3 И певаху као нову песму пред престолом и пред четири животиње и пред старешинама: и нико не могаше научити песме, осим оних сто и четрдесет и четири хиљаде који су откупљени са земље.
mpe bazali koyemba nzembo ya sika liboso ya Kiti ya Bokonzi, ya bikelamu minei ya bomoi mpe ya bampaka. Moko te akokaki koyekola nzembo yango longola kaka bato nkoto nkama moko na tuku minei na minei oyo basikolamaki wuta na mokili.
4 Ово су који се не опоганише са женама, јер су девственици, они иду за Јагњетом куд год оно пође. Ови су купљени од људи, првенци Богу и Јагњету.
Ezali bato oyo bamikomisaki mbindo te na nzela ya basi, pamba te bamibatelaki na kozanga kosangisa banzoto na bango na basi. Balandaka Mpate na bisika nyonso oyo akendaka. Basikolamaki kati na bato mpo ete babonzama lokola bambuma ya liboso mpo na Nzambe mpe mpo na Mpate.
5 И у њиховим устима не нађе се превара, јер су без мане пред престолом Божијим.
Lokuta emonanaki te kati na minoko na bango; bazali bato bazanga pamela.
6 И видех другог анђела где лети посред неба, који имаше вечно јеванђеље да објави онима који живе на земљи, и сваком племену, и језику и колену и народу. (aiōnios )
Bongo namonaki anjelu mosusu kopumbwa na likolo makasi. Azalaki na Sango Malamu ya seko na seko ya kosakola na bavandi nyonso ya mokili, na bikolo nyonso, na mabota nyonso, na nkota nyonso mpe na bato nyonso. (aiōnios )
7 И говораше великим гласом: Бојте се Бога, и подајте Му славу, јер дође час суда Његовог; и поклоните се Ономе који је створио небо и земљу и море и изворе водене.
Azalaki koloba na mongongo makasi: « Botosa Nzambe mpe bopesa Ye nkembo, pamba te tango na Ye ya kosambisa bato ekoki! Bogumbamela Ye oyo akela likolo mpe mabele, ebale monene mpe bitima ya mayi! »
8 И други анђео за њим иде говорећи: Паде, паде Вавилон град велики: јер отровним вином курварства свог напоји све народе.
Anjelu ya mibale alandaki mpe alobaki: « Babiloni monene ekweyi, ekweyi penza! Emelisaki bikolo nyonso vino ya kanda ya kindumba na yango. »
9 И трећи анђео за њим иде говорећи гласом великим: Ко се год поклони звери и икони њеној, и прими жиг на чело своје или на руку своју,
Anjelu ya misato alandaki ba-anjelu wana mibale ya liboso mpe alobaki na mongongo makasi: « Moto nyonso oyo agumbamelaka nyama mpe ekeko na yango, mpe azwi elembo na yango na mbunzu to na loboko na ye,
10 И он ће пити од вина гнева Божијег, које је непомешано уточено у чашу гнева Његовог, и биће мучен огњем и сумпором пред анђелима светима и пред Јагњетом.
ye mpe akomela vino ya kanda ya Nzambe, vino oyo basopaki ya peto, kati na kopo ya kanda na Ye. Mpe akonyokwama kati na moto ya sofolo liboso ya ba-anjelu ya bule mpe liboso ya Mpate.
11 И дим мучења њиховог излазиће ва век века; и неће имати мира дан и ноћ који се поклањају звери и икони њеној, и који примају жиг имена њеног. (aiōn )
Molinga ya pasi na bango ekomata na likolo mpo na libela na libela. Butu mpe moyi, bopemi ekozala te mpo na bato oyo bagumbamelaka nyama mpe ekeko na yango, mpe mpo na moto nyonso oyo akondima kozwa elembo ya kombo na yango. » (aiōn )
12 Овде је трпљење светих, који држе заповести Божије и веру Исусову.
Makambo oyo ezali penza kosenga ete basantu, oyo babatelaka mibeko ya Nzambe mpe kondima na bango kati na Yesu, bazala na mpiko.
13 И чух глас с неба где ми говори: Напиши: Благо мртвима који умиру у Господу од сад. Да, говори Дух, да почину од трудова својих; јер дела њихова иду за њима.
Bongo nayokaki mongongo moko kowuta na Lola mpe koloba na ngai: — Koma: « Kobanda sik’oyo, esengo na bato oyo bakufaka na lisanga na Nkolo! » Mpe Molimo alobaki: — Iyo, pasi na bango esilaka mpe bazwaka bopemi, pamba te misala na bango elandaka bango.
14 И видех, и гле, облак бео, и на облаку сеђаше као Син човечији, и имаше на глави својој круну златну, и у руци својој срп оштар.
Bongo namonaki lipata moko ya pembe, mpe ekelamu moko lokola mwana na moto evandaki na likolo ya lipata yango. Ezalaki na motole ya wolo na moto na yango mpe na mbeli ya minu makasi na loboko na yango.
15 И други анђео изиђе из цркве вичући великим гласом Ономе што седи на облаку: Замахни српом својим и жњи, јер дође време да се жње, јер се осуши жито земаљско.
Bongo anjelu mosusu abimaki na Tempelo mpe alobaki na mongongo makasi na ekelamu oyo evandaki na likolo ya lipata: « Kamata mbeli na yo mpe buka bambuma, pamba te tango ya kobuka bambuma ekoki, mpe ete bambuma ya mokili ekomeli. »
16 И Онај што сеђаше на облаку баци срп свој на земљу, и пожњевена би земља.
Ekelamu oyo evandaki na likolo ya lipata ebwakaki mbeli na yango na mokili, mpe mokili ezwaki lifuti na yango.
17 И други анђео изиђе из цркве што је на небу, и имаше и он срп оштар.
Anjelu mosusu abimaki na Tempelo ya Lola; ye mpe azalaki na mbeli ya minu makasi.
18 И други анђео изиђе из олтара, који имаше област над огњем, и повика с великом виком ономе који имаше срп оштри, говорећи: Замахни српом својим оштрим, и одрежи грожђе винограда земаљског; јер већ сазреше зрна његова.
Sima, anjelu mosusu oyo azalaki mokonzi ya moto alongwaki na etumbelo, mpe alobaki na mongongo makasi epai na ye oyo asimbaki mbeli ya minu makasi: « Kamata mbeli na yo ya minu mpe buka maboke ya bambuma ya vino ya mabele, pamba te bambuma yango ya vino eteli. »
19 И баци анђео срп свој на земљу, и обра виноград земаљски, и метну у кацу великог гнева Божијег.
Anjelu wana abwakaki mbeli na ye na mabele, abukaki maboke ya bambuma ya vino ya mabele mpe abwakaki yango kati na ekamolelo monene ya kanda ya Nzambe.
20 И оточи се каца изван града, и изиђе крв из каце, тја до узда коњима, хиљаду и шест стотина потркалишта.
Bakamolaki bambuma yango na libanda ya engumba kati na ekamolelo, mpe makila ebimaki wuta na ekamolelo yango, etondaki kino kokoma na bosanda ya monoko ya mpunda, mpe epanzanaki na etando ya bakilometele pene nkama misato.