< Псалми 97 >
1 Господ царује: нек се радује земља! Нек се веселе острва многа.
Yawe azali kokonza! Tika ete mabele esepela; tika ete ebele ya bisanga ezala na esengo!
2 Облак је и мрак око Њега; благост и правда подножје престолу његовом.
Mapata mpe molili makasi ezingeli Ye, bosembo mpe bosolo ezali miboko ya Kiti na Ye ya Bokonzi.
3 Огањ пред Њим иде, и пали наоколо непријатеље Његове.
Moto etambolaka liboso na Ye, ezikisaka banguna na Ye, oyo bazingeli Ye.
4 Муње Његове севају по васиљеној; види и стрепи земља.
Mikalikali na Ye engengisaka mokili; mpe tango mabele emonaka bongo, elengaka.
5 Горе као восак топе се од лица Господњег, од лица Господа свој земљи.
Bangomba enyangwamaka lokola mafuta liboso ya Yawe, liboso ya Nkolo ya mokili mobimba.
6 Небеса казују правду Његову, и сви народи виде славу Његову.
Likolo epanzaka sango ya bosembo na Ye, mpe bikolo nyonso bamonaka nkembo na Ye.
7 Нек се стиде сви који се клањају киповима, који се хвале идолима својим. Поклоните Му се сви богови.
Tika ete soni ekanga basambeli nyonso ya bikeko, bato oyo bamikumisaka mpo na banzambe ya lokuta! Bino banzambe nyonso, bogumbama liboso na Ye!
8 Чује и радује се Сион, и кћери се јудејске веселе ради судова Твојих, Господе!
Yawe, Siona eyoki yango mpe esepeli; bingumba ya Yuda ezali na esengo mpo na mikano na Yo!
9 Јер си Ти, Господе, висок над свом земљом и надвишујеш све богове.
Pamba te, na mokili mobimba, Yo nde Yawe, ozali Ye-Oyo-Aleki-Likolo; oleki banzambe nyonso.
10 Који љубите Господа, мрзите на зло. Он чува душе светаца својих; из руку безбожничких отима их.
Bino bato oyo bolingaka Yawe, boyina mabe! Yawe abatelaka bomoi ya bayengebene na Ye mpe akangolaka bango na maboko ya bato mabe.
11 Светлост се просипа на праведника, и весеље на оне који су правог срца.
Moyi elonami mpo na moto ya sembo, mpe esengo, mpo na bato oyo bazali na mitema alima.
12 Радујте се праведни о Господу, и славите свето име Његово.
Bino bato ya sembo, bosepela kati na Yawe; bosanzola Ye na kotatola bosantu na Ye.