< Псалми 84 >

1 Како су мили станови Твоји, Господе над силама!
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya bana ya Kore. Ezali ya koyemba na lindanda ya bato ya Gati. Yawe, Mokonzi ya mampinga, tala ndenge bisika oyo ovandaka ezali kopesa posa!
2 Гине душа моја желећи у дворе Господње; срце моје и тело моје отима се к Богу Живом.
Nzoto na ngai mobimba ebukani pene nakufa mpo na posa makasi ya lopango ya Yawe! Motema mpe nzoto na ngai ezali koganga epai ya Nzambe na bomoi.
3 И птица находи кућу, и ластавица гнездо себи где леже птиће своје, код олтара Твојих, Господе над силама, царе мој и Боже мој!
Ndeke ya moke ezwaka esika ya kovanda, mpe mbilambila esalaka zala epai wapi etiaka bana na yango, pene ya bitumbelo na Yo, Yawe, Mokonzi ya mampinga, Mokonzi na ngai mpe Nzambe na ngai.
4 Благо онима који живе у дому Твом! Они Те хвале без престанка.
Esengo na bavandi ya Ndako na Yo! Bakokumisa Yo tango nyonso!
5 Благо онима којима је сила у Теби, и којима су у срцу путеви Твоји!
Esengo na bato oyo bazwaka makasi kati na Yo; bakendaka na esengo na Tempelo na Yo!
6 Идући долином плачевном, претварају је у изворе, и дажд је одева благословима.
Tango bakatisaka Lubwaku ya Baka, bakomisaka yango esika oyo etonda na bitima ya mayi, mpe mvula etondisaka yango na mapamboli.
7 Иду збор за збором, јављају се пред Богом на Сиону.
Makasi na bango ebakisamaka tango nyonso kino bakomaka na Siona, liboso ya Nzambe.
8 Господе, Боже над силама! Услиши молитву моју, Боже Јаковљев!
Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, yoka losambo na ngai! Nzambe ya Jakobi, yoka ngai!
9 Боже, браничу наш! Сагни се и види лице помазаника свог!
Oh Nzambe, Yo oyo ozali nguba na biso, tala! Tala elongi ya mopakolami na Yo!
10 Јер је боље један дан у дворима Твојим од хиљаде. Волим бити на прагу дома Божијег него живети у шаторима безбожничким.
Lokola kovanda mokolo moko kati na lopango na Yo eleki kovanda mikolo nkoto moko na esika mosusu, naponaki kotelema na ekotelo ya Ndako ya Nzambe na ngai na esika ete navanda kati na bandako ya kapo ya bato mabe.
11 Јер је Господ Бог сунце и штит, Господ даје благодат и славу; онима који ходе у безазлености не ускраћује ниједног добра.
Pamba te, mpo na biso, Yawe Nzambe azali moyi mpe nguba; Yawe apesaka ngolu mpe nkembo, aboyaka kopesa eloko moko te epai ya bato oyo batambolaka bazanga pamela.
12 Господе над силама! Благо човеку, који се у Те узда!
Yawe, Mokonzi ya mampinga, esengo na moto oyo atiaka elikya kati na Yo!

< Псалми 84 >